Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Maloba ya ebandeli

Maloba ya ebandeli

Dauda, mobotama ya Sierra Leone, apesi lisolo oyo: “Nakolaki kati na mwa mboka moko moke na etúka ya Nord. Mokolo moko, wana nazalaki naino mwana moke, libota na ngai mpe libota mosusu bawelaki mabélé. Libota moko na moko elobaki ete mabélé ezali ya bango. Mpo na kosukisa ntembe, babengaki nganga-nkisi. Ye apesaki talatala epai ya mobali moko, mpe azipaki talatala yango na elamba ya pembe. Mosika te, mobali oyo akotaki na talatala na nse na elamba ya pembe, abandaki kolenga mpe kotoka. Kotalaka na talatala, angangaki ete: ‘Namoni mpaka mobali moko azali koya! Alati bilamba ya pembe. Azali molai mpe monunu, nsuki na ye nyonso pembe, mpe azali kotambola mokongo engumbami mwa moke.’

“Alobaki nde boye mpo na nkoko na ngai ya mobali! Na nsima mobali yango akomaki lokola moto ya ligboma mpe abandaki konganga ete: ‘Soki bozali kotya ntembe, botala bino moko!’ Moto moko te azwaki makasi ya kotala! Nganga alembisaki mobali oyo akomaki lokola ete abeli ligboma, kosopelaka ye mai masangani na nkasa, oyo azalaki na yango kati na kalebase.

“Kolobaka na nzela na mobali oyo azalaki kotala kati na talatala, ‘nkoko mobali’ akataki likambo ete mabélé wana ezali ya libota na biso. Alobaki na nkoko na ngai ya mwasi ete asengeli kosala elanga na mabélé wana, mpe abanga eloko moko te. Libota oyo mosusu bandimaki ekateli wana. Likambo esukaki bongo.”

Masolo motindo boye mazali koyokama mingi na Afrike ya weste. Kati na eteni wana ya mokili, lokola mpe na mikili misusu, bamilió na bato bazali kokanisa ete bakufi bakendaka na mokili na bilimu, ete kuna bakoki kotala mpe kokotela bomoi na bato awa na mabelé. Yango ezali mpenza solo? Bakufi bazali solo na bomoi? Soki boye te, banani oyo bazali koloba ete bazali nde bilimu na bakufi? Ezali na ntina mingi mpenza koyeba eyano ya solo na mituna oyo. Bomoi na biso etalelami na yango.