Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 99: Elambo ya Nkolo

Lisolo 99: Elambo ya Nkolo

TOKÓMI mokolo ya minei na mpokwa. Yesu ná bantoma na ye zomi na mibale bayangani na shambrɛ moko monene na ndako ya etaje mpo na kolya Elekeli. Moto oyo azali kobima ezali Yudasi Mokeriota. Akei koyebisa banganga-nzambe ndenge bakoki kokanga Yesu.

Elambo ya Nkolo

Lobi, Yudasi akendeki epai na bango mpe atunaki bango ete: ‘Bokopesa ngai nini soki nasalisi bino bókanga Yesu?’ Balobi na ye ete: ‘Shekele ya palata ntuku misato (30).’ Sikoyo Yudasi akei epai ya banganga-nzambe mpo aya na bango esika Yesu azali. Oyo likambo ya nsɔmɔ mpenza!

Elekeli esili. Kasi sikoyo Yesu abandi elambo mosusu ya ntina mingi. Apesi bantoma na ye limpa mpe alobi na bango ete: ‘Bólya yango, mpo oyo elakisi nzoto na ngai oyo ekokabama mpo na bino.’ Na nsima apesi bango kɔpɔ ya vinyo mpe alobi ete: ‘Bómɛla yango, mpo oyo elakisi makila na ngai oyo ekosopama mpo na bino.’ Biblia ebengi molulu yango ‘Bilei ya mpokwa ya Nkolo’ to ‘Elambo ya Nkolo.’

Bayisraele bazalaki kolya Elekeli mpo na kokanisa butu oyo anzelu ya Nzambe ‘alekaki likoló’ ya bandako na bango na Ezipito, kasi abomaki bana ya liboso na bandako ya Baezipito. Nzokande sikoyo Yesu alingi ete bayekoli na ye bákanisaka ye, bákanisaka mpe ndenge akabaki bomoi na ye mpo na bango. Yango wana ayebisi bango básalaka molulu wana ya ntina mingi mbula na mbula.

Nsima ya Elambo ya Nkolo, Yesu ayebisi bayekoli na ye ete bázala na mpiko mpe na kondima makasi. Na nsuka, bayembi nzembo ya kokumisa Nzambe mpe bakei. Ngonga ekei mpenza, ntango mosusu midi ya butu eleki. Sikoyo na butu boye bakei wapi?

Matai 26:14-30; Luka 22:1-39; Yoane mokapo 13 tii 17; 1 Bakorinti 11:20.



Mituna

  • Ndenge elilingi oyo ezali komonisa yango, mpo na nini Yesu ná bantoma na ye 12 bayangani na shambrɛ monene na ndako ya etaje?
  • Nani azali kobima, mpe akei kosala nini?
  • Wapi elambo ya ntina mingi oyo Yesu abandisi ntango basilisi Elekeli?
  • Elekeli ezalaki kotinda Bayisraele bákanisaka likambo nini, mpe elambo oyo ya ntina mingi etindaka bayekoli ya Yesu bákanisa nini?
  • Nsima ya Elambo ya Nkolo, Yesu ayebisi bayekoli na ye nini, mpe basali nini?

Mituna mosusu