Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 101: Babomi Yesu

Lisolo 101: Babomi Yesu

BÓTALA likambo ya nsɔmɔ oyo basali Yesu! Babomi ye. Babaki ye na nzete. Batɔbɔli ye bansɛtɛ na mabɔkɔ mpe na makolo. Kasi mpo na nini basali Yesu bongo?

Yesu akufi

Mpo bato mosusu bayini ye. Oyebi bato yango? Moko na bango ezali Satana Zabolo, anzelu ya mabe. Ye moto atindaki Adama ná Eva bátika kotosa Nzambe. Kaka ye mpe moto atindi banguna ya Yesu básala ye likambo ya nsɔmɔ ndenge wana.

Liboso kutu banguna ya Yesu bábaka ye na nzete, basalaki ye makambo mosusu ya mabe mpenza. Bókanisa lisusu ndenge bayaki kokanga ye na elanga ya Getesemane mpe bakei na ye. Bato yango banani? Bakonzi ya mangomba. Bongo nini esalami na nsima?

Ntango bakonzi ya mangomba bakangi Yesu, bantoma na ye babangi, mpe bakimi. Batiki Yesu kaka ye moko na mabɔkɔ ya banguna. Kasi Petro ná Yoane bakei mosika te. Bazali kolanda nsimansima mpo báyeba ndenge likambo yango ekosuka.

Banganga-nzambe bakei na Yesu epai ya Anasi, mobange moko oyo azalaki nganga-nzambe monene kala. Kasi baumeli kuna te. Na nsima, bakei na Yesu epai ya Kaifa, oyo azali nganga-nzambe monene na ntango yango. Ebele ya bakonzi ya mangomba bayei na ndako na ye.

Babandi kosambisa Yesu na ndako ya Kaifa. Bayei na bato mpo bákosela ye makambo. Bakonzi nyonso ya mangomba balobi ete: ‘Yesu asengeli kobomama.’ Babandi kobwakela ye nsoi na elongi mpe kobɛta ye makofi.

Na ntango yango, Petro azali na libándá, na kati ya lopango. Lokola butu yango ezali na malili, bato bapelisi mɔtɔ. Ntango bazali koyɔta mɔtɔ, mwana mwasi moko ya mosala atali Petro mpe alobi ete: ‘Moto oyo mpe azalaki elongo na Yesu.’

Bongo Petro azongisi ete: ‘Nayebi ye te!’

Bato balobi na Petro mbala misato mobimba ete azalaki elongo na Yesu. Kasi na mbala nyonso wana Petro awangani kaka. Na mbala ya misato, Yesu abaluki, atali ye. Petro ayoki mawa makasi na ndenge awangani ye, mpe abimi, akei kolela.

Mokolo ya mitano na ntɔngɔ, ntango moi ebandi kobima, banganga-nzambe bakei na Yesu na esika oyo bakutanaka, na Sanedrina. Kuna bazali kolobela likambo nini básala ye. Na nsima, bakei na ye epai ya Ponse Pilate, moyangeli ya etúká ya Yudea.

Banganga-nzambe balobi na Pilate ete: ‘Moto oyo azali moto mabe. Asengeli kobomama.’ Nsima ya kotuna Yesu mwa mituna, Pilate alobi ete: ‘Namoni ete asali mabe moko te.’ Bongo Pilate atindi Yesu epai ya Erode Antipasi, moyangeli ya Galile, kasi sikoyo azali na Yerusaleme. Ye mpe amoni ete Yesu asali mabe moko te; yango wana, azongisi ye epai ya Pilate.

Pilate alingi kotika ye. Kasi banguna ya Yesu basɛngi ete abimisela bango mokangami mosusu kasi Yesu te. Mokangami yango nde Barabasi, nzokande azali moyibi. Sikoyo ekómi pene na midi, Pilate abimisi Yesu libándá. Ayebisi bato ete: ‘Talá! Mokonzi na bino ye wana!’ Kasi banganga-nzambe bakonzi bagangi makasi ete: ‘Longolá ye! Bomá ye! Bomá ye!’ Bongo Pilate atiki Barabasi, mpe apesi bango Yesu bákende koboma ye.

Kaka na mokolo ya mitano wana, nsima ya midi, babaki Yesu na nzete. Nzokande babaki mpe bato mosusu mibale, basali-mabe, na nzete, esika moko na Yesu. Mwa moke liboso Yesu akufa, moko na bango alobi na ye ete: ‘Kanisá ngai ntango okokɔta na bokonzi na yo.’ Mpe Yesu azongiseli ye ete: ‘Nalaki yo ete okozala na ngai na Paradiso.’

Ezali elaka moko malamu mpenza! Kasi boyebi paradiso oyo Yesu alobeli? Paradiso oyo Nzambe asalaki na ebandeli ezalaki wapi? Awa na mabele. Ntango Yesu akokóma mokonzi kuna na likoló mpe abandi koyangela, akosekwisa moto yango mpo afanda na Paradiso ya sika awa na mabele. Elaka yango ezali kosepelisa biso mpenza!

Matai 26:57-75; 27:1-50; Luka 22:54-71; 23:1-49; Yoane 18:12-40; 19:1-30.



Mituna

  • Moto ya libosoliboso oyo azali na ngambo mpo na liwa ya Yesu ezali nani?
  • Bantoma basali nini ntango bakonzi ya mangomba bakangi Yesu?
  • Likambo nini eleki na ndako ya Kaifa, nganga-nzambe monene?
  • Mpo na nini Petro abimi mpe aleli?
  • Ntango Yesu azongi lisusu epai ya Pilate, banganga-nzambe bakonzi balobi nini na makasi mpenza?
  • Likambo nini ekómeli Yesu mokolo ya mitano wana nsima ya midi, mpe elaka nini apesi mosali-mabe moko oyo babaki ye na nzete pembeni na ye?
  • Paradiso oyo Yesu alobelaki ekozala wapi?

Mituna mosusu