Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 103: Yesu amonani mbala mingi

Lisolo 103: Yesu amonani mbala mingi

NTANGO Petro ná Yoane balongwe na lilita, Maria atikali ye moko. Abandi kolela. Na nsima, agumbami mpo atala na kati ya lilita, ndenge tomonaki yango na elilingi ya lisolo oyo eleki. Kuna nde amoni baanzelu mibale. Batuni ye ete: ‘Ozali kolela mpo na nini?’

Azongisi ete: ‘Balongoli Nkolo na ngai, mpe nayebi te soki balalisi ye wapi.’ Na nsima Maria abaluki, mpe amoni mobali moko. Mobali yango atuni ye ete: ‘Ozali koluka nani?’

Maria akanisi ete mobali yango azali mobateli ya elanga, mpe ete mbala mosusu ye nde moto alongoli nzoto ya Yesu. Yango wana alobi na ye ete: ‘Soki olongolaki ye, yebisá ngai soki olalisi ye wapi.’ Nzokande mobali yango nde Yesu. Alati nzoto oyo Maria ayebi ye na yango te. Bongo ntango Yesu abengi ye na nkombo, Maria ayebi ete ezali nde Yesu. Akei mbangu koyebisa bayekoli ete: ‘Namoni Nkolo!’

Kaka na mokolo yango, bayekoli mibale bazali kokende na Emause. Moto moko apusani pene na bango, bakei na ye nzela moko. Bayekoli yango bazali koyoka mawa mingi ndenge Yesu abomami. Ntango bazali kotambola, mobali yango azali kolimbwela bango ebele ya makambo ya Biblia, bayoki nzoto makasi. Na nsuka, ntango batɛlɛmi mpo bálya, bayekoli yango bayei koyeba ete mobali yango ezali nde Yesu. Kasi na mbala moko alimwe na miso na bango, bongo bayekoli yango mibale bazongi mbangu na Yerusaleme koyebisa bantoma likambo yango.

Kaka na mokolo yango, Yesu abimeli mpe Petro. Ntango bayekoli mosusu bayoki bongo, basepeli makasi mpenza. Na nsima, bayekoli mibale oyo bakutanaki na Yesu na nzela bakómi na Yerusaleme. Bayebisi bantoma ete Yesu abimelaki bango na nzela. Mpe kaka ntango bazali kolobela likambo yango, likambo moko ya kokamwa esalami.

Bótala elilingi oyo. Yesu abimeli bantoma na kati ya ndako, atako porte na yango ekangami. Bayekoli basepeli mpenza. Na ntembe te ezali mokolo ya esengo! Tii sikoyo, boyebi mbala boni Yesu abimeli bayekoli na ye? Ezali mpenza mbala mitano?

Yesu abimeli bayekoli

Ntango Yesu abimeli bayekoli Toma azalaki te. Baninga bayebisi ye ete: ‘Tomoni Nkolo!’ Kasi Toma alobi ete akondima kaka soki ye moko amoni ye na miso. Mikolo mwambe na nsima, bayekoli basangani lisusu esika moko, ndako ekangami, mpe na mbala oyo Toma azali. Na mbala moko, Yesu abimeli bango, bongo Toma andimi.

Yoane 20:11-29; Luka 24:13-43.



Mituna

  • Maria alobi nini na mobali oyo ye akanisaki ete azali mobateli ya elanga, kasi nini esalisi ye ayeba ete mobali yango ezali nde Yesu?
  • Nini ekómeli bayekoli mibale oyo bazali kokende na Emause?
  • Likambo nini ya kokamwa esalemi ntango bayekoli wana mibale bayebisi bantoma ete bamoni Yesu?
  • Yesu amonanaki na bayekoli na ye mbala boni?
  • Toma alobi nini ntango bayekoli mosusu bayebisi ye ete bamoni Nkolo, kasi likambo nini esalemi mikolo mwambe na nsima?

Mituna mosusu