Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 97: Yesu ayei lokola Mokonzi

Lisolo 97: Yesu ayei lokola Mokonzi

NTANGO Yesu asilisi kobikisa bato mibale oyo bakufá miso, na nsima akómi na mboka moko ya moke, pene na Yerusaleme. Ayebisi bayekoli na ye mibale ete: ‘Bókende na mboka wana mpe bokomona mwana ya mpunda. Bófungola yango mpe bóyela ngai yango.’

Ntango bayeli Yesu mpunda yango, afandi likoló na yango. Na nsima akei na yango na Yerusaleme. Ntango akómi penepene na engumba, ebele ya bato bayei koyamba ye. Bato mingi balongoli bilamba na bango batandi yango na nzela. Bamosusu bakati mandalala mpe batandi yango na nzela. Mpe bazali koganga ete: ‘Yehova, pambolá mokonzi oyo ayei na nkombo na yo!’

Bato bazali koyamba Yesu

Kala na Yisraele, bakonzi ya sika bazalaki kotambola na mwana ya mpunda na Yerusaleme mpo bámilakisa epai ya bato. Yango nde likambo Yesu azali kosala. Mpe bato oyo batɛlɛmi na nzela bamonisi ete balingi Yesu azala mokonzi na bango. Kasi bato nyonso balingi ye te. Tokomona yango na likambo oyo esalamaki ntango akómi na tempelo.

Kuna na tempelo, Yesu abikisi bato oyo bakufá miso mpe batɛngumi. Ntango bana mike bamoni bongo, bakumisi ye na mingongo makasi. Kasi banganga-nzambe bayoki nkanda, mpe balobi na Yesu ete: ‘Ozali koyoka makambo bana oyo bazali koloba?’

Yesu azongisi ete: ‘Ɛɛ. Botángá naino te likambo oyo na Biblia ete: “Na minɔkɔ ya bana mike Nzambe akoyeisa masanzoli?” ’ Bongo bana bakobi kosanzola mokonzi oyo Nzambe atye.

Biso mpe tosengeli kozala lokola bana wana. Bato mosusu bakoki komeka kopekisa biso kosakola Bokonzi ya Nzambe. Kasi biso tokokoba koyebisa bato bolamu oyo Yesu akosalela bato.

Ntango Yesu azalaki awa na mabele, ngonga ekokaki naino te mpo abanda koyangela. Kasi ngonga yango ekokoka mokolo nini? Bayekoli balingi mpe koyeba likambo yango. Tokomona yango na lisolo oyo elandi.

Matai 21:1-17; Yoane 12:12-16.



Mituna

  • Ntango Yesu akómi na mboka moko ya moke pene na Yerusaleme ayebisi bayekoli na ye nini?
  • Na elilingi oyo, likambo nini esalemi ntango Yesu akómi pene na Yerusaleme?
  • Bana mike basali nini ntango bamoni Yesu azali kobikisa bato oyo bakufá miso mpe batɛngumi?
  • Yesu alobi nini na banganga-nzambe oyo bayoki nkanda?
  • Ndenge nini tokoki kozala lokola bana oyo bakumisi Yesu?
  • Bayekoli balingi koyeba likambo nini?

Mituna mosusu