Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 114: Mabe ekosila

Lisolo 114: Mabe ekosila

BOZALI komona nini awa? Limpinga ya basoda bamati na bampunda ya mpɛmbɛ. Kasi talá esika bazali kouta. Bampunda oyo nyonso ezali kouta na likoló, ezali kotambola na mapata. Bampunda ya solo ezalaka na likoló?

Yesu azali Mokonzi na likoló

Te. Bampunda yango ezali bampunda ya solo te. Toyebi yango mpo mpunda ekoki kotambola na mapata te. Nzokande, Biblia elobi ete bampunda ezali na likoló. Mpo na nini?

Ezali mpo na ntango ya kala, bato bazalaki kosalela bampunda na bitumba. Yango wana, Biblia eyebisi biso ete bato bazali kotambola na bampunda oyo ezali kouta na likoló, mpo na komonisa ete Nzambe azali kobunda etumba na bato awa na mabele. Oyebi nkombo ya esika oyo etumba yango ekosalema? Armagedone. Etumba yango ekosukisa mabe nyonso na mokili.

Yesu nde Moto akokamba basoda oyo bakobunda na etumba ya Armagedone. Tóbosana te ete Yesu nde moto Yehova aponi mpo azala Mokonzi na guvɛrnema na Ye. Yango wana, alati ekɔti ya bokonzi. Mpe mopanga oyo asimbi emonisi ete akoboma banguna nyonso ya Nzambe. Tosengeli nde kokamwa ete Nzambe akoboma bato mabe?

Bótala lisusu Lisolo 10. Bozali komona nini? Mpela moko monene oyo ebomaki bato mabe. Nani atindaki yango? Yehova Nzambe. Bongo bótala mpe Lisolo 15. Bozali komona nini? Yehova azali koboma Sodoma ná Gomora na mɔtɔ.

Bókende na Lisolo 33. Bótala likambo oyo ekómeli bampunda ná makalo ya Baezipito. Nani atindelaki yango mai mpo ezindisa yango boye? Yehova. Asalaki yango mpo na kobatela bato na ye. Bótala mpe Masolo 3676, bokomona ete Yehova atikaki ata bato na ye, Bayisraele, bábomama mpo na mabe na bango.

Na yango, tosengeli kokamwa te ete Yehova akotinda mampinga na ye ya likoló mpo na kosukisa mabe. Tótala likambo nini ekosalema nsima na yango.

Emoniseli 16:16; 19:11-16.



Mituna

  • Mpo na nini Biblia ezali kolobela bampunda kuna na likoló?
  • Etumba oyo Nzambe akobunda na bato mabe awa na mabele nkombo na yango nini, mpe ntina ya etumba yango nini?
  • Na kotalela elilingi, nani akokamba etumba yango, mpo na nini alati ekɔti ya bokonzi, mpe mopanga elimboli nini?
  • Soki totali na Masolo 10, 15, mpe 33, mpo na nini tosengeli kokamwa te ete Nzambe akoboma bato mabe?
  • Ndenge nini Masolo 3676 emonisi biso ete Nzambe akoboma bato mabe atako bazali kotuta ntolo ete basambelaka ye?

Mituna mosusu