Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 100: Na elanga ya Getesemane

Lisolo 100: Na elanga ya Getesemane

NTANGO Yesu ná bantoma na ye balongwe na shambrɛ ya ndako wana ya etaje, bakei na elanga ya Getesemane. Bazalaki kokende kuna mbala na mbala. Sikoyo ntango bakómi kuna, Yesu alobi na bango básɛnzɛla mpe básambela. Bongo akei mwa mosika ye moko, akwei elongi na nse mpe abondeli.

Na nsima azongi esika bantoma bazali. Akuti bango balali! Yesu ayebisi bango mbala misato mobimba ete básɛnzɛla, kasi mbala nyonso oyo azali kozongela bango azali kokuta bango kaka na mpɔngi. Ntango ayei mbala ya misato, alobi na bango ete: ‘Mpo na nini bozali kolala mpɔngi na ntango ya boye? Ngonga ekómi mpo natɛkama na mabɔkɔ ya banguna na ngai.’

Kaka na ntango yango, bayoki makolo ya bato. Bato bazali koya na mipanga ná mangenda. Basimbi mpe miinda mpo bámona. Ntango bato yango bakómi pene, moto moko aleki liboso na bango, ayei mbala moko epai ya Yesu. Mpe apesi ye lipwɛpwɛ ndenge bozali komona awa na elilingi. Moto yango nde Yudasi Mokeriota. Mpo na nini apesi Yesu lipwɛpwɛ?

Yudasi atɛki Yesu

Yesu atuni ye ete: ‘Yudasi, ozali kotɛka ngai na lipwɛpwɛ?’ Ɛɛ, lipwɛpwɛ yango ezali elembo oyo esalisi bato oyo Yudasi ayei na bango báyeba Yesu, moto oyo bango balingi kokanga. Bongo banguna ya Yesu bapusani mpo na kokanga ye. Kasi Petro atiki bango bákende na Yesu kaka boye te. Abimisi mopanga oyo azalaki na yango, akati moto oyo azali pene na ye. Mopanga ezangi moto yango na motó kasi elongoli ye nde litoi ya mobali. Yesu asimbi litoi ya moto yango mpe azongisi yango.

Bongo Yesu alobi na Petro ete: ‘Zongisá mopanga na yo na esika na yango. Okanisi te ete nakoki kosɛnga Tata na ngai bankóto ya baanzelu báya kobikisa ngai?’ Kasi Yesu asali bongo te mpo ayebi ete ngonga ekoki mpo ete banguna na ye bákanga ye. Yango wana asali matata te, bakei na ye. Tótala likambo oyo ekokómela Yesu sikoyo.

Matai 26:36-56; Luka 22:39-53; Yoane 18:1-12.



Mituna

  • Ntango Yesu ná bantoma na ye balongwe na shambrɛ na ndako ya etaje, bakei wapi, mpe ayebisi bango básala nini?
  • Ntango Yesu azongi esika bantoma bazali akuti bazali kosala nini, mpe basalaki bongo mbala boni?
  • Ndenge elilingi ezali komonisa, banani bakɔti na elanga, mpe Yudasi Mokeriota asali nini?
  • Mpo na nini Yudasi apesi Yesu lipwɛpwɛ, mpe Petro asali nini?
  • Yesu alobi na Petro nini, kasi mpo na nini Yesu asɛngi te ete Nzambe atinda baanzelu?

Mituna mosusu