Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bikelamu na elimo nkoto na nkoto

Bikelamu na elimo nkoto na nkoto

Biblia ezali koteya biso ete bikelamu na elimo bizali mingi. Jéhovah ye moko azali elimo.​—Yoane 4:24; 2 Bakolinti 3:17, 18.

Kalakala Jéhovah azalaka se ye moko kati na molongo mobimba. Na nsima abandaki kozalisa bikelamu ya elimo bibengami baanzelu. Makasi mpe mayele ya baanzelu eleki oyo ya bato. Jéhovah azalisaki baanzelu mingi; Danyele, mosaleli na Nzambe, amonaki kati na emonaneli baanzelu bifuku to milió nkama.​—Danyele 7:10; Baebele 1:7.

Nzambe azalisaki baanzelu yango kala mpenza liboso ete azalisa mabélé. (Yobo 38:4-7) Moko te kati na bango azaláká kala moto awa na mokili bongo asilá kokufa.

Jéhovah, Elimo oyo aleki bilimu nyonso, azalisaki ebele na bikelamu na elimo