Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO YA MITANO

Teyá mwana na yo uta azali naino moke mpenza

Teyá mwana na yo uta azali naino moke mpenza

1, 2. Epai na nani baboti basengeli koluka lisalisi mpo na kobɔkɔla bana na bango?

 “BANA mibali bazali likabo na [Yehova],” ezali wana maloba ya botɔ́ndi ya moboti moko oyo alobaki yango esili koleka soko bambula 3 000. (Nzembo 127:3) Ya solo, esengo ya kozala moboti ezali mbano euti epai na Nzambe, mbano oyo epesamaka epai na bato mingi oyo babalá. Atako bongo, baoyo bazali na bana bamonaka nokinoki ete esika moko na esengo wana, kozala moboti eyeisaka mpe mikumba.

2 Mingimingi lelo oyo, kobɔkɔla bana ezali mosala moko monene. Nzokande, mingi basili kosala yango mpe balóngaki, mpe mokomi na Nzembo oyo apemamaki, amonisaki likambo yango na kolobáká ete: “Soko ezali [Yehova] te oyo akotongaka ndako, basali bakosala wana bobele mpamba.” (Nzembo 127:1) Soki ozali mpenza kolanda malako ya Yehova, boye okozala mpenza moboti malamu. Biblia elobi ete: “Tyá elikya epai na Yehova na motema na yo mobimba mpe ndimelá bososoli na yo moko te.” (Masese 3:5, NW) Okolinga koyoka toli ya Yehova wana okobanda mosala ya mibu 20 ya kobɔkɔla mwana?

NDIMÁ LIKANISI YA BIBLIA

3. Mokumba nini batata bazali na yango mpo na oyo etali kobɔkɔla bana?

3 Na bandako mingi kati na mokili, mibali batalelaka likambo litali kobɔkɔla bana lokola mosala mpenzampenza ya basi. Ya solo, Liloba ya Nzambe emonisi ete mokumba ya liboso ya tata ezali ya koluka mosolo mpo na koleisa libota. Atako bongo, elobi lisusu ete azali na mikumba kati na ndako. Biblia elobi ete: “Bongisá mosala na yo na libándá, omikokisela yango kati na elanga; boye na nsima, tongá ndako na yo.” (Masese 24:27) Na likanisi ya Nzambe, tata mpe mama basengeli kopesana mabɔkɔ mpo na kobɔkɔla mwana.​—Masese 1:8, 9.

4. Mpo na nini tosengeli te kotalela bana mibali ete baleki bana basi?

4 Lolenge nini otalelaka bana na yo? Balapólo ezali komonisa ete na Azia “mbala mingi bana basi bayambamaka malamu te na ntango bazali kobotama.” Balapólo emonisi lisusu ete makanisi mabe motindo wana na ntina na bana basi ezali naino na Amérique latine, ata mpe kati na “mabota ya bato minene.” Kasi, likambo ya solo ezali oyo ete bana basi bazali na motuya moke te liboso na bana mibali. Yakobo, tata oyo ayebanaki mingi na ntango ya kala, alobelaki bana na ye nyonso oyo abotaki, ezala oyo ya basi, lokola “bana oyo Nzambe asili kopesa [ngai].” (Genese 33:1-5; 37:35) Bobele bongo, Yesu apambolaki “bana mike” nyonso (mibali mpe basi) oyo baboti bamemaki epai na ye. (Matai 19:13-15) Tokoki kondimisama ete amonisaki likanisi ya Yehova.​—Deteronome 16:14.

5. Makambo nini masengeli kosalisa babalani mpo na kokata motuya ya bana oyo balingi kobota?

5 Na mboka na bino, momeseno ezalaka ya komizela ete mwasi abota bana mingi? Na bosembo nyonso, motuya ya bana oyo basengeli kobota ezali likambo litaleli bobele babalani bango moko. Ezali boni soki baboti bazali na makoki te ya koleisa, ya kolatisa, mpe ya kobɔkɔla bana mingi? Ya solo, babalani basengeli kotalela likambo yango wana bazali kokata motuya ya bana oyo balingi kobota. Babalani mosusu oyo bazali na makoki te ya kobɔkɔla bana na bango nyonso, bapesaka na bandeko na bango mokumba ya kobɔkɔla bana mosusu. Yango ezali likambo malamu? Soko moke te. Mpe yango ezali kolongola te epai na baboti mokumba oyo bazali na yango epai na bana na bango. Biblia elobi ete: “Soko moto nani akoleisa bato na ye te mpe na koleka bato kati na ndako na ye moko te, asili koboya bindimeli.” (1 Timoté 5:8) Baboti oyo bayebi mikumba na bango bakataka motuya ya “bato ya ndako” na bango mpo ete bákoka ‘koleisa bango.’ Bakoki kosalela myango ya kokangisa kobota mpo na kokokisa likambo yango? Likambo oyo mpe litaleli ekateli na bango moko, mpe soki babalani bazwi ekateli na likambo yango, liponi ya kosalela mwango ya kokangisa kobota ezali mpe likambo oyo litaleli bobele bango moko. “Moto na moto akomema bozito na ye.” (Bagalatia 6:5) Nzokande, myango ya kokangisa kobota oyo ezali kosɛnga kolongola zemi eyokani te na mitindá ya Biblia. Yehova Nzambe azali “mobandisi ya bomoi.” (Nzembo 36:9) Na yango, kobebisa bomoi nsima wana zemi esili kobanda ekozala mpenza kozanga monene ya limemya epai na Yehova mpe yango ekokani na koboma moto.​—Exode 21:22, 23; Nzembo 139:16; Yilimia 1:5.

KOKISÁ BAMPOSA YA MWANA NA YO

6. Ntango nini koteya mwana esengeli kobanda?

6 Masese 22:6 elobi ete: “Bɔkɔlá mwana na nzela ekoki na ye kotambola.” Kobɔkɔla bana ezali mokumba mosusu monene oyo baboti bazali na yango. Kasi, ntango nini kobɔkɔla yango esengeli kobanda? Uta azali naino moke mpenza. Ntoma Paulo amonisaki ete Timoté abɔkwamaki “longwa na bomwana.” (2 Timoté 3:15) Liloba ya Greke lisalelami awa ekoki kolimbola mwana moke mpenza to ata mwana oyo azali naino kati na libumu. (Luka 1:41, 44; Misala 7:18-20) Na yango, Timoté abɔkwamaki wana azalaki naino moke mpenza​—na lolenge lobongi mpenza. Ebongi kobanda koteya mwana uta azali naino moke mpenza. Ata mwana moke mpenza azalaka na mposa makasi ya boyebi.

7. (a) Mpo na nini ezali likambo ya ntina ete baboti nyonso mibale bákólisa boyokani ya penepene elongo na mwana? (b) Boyokani nini ezalaki kati na Yehova mpe Mwana na ye mobotami-bobele moko?

7 Mama moko alobi ete: “Ntango namonaki mwana na ngai mpo na mbala ya liboso, nalingaki ye mingi mpenza.” Ezali yango nde mayoki ya bamama mingi. Bokangami wana malamu kati na mama mpe mwana ekólaka wana bazali kolekisa elongo bantango oyo elandaka nsima ya kobotama. Konúngisa mwana mabɛlɛ eyeisaka makasi boyokani wana. (Kokanisá na 1 Batesaloniki 2:7.) Manyomi ya mama epai na mwana na ye mpe kosolola elongo na ye ezali na ntina mingi mpo na kokokisa bamposa ya mayoki ya mwana. (Kokanisá na Yisaya 66:12.) Kasi ezali boni mpo na tata? Ye mpe akoki koyeisa bokangami ya penepene elongo na mwana na ye ya sika. Yehova ye moko azali ndakisa mpo na likambo yango. Kati na mokanda ya Masese, tozali komona boyokani ya Yehova elongo na Mwana na ye mobotami-bobele moko, oyo amonisami wana azali koloba ete: “[Yehova] atongaki ngai na ebandeli na nzela na ye . . . Mokolo na mokolo nazalaki esengo na ye.” (Masese 8:22, 30; Yoane 1:14) Bobele bongo, tata ya malamu akolóna boyokani ya mɔ́tɔ mpe ya bolingo elongo na mwana na ye uta ebandeli ya bomoi ya mwana. Moboti moko alobi ete: “Monisá bolingo mingi epai na mwana. Koyamba mwana na mabɔkɔ mibale mpe kopesa ye mapwɛpwɛ ezali likambo malamu mingi.”

8. Bopusi nini baboti basengeli kopesa nokinoki na makanisi ya bana na bango?

8 Kasi esuki bobele bongo te mpo na bana mike. Uta kobotama na bango, bɔɔngɔ́ na bango ezali pene mpo na koyamba mpe kobomba makambo, mpe baboti nde bazali bato ya liboso na kopesa bango makambo yango. Na ndakisa, tólobela lokótá. Balukiluki balobi ete likoki oyo mwana azali na yango ya koyekola koloba mpe kotánga “ekanisami ete etaleli mingi mpenza boyokani ya liboso oyo mwana azali na yango elongo na baboti na ye.” Sololá mpe tángá elongo na mwana na yo uta ntango azali naino elɛzi. Nokinoki akolinga komekola yo, mpe nokinoki okoteya ye kotánga. Mbala mosusu, akoyeba kotánga liboso ete akɔta kelasi. Yango ekozala mingimingi na litomba soki ozali kofanda na mboka epai kuna balakisi bazali mingi te mpe bakelasi etondi na bana mingi.

9. Mokano nini ya ntina baboti basengeli komikundola yango?

9 Lobanzo ya libosoliboso ya baboti baklisto ezali ya kokokisa bamposa ya elimo ya bana na bango. (Talá Deteronome 8:3.) Yango ezali mpo na mokano nini? Mpo na kosalisa mwana na bango ete akólisa bomoto bokokani na oyo ya Klisto, elingi koloba, kolata “bomoto ya sika.” (Baefese 4:24) Mpo na yango basengeli kotalela bisaleli bibongi mpo na kotonga mpe myango ya malamu mpo na kotonga.

KƆTISÁ SOLO KATI NA MWANA NA YO

10. Bizaleli nini bana basengeli kokólisa?

10 Kitoko ya ndako etalelaka mingi lolenge ya bisaleli bisalelami mpo na kotonga yango. Ntoma Paulo alobaki ete bisaleli bileki malamu mpo na bomoto ya boklisto ezali bongo “wolo, palata, mabanga na motuya.” (1 Bakolinti 3:10-12) Yango ezali elilingi ya bizaleli lokola kondima, mayele, bososoli, bosembo, limemya, bolingo mpe botɔ́ndi mpo na Yehova mpe mpo na mibeko na ye. (Nzembo 19:7-11; Masese 2:1-6; 3:13, 14) Lolenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango uta bomwana na bango ete bákólisa bizaleli wana? Na kolandáká mwango oyo mosilá kopesama uta kala.

11. Lolenge nini baboti Bayisalaele basalisaki bana na bango ete bákólisa bizaleli ya kobanga Nzambe?

11 Mwa moke liboso ete libota ya Yisalaele ekɔta na Mokili ya Ndaka, Yehova alobaki na baboti Bayisalaele ete: “Maloba oyo malakeli ngai yo lelo makozala na motema na yo, mpe okolakisa yango na etingia na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekotambola yo na nzela, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotɛlɛma yo.” (Deteronome 6:6, 7) Ɛɛ, baboti basengeli kozala ndakisa, baninga, basololi, mpe balakisi.

12. Mpo na nini ezali likambo ya ntina mingi ete baboti bázala ndakisa malamu?

12 Kozala ndakisa. Ya liboso, Yehova alobaki ete: “Maloba oyo . . . makozala na motema na yo.” Na nsima, abakisaki ete: “Okolakisa yango na etingya na bana na yo.” Na yango, bizaleli ya kobanga Nzambe bisengeli liboso kozala kati na motema ya moboti. Moboti asengeli kolinga solo mpe komitambwisa na boyokani na yango. Bobele na nsima nde akoki kokɔtisa yango kati na motema ya mwana. (Masese 20:7) Mpo na nini? Mpamba te bana bapusamaka mingi na makambo oyo bazali komona koleka makambo oyo bazali koyoka.​—Luka 6:40; 1 Bakolinti 11:1.

13. Mpo na oyo etali kopesa likebi epai na bana na bango, lolenge nini baboti baklisto bakoki komekola ndakisa ya Yesu?

13 Kozala moninga. Yehova alobaki na baboti na Yisalaele ete: ‘Bokosolola mpo na yango wana bofandi na ndako mpe wana bozali kotambola na nzela.’ Yango esɛngi kolekisa ntango elongo na bana atako baboti bazali na misala mingi ya kosala. Yesu amonisaki polele ete bana bazalaki na lotómo ya kolekisa ntango elongo na ye. Na boumeli ya mikolo ya nsuka ya mosala na ye, bato “bayei na bana mike epai na ye ete amama bango.” Yesu asalaki nini? “Azingeli bango na mabɔkɔ na ye, apamboli bango.” (Malako 10:13, 16) Kanisá naino, ngonga ya liwa ya Yesu ebɛlɛmaki mpenza. Nzokande, apesaki ntango mpe likebi na ye epai na bana. Oyo nde liteya kitoko!

14. Mpo na nini ezali litomba ete baboti balekisaka ntango elongo na mwana na bango?

14 Kozala mosololi. Kolekisa ntango elongo na mwana na yo ekopesa yo nzela ya kosolola elongo na ye. Soki ozali kosolola na ye mingi, boye okososola mpe mingi bokóli ya bomoto na ye. Kasi, omikundola ete, kosolola esuki bobele na maloba te. Mama moko na Brésil alobaki ete: “Nasengelaki koyekola lolenge ya koyoka malamu, koyoka na motema na ngai.” Ezaleli na ye ya motema pɛtɛɛ ebotaki mbuma ntango mwana na ye ya mobali abandaki koyebisa ye mayoki na ye.

15. Nini tosengeli kobosana yango te mpo na oyo etali kominanola?

15 Bana bazalaka na mposa ya “ntango ya kosɛka . . . mpe ntango ya kobina,” ntango ya kominanola. (Mosakoli 3:1, 4; Zekalia 8:5) Kominanola ezali mpenza malamu wana baboti mpe bana bazali kosangana na yango elongo. Ezali likambo ya mawa ete na bandako mingi kominanola elimboli kotala televizyó. Atako baemisyó mosusu ya televizyó ezali kopesa nzela na kominanola, mingi ebebisaka bizaleli malamu, mpe kotala televizyó ekataka kosolola kati na libota. Na yango, mpo na nini te kosala eloko oyo ezali kopesa nzela na kominanola elongo na bana na yo? Koyemba, kosakana, kozala elongo na baninga, kokende kotala bisika ya kosepelisa. Makambo motindo wana malendisaka kosolola.

16. Nini baboti basengeli koteya epai na bana na bango na ntina na Yehova, mpe lolenge nini basengeli kosala yango?

16 Kozala molakisi. Yehova alobaki ete: “Okolakisa [maloba yango] na etingya na bana na yo.” Maloba ya zingazinga mamonisi yo nini oyo osengeli koteya mpe lolenge nini osengeli koteya. Ya liboso, “okolinga [Yehova] Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na nguya na yo mobimba.” (Deteronome 6:5) Na nsima, “maloba oyo . . . okolakisa yango na etingia.” Pesá malako oyo mazali na mokano ya kokólisa bolingo ya motema mobimba mpo na Yehova mpe mpo na mibeko na ye. (Kokanisá na Baebele 8:10.) Maloba “kolakisa na etingia” malimboli koteya na kozongeláká makambo mbala na mbala. Ya solo, Yehova azali koyebisa yo ete nzela ya liboso mpo na kosalisa bana na yo ete bákólisa bomoto ya kobanga Nzambe ezali ya kolobela makambo matali ye mbala na mbala. Yango esɛngi kosala boyekoli ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ elongo na bango.

17. Baboti basengeli kokólisa nini kati na bana na bango? Mpo na nini?

17 Baboti mingi bayebi ete kososola makambo mazali kati na motema ya mwana ezalaka likambo ya pɛtɛɛ te. Ntoma Petelo alobaki na baninga na ye baklisto ete: “Lokola bana babotami sika, bóyoka mposa makasi ya mabɛlɛ mabebisami te oyo ezali kati na liloba.” (1 Petelo 2:2, NW) Maloba “koyoka mposa makasi” epesi likanisi ete mingi bazalaka na mposa ya bilei ya elimo te. Baboti basengeli koluka nzela mpo na kokólisa mposa wana makasi epai na bana na bango.

18. Wapi myango mosusu ya koteya ya Yesu oyo baboti balendisami ete bámekola yango?

18 Yesu azalaki kosimba mitema na kosaleláká masese. (Malako 13:34; Luka 10:29-37) Lolenge wana ya koteya ezalaka mpenza malamu mpo na bana. Teyá mitindá ya Biblia na kosaleláká masoló ya kitoko mpe ya kosepelisa, mbala mosusu oyo ezali kati na búku Mokanda mpo na masolo ya Biblia. * Tiká ete bana básangana na masoló yango. Tiká bango ete básalela makoki na bango ya kokanisa mpe ya komimona ete bango nde batalelami na masoló yango ya Biblia. Yesu mpe azalaki kosalela mituna. (Matai 17:24-27) Mekolá lolenge na ye ya koteya na boumeli ya boyekoli na bino ya libota. Na esika ya kosuka bobele na kolobela mibeko ya Nzambe, tuná mituna lokola oyo: Mpo na nini Yehova apesaki biso mobeko oyo? Bolamu nini tokozwa soki tolandi yango? Mpasi nini tokozwa soki tolandi yango te? Mituna motindo wana ekosalisa mwana na kokanisa mpe na komona ete mibeko ya Nzambe mibongi mpe mizali malamu.​—Deteronome 10:13.

19. Soki baboti bazali kolanda mitindá ya Biblia kati na boyokani na bango elongo na bana na bango, matomba malamu nini bana bakoki kozwa?

19 Na kozaláká ndakisa, moninga, mosololi, mpe molakisi, okoki kosalisa mwana na yo uta bambula na ye ya bomwana mpenza ete akólisa boyokani ya penepene elongo na Yehova Nzambe. Boyokani wana ekolendisa mwana na yo ete azala moklisto oyo azali na esengo. Akozwa makasi ya kokangama na kondima na ye ata wana akutani na bopusi mpe na masɛnginya ya baninga na ye. Salisá ye ntango nyonso ete asepela na boyokani wana ya kitoko.​—Masese 27:11.

DISIPILINI EZALI NA NTINA MPO NA BOMOI

20. Disipilini ezali nini, mpe lolenge nini yango esengeli kopesama?

20 Disipilini ezali kobongisama oyo esembolaka makanisi mpe motema. Bana basengeli na yango ntango nyonso. Paulo apesi toli na batata ete ‘bábɔkɔla [bana na bango] kati na disipilini mpe na mateya elongo na mpamela ya Yehova.’ (Baefese 6:4) Baboti basengeli kopesa disipilini na bolingo nyonso, lokola Yehova apesaka yango. (Baebele 12:4-11) Disipilini oyo epesami na bolingo ekoki kotinda na kososola. Na yango, elobami na biso ete ‘tóyoka disipilini.’ (Masese 8:33) Lolenge nini disipilini esengeli kopesama?

21. Mitindá nini baboti basengeli kobosana yango te wana bazali kopesa bana na bango disipilini?

21 Baboti mosusu bakanisaka ete kopesa disipilini na bana na bango esuki bobele na koloba epai na bango na mongongo makasi, kongalela bango, to ata mpe kofinga bango. Nzokande, bobele na ntina ya likambo yango, Paulo akebisi ete: “Bino batata mpe bóyokisa bana na bino nkanda te.” (Baefese 6:4) Baklisto nyonso balendisami ete bázala na “boboto liboso na bato nyonso . . . [kolakisa na bopɔlɔ baoyo bazali na makanisi malamu te, NW].” (2 Timoté 2:24, 25) Baboti baklisto, atako basengeli kozala ngwi, basalaka makasi mpo na kobatela maloba wana kati na makanisi na bango ntango bazali kopesa bana na bango disipilini. Kasi, na bantango mosusu, koloba mpamba ekoki te, mpe lolenge mosusu ya bitumbu ekoki kopesama.​—Masese 22:15.

22. Soki mwana asengeli kozwa etumbu, nini esengeli kosalisa ye na kokanga ntina na yango?

22 Lokola bana bakeseni, bazali mpe na mposa ya mitindo mikeseni ya disipilini. Bamoko “basembolamaka bobele na maloba” te. Mpo na bango, kopesa mwa etumbu na ntina na kozanga botosi ekoki kobikisa bomoi na bango. (Masese 17:10; 23:13, 14; 29:19) Kasi, mwana asengeli koyeba mpo na nini apesameli etumbu. “Mpimbo mpe mpamela ikoyeisa mayele.” (Masese 29:15; Yobo 6:24) Lisusu, etumbu ezalaka na bandelo. Yehova alobaki epai na libota na ye ete: “Nakopamela yo, nakosambisa yo na sembo.” (Yilimia 46:28b) Biblia epesi nzela te na kobɛtabɛta mwana na nkanda nyonso to konyokola ye, kino ntango mosusu kobuka ye to mpe kozokisa ye.​—Masese 16:32.

23. Mwana asengeli kososola nini ntango baboti na ye bapesi ye etumbu?

23 Ntango Yehova akebisaki libota na ye ete akopesa bango etumbu, alobaki liboso ete: “Yo obanga te . . . zambi ngai nazali na yo elongo.” (Yilimia 46:28a) Bobele bongo, disipilini ya baboti, ezala ete epesami na lolenge nyonso lobongi, esengeli te kopesa epai na mwana mayoki ete abwakami. (Bakolose 3:21) Na esika ete ezala bongo, mwana asengeli nde koyeba ete disipilini epesami mpamba te moboti azali ‘elongo na ye,’ na ngámbo na ye.

BATELÁ MWANA NA YO NA LIKÁMÁ

24, 25. Nini ezali moko na makambo ya mabe, mpo na yango bana basengeli kobatelama na mikolo oyo?

24 Mikóló mingi, soki bazongisi makanisi nsima, bamonaka ete bomwana na bango ezaláká eleko moko ya esengo. Bazali komikundola mayoki ya esengo mpe ya kobatelama, kondimisamáká ete baboti na bango babatelaki bango na makambo nyonso. Baboti balingaka ete bana na bango bázala na mayoki motindo wana, kasi na mokili oyo ya ntango na biso esili kobeba, kobatela bana ezali likambo ya mpasi mingi koleka ndenge ezalaki kala.

25 Moko na makambo ya mawa oyo esili kokóla mingi na bambula oyo ezali bongo kobebisa bana na kosangisa na bango nzoto. Na Malaisie, balapólo likoló na bana babebisami emataki mbala minei koleka na boumeli ya bambula zomi. Na Allemagne soko bana 300 000 bazali kobebisama mbula na mbula na makambo matali kosangisa nzoto, nzokande na Amerika ya Súdi, engebene bolukiluki moko, ekanisami ete motuya ya bana oyo babebisami bazali bongo 9 000 000! Likambo ya mawa, mingi kati na bana wana bazali kobebisama kati na bandako na bango na bato oyo bango bayebi mpe oyo bango batyelaka motema. Nzokande bana bazali na mposa ya libateli makasi uta epai na baboti na bango. Lolenge nini baboti bakoki kozala babateli?

26. Wapi mwa myango oyo mikoki kopesa nzela ete bana bábatelama, mpe lolenge nini boyebi ekoki kobatela mwana?

26 Lokola makambo oyo masili kobima mamonisi ete bana oyo bayebi makambo mingi te na ntina na biboteli bakweaka kozanga nkaká na mabɔkɔ ya bato oyo babebisaka bana, na yango litambe ya ntina mpo na kobatela bango ezali ya kolakisa mwana, ata wana azali mpenza mwana moke. Boyebi ekoki kobatela “longwa na nzela mabe, longwa na moto akosalaka makambo na mobulu.” (Masese 2:10-12) Ezali boyebi oyo wapi? Boyebi ya mitindá ya Biblia, ya oyo ezali malamu mpe ya oyo ezali mabe. Boyebi oyo ete mikóló mosusu basalaka makambo ya mabe mpe oyo ete mwana moke asengeli kotosa te soki moto moko asɛngi ye ete asala makambo oyo malongobani te. (Kokanisá na Danyele 1:4, 8; 3:16-18.) Pesaká mateya motindo wana mbala na mbala. Mpo na bilenge mingi, esengelaka kozongela liteya moko mbala na mbala liboso ete bákanga ntina na yango malamu. Wana bana bazali kokóma mwa mikóló, tata asengeli kopesa kiló na mwana na ye ya mwasi, mpe mama asengeli kopesa kiló na mwana na ye ya mobali​—kolendisáká bongo mayoki ya mwana mpo na makambo oyo malongobani. Mpe, ya solo, moko na libateli lileki malamu mpo na kopɛngola kobebisama ezali bongo libateli na yo ya penepene lokola moboti.

LUKÁ LITAMBWISI YA NZAMBE

27, 28. Nani azali Liziba lileki monene ya lisalisi mpo ete baboti bálónga ntembe etali kobɔkɔla mwana?

27 Ya solo, kobɔkɔla mwana uta azali naino elɛzi ezali ntembe monene, kasi baboti oyo bazali bandimi bazali bango moko te mpo na kolónga ntembe yango. Na mikolo ya Basambisi, ntango mobali moko na nkombo Manoa ayebaki ete asengelaki kokóma tata, asɛngaki na Yehova ete alakisa ye ndenge akoki kobɔkɔla mwana na ye. Yehova ayanolaki na mabondeli na ye.​—Basambisi 13:8, 12, 24.

28 Bobele bongo lelo oyo, wana baboti oyo bazali bandimi bazali kobɔkɔla bana na bango, bakoki mpe kosolola na Yehova kati na libondeli. Kozala moboti, ezali mosala moko ya mpasi, kasi mbano mpe ezali monene. Babalani mibale na mboka Hawaï balobi ete: “Ozali na bambula 12 mpo na kobɔkɔla bana na yo liboso ete bambula ya mpasi ya bolenge ekóma. Kasi soki osali makasi na kosalela mitindá ya Biblia, yango ekozala ntango ya esengo mpe ya kimya wana bana bazwi ekateli ete balingi kosalela Yehova na motema na bango moko.” (Masese 23:15, 16) Ntango mwana na yo azwi ekateli motindo wana, yo mpe okopusama na konganga ete: “Bana mibali [mpe bana basi] bazali likabo liuti na Yehova.”

^ Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.