Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 113: Paulo akómi na Roma

Lisolo 113: Paulo akómi na Roma

MOTO oyo azali na monyɔlɔlɔ na mabɔkɔ ezali ntoma Paulo. Soda moko ya Roma azali kokɛngɛla ye. Paulo azali na bolɔkɔ na Roma. Azali kozela Kaisala akata likambo na ye. Kasi ntango azali na bolɔkɔ, batikeli ye nzela ayambaka bato.

Ntango ntoma Paulo akómi na Roma, nsima ya mikolo misato, atindeli mikóló ya Bayuda maloba báya kotala ye. Yango wana, Bayuda mingi ya Roma bayaki kotala ye. Ntoma Paulo asakweli bango makambo ya Yesu mpe Bokonzi ya Nzambe. Bato mosusu bandimi, kasi bato mosusu mpe baboyi.

Paulo azali na bolɔkɔ

Paulo asakwelaki mpe basoda oyo bazalaki kokɛngɛla ye. Na mbula mibale oyo alekisaki na bolɔkɔ na Roma, asakwelaki bato nyonso oyo bayaki kotala ye. Na ndenge yango, basali na ndako ya Kaisala bayoki nsango malamu ya Bokonzi mpe bato mosusu na kati na bango bandimi.

Kasi nani oyo azali kokoma? Ezali Timote, moninga na ye ya sembo na mosala. Timote mpe akɔtaki bolɔkɔ mpo azalaki kosakola Bokonzi ya Nzambe, kasi sikoyo azali na bolɔkɔ te. Ayei nde kosalisa ntoma Paulo. Bongo Timote azali kokoma nini? Tótala yango.

Bozali koyeba lisusu Filipi ná Efese, bingumba oyo tolobelaki na Lisolo 110? Ntoma Paulo abandisaki masangá na bingumba wana. Kasi sikoyo, azali na bolɔkɔ mpe azali kokomela bakristo ya bingumba wana mikanda. Mikanda yango ezali na kati ya Biblia, mosusu babengaka yango Mokanda epai ya Baefese mpe mosusu babengaka yango Mokanda epai ya Bafilipi. Awa ntoma Paulo azali koyebisa Timote akomela baninga na bango bakristo ya Filipi.

Bakristo ya Filipi bamoniselaki ntoma Paulo boboto mingi mpenza. Batindelaki ye likabo kuna na bolɔkɔ mpe azali kopesa bango matɔndi. Epafrodite moto ayaki na likabo yango. Kasi abɛlaki makasi mpe alingaki kokufa. Nzokande sikoyo abiki mpe akómi pene na kozonga. Ntango akozonga, ye nde moto akomemela bandeko ya Filipi mokanda oyo Paulo ná Timote bakomeli bango.

Ntango ntoma Paulo azali na bolɔkɔ na Roma, akomi mikanda mosusu mibale oyo ezali na kati ya Biblia. Mosusu atindeli yango bakristo ya engumba Kolose: babengaka yango Mokanda epai ya Bakolose; mosusu mpe atindeli yango moninga na ye Filemo; ye mpe afandaka na Kolose. Na mokanda yango, azali kolobela Onezime, mosaleli ya Filemo.

Onezime akimaki nkolo na ye Filemo, akei na Roma. Ntango akómi kuna, ayoki ete ntoma Paulo azali na bolɔkɔ wana. Akei kotala ntoma Paulo, mpe ntoma Paulo ateyi ye. Mosika te, Onezime akómi mpe mokristo. Kasi Onezime ayoki mawa mingi ndenge akimaki nkolo na ye. Bongo boyebi likambo ntoma Paulo akómeli Filemo na mokanda oyo atindeli ye?

Asɛngi ye alimbisa Onezime. Akomi ete: ‘Nazali kozongisa ye epai na yo. Nzokande sikoyo azali kaka mosaleli na yo te. Kasi azali mpe ndeko mokristo ya malamu.’ Ntango Onezime azongi na Kolose, amemi mikanda mibale: mosusu ya bakristo ya Kolose mpe mosusu ya Filemo. Filemo asepeli mpenza ntango ayoki ete mosaleli na ye akómi mokristo.

Ntango Paulo akomeli Bafilipi ná Filemo, ayebisi bango nsango moko ya malamu. Akomeli Bafilipi ete: ‘Nazali kotindela bino Timote. Nsima ya mwa ntango ngai moko mpe nakoya.’ Mpe akomeli Filemo ete: ‘Bongiselá ngai esika ya kolala.’

Ntango ntoma Paulo abimi na bolɔkɔ, akei kotalatala bandeko na bisika mingi. Kasi bakangi ye lisusu, akɔti bolɔkɔ na Roma. Na mbala oyo, ayebi ete bakoboma ye. Yango wana atindeli Timote mokanda, asɛngi ye aya kotala ye nokinoki. Akomi ete: ‘Natikali sembo epai ya Nzambe mpe Nzambe akopesa ngai mbano.’ Mwa bambula nsima ya liwa ya ntoma Paulo, Yerusaleme ebebisami lisusu; mbala oyo Baroma nde bato babebisi yango.

Kasi Biblia elobeli mpe makambo mosusu. Yehova Nzambe asalelaki ntoma Yoane akoma mikanda ya nsuka ya Biblia, na kati na yango mokanda ya Emoniseli. Mokanda yango ezali kolobela makambo oyo ekoya. Tótala makambo nini ekosalema nsima.

Misala 28:16-31; Bafilipi 1:13; 2:19-30; 4:18-23; Baebre 13:23; Filemo 1-25; Bakolose 4:7-9; 2 Timote 4:7-9.



Mituna

  • Ntango ntoma Paulo azali na bolɔkɔ na Roma, asakweli banani?
  • Na elilingi oyo, mopaya oyo azali kokoma ezali nani, ayei kosalela Paulo nini?
  • Epafrodite azali nani, mpe amemi nini ntango azongi na Filipi?
  • Mpo na nini ntoma Paulo akomeli moninga na ye Filemo mokanda?
  • Ntoma Paulo asali nini ntango abimi na bolɔkɔ, mpe likambo nini eleki na nsima?
  • Yehova asaleli nani mpo akoma mikanda ya nsuka ya Biblia, mpe mokanda ya Emoniseli elobelaka nini?

Mituna mosusu