Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mikolo malamu mingi mizali koya

Mikolo malamu mingi mizali koya

Mosika te, Satana mpe bilimu mabe bakokangama

Satana mpe bilimu mabe bakokosa lisusu bato ntango molai te. Jéhovah asilaki kobengana bango na likoló. (Emoniseli 12:9) Mpe mosika te, akopesa lisusu etumbu epai na Satana mpe bilimu mabe; ezali yango nde ntóma Yoane alobeli ntango azali koyebisa emonaneli moko azwaki longwa na Nzambe: “Namonaki anzelu kokita na likoló, azalaki na lifungola na libulu mozindo, na monyololo monene na loboko na ye. Asimbi dalagona, ye nyoka yango na kalakala, ye Diable mpe Satana, mpe akangi ye na monyololo mbula nkoto. Abwaki ye na libulu mozindo, azipi yango, mpe atii elembo likoló na yango, na ntina ete azimbisa mabota lisusu te, kino nsuka na mbula yango nkoto.” (Emoniseli 20:1-3) Nsima na yango, Diable mpe bilimu mabe bakobomama mpo na libela.​—Emoniseli 20:10.

Bato mabe bakobomama mpe lokola.​—Nzembo 37:9, 10; Luka 13:5.

Bakufi bakosekwa!

Bakufi bakozonga lisusu na bomoi na mabelé

Nsima wana Satana mpe bilimu mabe bakotyama pembeni, Jéhovah akopesa bolamu mingi epai na bato. Oyebi lisusu ete bakufi bazali na bososoli te, bazali mpe lisusu te. Yesu akokanisaki liwa na mpongi​—mpongi makasi kozanga ndoto. (Yoane 11:11-14) Akokaki koloba motindo wana mpo ayebaki ete ntango ekoya oyo bato balali kati na nkunda bakolamuka mpe bakozonga na bomoi. Alobaki ete: “Ntango ekoya wana nyonso bazali kati na nkunda . . . bakobima.”​—Yoane 5:28, 29; tala Misala 24:15.

Bakozongisama na bomoi, awa na mabelé. Na ntango yango, na esika na nsango na liwa, bato bakoyoka nde nsango na esengo: nkombo na baoyo bazongi na bomoi! Oyo nde esengo na koyamba balingami na biso ntango bakobima na nkunda!