Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Botomboki kati na mokili na elimo

Botomboki kati na mokili na elimo

Satana asalelaki nyoka mpo na koloba na Eva; na nsima Eva alandaki Satana mpo na kotombokela Nzambe

Bikelamu nyonso ya elimo oyo Jéhovah azalisaki bizalaki malamu. Nsima na yango anzelu moko akomaki mabe. Ezali bongo Satan le Diable. Satana alukaki ete bato na mokili basambela ye, na esika ete basambela Jéhovah. Tala ndenge makambo malekaki:

Kati na elanga na Edene, nzeté ezalaki mingi, oyo ezalaki kobota mbuma kitoko. Jéhovah alobaki polele epai ya Adam mpe na mwasi na ye Eva ete bakokaki kolya mbuma nyonso ndenge balingi, longola bobele mbuma na nzeté moko: soki balei yango, bakokufa solo.​—Genese 2:9, 16, 17.

Mokolo moko Eva azalaki ye moko, nyoka moko asololaki na ye. Solo, ezalaki nyoka mpenza te; ezalaki nde Satan le Diable alobisaki nyoka yango. Satana alobaki na Eva ete soki alei mbuma epekisamaki akozala na mayele mingi lokola Nzambe. Alobaki mpe na ye ete akokufa te. Bilaka oyo mibale ezalaki lokuta. Kasi, Eva andimelaki Satana mpe alyaki mbuma epekisamaki. Na nsima, apesaki yango na Adam, ye mpe alyaki.​—Genese 3:1-6.

Lisolo oyo emonisi biso ete Satana azali motomboki mpe mobuki na lokuta. Alobaki na Eva ete akokufa te soki abuki mobeko ya Nzambe. Ezalaki lokuta. Eva akufaki, Adam mpe ndenge moko. Satana akufaki na ntango wana te; kasi ye mpe akokufa mpo ete asalaki lisumu. Kasi lokola akufi naino te, azali se kókóba mosala na ye ya kokosa bato. Azali ntango nyonso mobuki na lokuta, mpe azali kopusa bato na kobuka mibeko na Nzambe.​—Yoane 8:44.

Baanzelu mosusu batomboki

Na nsima, baanzelu mosusu bakomaki mabe. Baanzelu yango bamonaki basi kitoko awa na mabelé, mpe balingaki kosangisa nzoto elongo na bango. Na bongo bayaki na mabelé mpe balataki nzoto ya bato na mosuni. Mpe bakamataki basi mpo na bango. Likambo yango lizalaki na boyokani te na mokano na Jéhovah.​—Genese 6:1, 2; Yuda 6.

Baanzelu mabe bayaki na mabelé mpo na kosala pite elongo na basi

Likambo bango basalaki epesaki mpasi mingi epai na bato na mokili. Basi na baanzelu yango babotaki bana, kasi bana ya malamu te. Bakomaki bilombe mpe babomi. Nsuka na yango mobulu ekomaki mingi na mabelé, kino Jéhovah ayaki kozwa ekateli ya koboma bato mabe na nzela na mpela monene. Bato oyo babikaki na mpela yango ezali bobele mosembwi Noa mpe libota na ye.​—Genese 6:4, 11; 7:23.

Nzokande, baanzelu mabe bazongaki kati na mokili na elimo; bakufaki te. Kasi bazwaki etumbu. Bandimamaki lisusu te kati na libota ya Nzambe, oyo esalemi na baanzelu na sembo. Epai mosusu, Jéhovah apekisaki bango ete balata lisusu nzoto na bato ya mosuni te. Mpe bakosuka na kobomama na ntango ya lisambisi monene.​—2 Petelo 2:4; Yuda 6.

Satana abimisami na likoló

Satana mpe baanzelu mabe babimisamaki na likoló

Na ebandeli ya ekeke oyo, etumba esalemaki na likoló. Kati na Biblia, mokanda na Emoniseli eyebisi yango na maloba oyo: “Etumba ebimaki na likoló; Mikaele [Yesu oyo asekwi] na baanzelu na ye [malamu] babundaki etumba na dalagona [Satana]. Dalagona abundaki, na baanzelu na ye [mabe], nde balongaki te, mpe esika kati na likoló ezwami mpo na bango lisusu te. Dalagona yango monene abwakami, ye nyoka na kalakala, oyo abyangami Motemeli mpe Satana, mozimbisi na bato na mokili mobimba; abwakami na nse, baanzelu na ye mpe babwakami na ye elongo.”

Yango ebotaki likambo nini? Tala oyo kolandana ya lisolo eyebisi: “Na bongo bosepela, Ɛ likoló, mpe bino bofandi wana!” Baanzelu malamu basepelaki mpenza lokola Satana mpe baanzelu mabe, to bilimu mabe, bazalaki lisusu na likoló te. Bongo bafandi na mabelé? Biblia elobi ete, “Mawa na mokili mpe na mai monene! Mpo ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaka mokuse.”​—Emoniseli 12:7-9, 12.

Ya solo, Satana mpe baninga na ye ya mabe bazali kozimbisa bafandi na mabelé mpe bazali kopesa bango mpasi monene. Baanzelu wana mabe babengami badémo. Bazali banguna na Nzambe. Bango nyonso bazali mabe.