Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Eteni 8: Nyonso oyo Biblia esakolaka ekokisamaka

Eteni 8: Nyonso oyo Biblia esakolaka ekokisamaka

Biblia eyebisi makambo oyo esalemaki kala, eyebisi mpe makambo oyo ekosalema na mikolo oyo ezali koya. Moto moko te akoki koyeba makambo oyo ekosalema lobi. Yango endimisi biso ete Biblia euti na Nzambe. Kasi makambo nini Biblia esakoli ete ekosalema na mikolo oyo ezali koya?

Esakoli etumba monene ya Nzambe. Na etumba yango, Nzambe akosilisa mabe mpe akolongola baoyo nyonso basalaka mabe na mokili, kasi akobatela basaleli na ye. Yesu Kristo, mokonzi oyo Nzambe atye, akosala ete basaleli ya Nzambe bázala na kimya mpe na esengo, bakobɛla ata moke te, bakokufa mpe te.

Tozali na esengo mingi ya koyeba ete Nzambe akotya paradiso ya sika awa na mabele. Kasi soki tolingi kofanda na paradiso yango, tosengeli kokanga mabɔkɔ te. Na lisolo ya nsuka ya buku oyo, tokoyeba makambo oyo tosengeli kosala mpo tózwa mapamboli oyo Nzambe abombeli basaleli na ye. Na yango, tángá ETENI 8 mpo oyeba makambo oyo Biblia esakoli ete ekosalema na mikolo oyo ezali koya.

Ndenge paradiso ekozala