Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO YA MOTOBA

Salisá bana na yo ete bálónga bolenge na bango

Salisá bana na yo ete bálónga bolenge na bango

1, 2. Bambula ya bolenge ekoki koyeisa mikakatano nini mpe bisengo nini?

 KOZALA na elenge kati na ndako ekeseni mpenza na kozala na mwana ya mibu mitano to ata ya mibu zomi. Bambula ya bolenge ezalaka eleko ya mikakatano mpe ya mpasi, kasi ekoki mpe kopesa bisengo mpe mbano. Ndakisa ya Yosefe, Davidi, Yosiya, mpe Timoté emonisi ete bilenge bakoki komitambwisa na lolenge lobongi mpe kozala na boyokani malamu elongo na Yehova. (Genese 37:2-11; 1 Samwele 16:11-13; 2 Mikonzi 22:3-7; Misala 16:1, 2) Lelo oyo, bilenge mingi bazali komonisa bosolo ya likambo yango. Ekoki mpenza kozala ete oyebi bamoko kati na bango.

2 Nzokande, mpo na bamoko, bambula ya bolenge ezalaka eleko moko ya yikiyiki mingi. Bilenge bazalaka na mayoki ya malamu mpe ya mabe. Bilenge mibali to bilenge basi bakoki kolinga kozala na lipandá mingi, mpe bakoki kosilika na ntina na bandelo oyo baboti na bango bazali kotyela bango. Nzokande, bilenge wana bazali naino na eksperiansi te mpe bazali na mposa ya lisalisi ya bolingo mpe ya motema pɛtɛɛ ya baboti na bango. Ɛɛ, bambula ya bolenge ekoki kozala mɔ́tɔmɔ́tɔ, kasi ekoki mpe kobulunganisa​—ezala mpo na baboti to mpo na bilenge bango moko. Lolenge nini bilenge bakoki kosalisama na boumeli ya bambula wana?

3. Na likambo nini baboti bakoki kopesa bana na bango libaku kitoko kati na bomoi?

3 Baboti oyo bazali kolanda batoli ya Biblia bazali kopesa na bana na bango oyo bazali bilenge libaku ya kokóla mpe kolónga komekama wana mpo na kokóma mikóló oyo bayebi mikumba na bango. Na mikili nyonso mpe na bileko nyonso, baboti mpe bilenge oyo basalelaki elongo mitindá ya Biblia basili kopambwama mpe basili kolónga.​—Nzembo 119:1.

KOSOLOLA YA SEMBO MPE YA POLELE

4. Mpo na nini kosolola na pembeni ezali na ntina na boumeli ya bambula ya bolenge?

4 Biblia elobi ete: “Myango mikokufa wana kosolola na pembeni ezali te.” (Masese 15:22, NW) Soki kosolola na pembeni ezalaki na ntina ntango bana bazalaki mpenza mike, yango ezali mpenza na ntina koleka na boumeli ya bambula ya bolenge​—ntango oyo bilenge bafandaka mpenzampenza na ndako te, kasi balekisaka ntango mingi elongo na baninga na bango ya kelasi to na baninga mosusu. Soki kosolola na pembeni ezali te​—kosolola ya sembo mpe ya polele kati na bana mpe baboti—​bilenge bakoki kokóma bapaya kati na ndako. Na yango, lolenge nini nzela ya kosolola ekoki kozala ntango nyonso ya kofungwama?

5. Lolenge nini bilenge balendisami na kotalela likambo litali kosolola elongo na baboti na bango?

5 Bilenge mpe baboti basengeli kokokisa mokumba na bango na likambo yango. Ya solo, bilenge bakoki kozala na mpasi mingi mpo na kosolola elongo na baboti na bango koleka ndenge bazalaki kosala wana bazalaki bana mike. Nzokande, omikundola ete “wana toli ezali te, bato bakobeba; nde kobika ekozala wana bato mingi na toli bakofanda.” (Masese 11:14) Maloba wana mataleli bato nyonso, bilenge lokola mpe mikóló. Bilenge oyo bayebi likambo wana bakososola ete bazali naino na mposa ya toli, mpamba te bazali kokutana na mikakatano ya makasi mingi koleka oyo bazalaki kokutana na yango liboso. Basengeli kondima ete baboti na bango oyo bazali bandimi babongi kozala bapesi na toli mpamba te bazali na eksperiansi mingi kati na bomoi mpe basili komibanzabanza mpo na bango na bolingo nyonso na boumeli ya bambula mingi. Na yango, na eleko wana ya bomoi na bango, bilenge ya mayele bakopesa baboti na bango mokɔngɔ te.

6. Ezaleli nini baboti ya mayele mpe ya bolingo basengeli kozala na yango mpo na kosolola elongo na bana na bango?

6 Kosolola ya polele elimboli ete baboti bakosala makasi na kozala pene na kosolola wana elenge amonisi mposa ya kosolola. Soki ozali moboti, omindimisa ete fungola ya kosolola ya polele ezali epai na yo. Yango ekoki kozala likambo ya pɛtɛɛ te. Biblia elobi ete ‘ntango ezali mpo na kofanda nyɛɛ mpe ntango ezali mpo na koloba.’ (Mosakoli 3:7) Ntango mwana na yo amoni ete sikawa ezali ntango ya koloba, mbala mosusu yango ekozala mpo na yo ntango ya kofanda nyɛ. Ekoki kozala ete obongisaki ntango yango mpo na boyekoli na yo moko, mpo na kopema, to mpo na kosala mosala moko zingazinga na ndako. Nzokande, soki mwana na yo alingi kosolola na yo, meká kobongola ntango na yo mpe yoká ye. Soki osali bongo te, akokoka komeka lisusu te kosolola na yo. Omikundola ndakisa ya Yesu. Mokolo moko, abongisaki ntango mpo na kopema. Kasi wana bato bayaki ebele zingazinga mpo na koyoka ye, azongisaki nsima ntango ya kopema mpe abandaki koteya bango. (Malako 6:30-34) Bilenge mingi bayebaka ete baboti na bango bazali na makambo mingi ya kosala, kasi bazalaka na mposa ya kondimisama ete baboti na bango bazali wana mpo na kosalisa bango soki mposa esengeli. Na yango, zalá ntango nyonso pene mpe yebá komitya na esika na bango.

7. Baboti basengeli kopɛngola makambo nini?

7 Salá makasi na komikundola makambo motindo moko oyo ozalaki kosala na ntango ozalaki elenge, mpe kobosana te kosala mwa masɛki! Baboti basengeli kosepela na kozala elongo na bana na bango. Na ntango oyo mosala ezali te, lolenge nini baboti basalelaka ntango yango? Soki mikolo nyonso basalelaka ntango oyo bazali na mosala te mpo na kosala makambo oyo matali bobele bango moko, bana na bango oyo bazali bilenge bakososola yango nokinoki. Soki bilenge bakómi na bosukisi ete baninga na bango ya kelasi bapesaka bango likebi koleka baboti na bango, mikakatano mikozanga te kobima.

MAKAMBO YA KOSOLOLA

8. Lolenge nini ezaleli ya kolinga kolongobana, kolinga mosala makasi, mpe kozala na etamboli ebongi ekoki kokɔtisama epai na bana?

8 Soki baboti basilaki naino te kokɔtisa epai na bana na bango ezaleli ya kolinga kolongobana mpe ya kolinga mosala makasi, basengeli mpenza kosala yango na boumeli ya bambula ya bolenge. (1 Batesaloniki 4:11; 2 Batesaloniki 3:10) Ezali mpe na ntina mpo na bango koluka koyeba mpenza soki bana na bango bazali kondima na motema na bango mobimba ntina ya kozala na bizaleli malamu mpe bomoi ya pɛto. (Masese 20:11) Moboti akosolola mingi na ntina na makambo wana na kozaláká ye moko ndakisa. Lokola, mibali oyo bazali bandimi te bakoki ‘kozwama na kimya mpe na bizaleli malamu na basi na bango,’ bobele bongo bilenge bakoki koyekola mitindá ya sembo na nzela ya etamboli ya baboti na bango. (1 Petelo 3:1) Nzokande, ndakisa yango moko ekoki te, mpamba te bana bazali komona mpe bandakisa mingi ya mabe mpe ebele ya makambo ya kolengola oyo mazali kosalema na libándá ya ndako. Na yango, baboti oyo bamibanzabanzaka mpo na bana na bango, basengeli koyeba makanisi na bango likoló na makambo oyo bazali komona mpe koyoka, mpe yango esɛngi kosolola ya malamu mpenza.​—Masese 20:5.

9, 10. Mpo na nini baboti basengeli mpenza koteya bana na bango makambo matali biboteli, mpe lolenge nini bakoki kosala yango?

9 Kosolola motindo yango ebongi mpenza mpo na makambo matali biboteli. Baboti, boyokaka nsɔni mpo na kosolola makambo yango elongo na bana na bino? Ata soki boyokaka nsɔni mpo na kolobela yango, bósala makasi ete bóbanda kosolola na ntina na yango, mpamba te soki bolobeli yango te, bana na bino bakoyekola mpenza yango epai na bato mosusu. Soki bayekoli yango epai na bino te, mbala mosusu bato mosusu bakoteya yango na lolenge ya mabe. Kati na Biblia, Yehova ayokaka nsɔni te mpo na kolobela makambo matali biboteli, bobele bongo baboti basengeli koyoka nsɔni te mpo na yango.​—Masese 4:1-4; 5:1-21.

10 Na esengo nyonso, Biblia ezali kopesa batoli ya polele kati na makambo matali kosangisa nzoto, mpe la Société Watchtower esili kobimisa mikanda mingi oyo mikoki mpenza kosunga, oyo mizali komonisa ete batoli yango ebongi kosalelama ata na mikolo na biso. Mpo na nini te kosalela malamu lisungi yango? Na ndakisa, mpo na nini te kotalela elongo na mwana na yo ya mobali to ya mwasi mikapo oyo elobeli makambo yango na buku Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano oyo ebongi, volimi 1 mpe 2. Okoki mpenza kokamwa na matomba malamu oyo okozwa.

11. Wapi lolenge lobongi mpenza mpo na baboti ete báteya bana na bango ndenge ya kosalela Yehova?

11 Makambo nini ya ntina oyo baboti basengeli kolobela elongo na bana na bango? Ntoma Paulo alobelaki yango ntango akomaki ete: “Bóbɔkɔla [bana na bino] kati na disipilini mpe na mpamela ya Yehova.” (Baefese 6:4, NW) Bana basengeli kolanda koyekola makambo na ntina na Yehova. Mingimingi, basengeli koyekola kolinga ye, mpe basengeli kolinga kosalela ye. Awa, makambo mingi makoki koteyama na nzela ya ndakisa. Soki bilenge bazali komona ete baboti na bango balingaka Nzambe na ‘motema na bango mobimba mpe na molimo na bango mobimba mpe na makanisi na bango mobimba’ mpe ete yango ezali kobimisa mbuma malamu kati na bomoi ya baboti na bango, bakoki kopusama mpenza na kosala sé bongo. (Matai 22:37) Bobele bongo, soki bilenge bazali komona ete baboti na bango bazali na likanisi ya bokatikati na ntina na biloko ya mosuni, ete batyaka bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso, bakosalisama na kokólisa ezaleli motindo moko.​—Mosakoli 7:12; Matai 6:31-33.

Boyekoli ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ ezali na ntina mingi mpo na libota

12, 13. Makambo nini baboti basengeli kobosana yango te mpo ete boyekoli ya libota elónga?

12 Boyekoli ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ kati na libota ezali lisungi monene oyo na nzela na yango baboti bakoki kolakisa bizaleli ya motuya ya elimo epai na bana. (Nzembo 119:33, 34; Masese 4:20-23) Kozala na boyekoli motindo wana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ ezali na ntina mingi. (Nzembo 1:1-3) Baboti mpe bana basengeli koyeba ete boyekoli ya libota esengeli kotyama na esika ya liboso koleka makambo mosusu. Lisusu, kozala na makanisi mabongi ezali na ntina mpo ete boyekoli ya libota ebota mbuma. Tata moko alobaki ete: “Sɛkɛlɛ́ ezali ete motambwisi asengeli kolendisa ezalela ya bosepeli mpe ya limemya na boumeli ya boyekoli ya libota​—oyo ekosalema bobele lokola lisoló, kasi ezala lisɛki te. Bokatikati oyo esengeli ezalaka ntango nyonso likambo ya pɛtɛɛ te mpo na kokóma na yango, mpe ekosengela kosembola bilenge mbala na mbala. Soki makambo matamboli malamu te mbala moko to mbala mibale, lendendelá mpe talá lisusu mpo na mbala ezali koya.” Tata yango alobaki lisusu ete kati na libondeli na ye liboso ya kobanda boyekoli, mingimingi asɛngaka lisalisi epai na Yehova mpo ete azala na makanisi mabongi mpo na makambo nyonso oyo makotalelama.​—Nzembo 119:66.

13 Kotambwisa boyekoli ya libota ezali mokumba ya baboti oyo bazali bandimi. Ya solo, ekoki kozala ete baboti mosusu bazali bateyi ya makoki mingi te, mpe ekoki kozala mpasi mpo na bango ete bámona myango oyo mibongi mpo na koyeisa boyekoli ya libota likambo ya kosepelisa. Atako bongo, soki olingaka bana na yo oyo bazali bilenge, “na misala mpe na solo,” okozala na mposa ya kosalisa bango na lolenge ya bopɔlɔ mpe ya kolongobana mpo ete bákóla na elimo. (1 Yoane 3:18) Na bantango mosusu bakoki koimaima, kasi na nsima bakoyeba mpenza lobanzo na yo mozindo mpo na bolamu na bango.

14. Lolenge nini Deteronome 11:18, 19 ekoki kosalelama ntango tozali kosolola makambo ya elimo elongo na bilenge?

14 Boyekoli ya libota ezali te libaku bobele moko mpo na kosolola makambo oyo mazali mpenza na ntina na elimo. Ozali komikundola mobeko oyo Yehova apesaki epai na baboti? Alobaki ete: “Bokobomba maloba na ngai oyo na mitema na bino mpe na milimo na bino, mpe okokanga yango lokola elembo na lobɔkɔ na yo, mpe makozala lokola bikaniseli na kati na miso na bino. Bokolakisa yango na bana na bino, kosolola yango wana ekofanda yo na ndako na yo, mpe ekotambola yo na nzela, mpe ekolala yo, mpe ekotɛma yo.” (Deteronome 11:18, 19; talá mpe Deteronome 6:6, 7.) Yango elingi koloba te ete baboti basengeli ntango nyonso kosakola epai na bana na bango. Kasi tata ya libota oyo azali na bolingo asengeli ntango nyonso kosimba mabaku nyonso mpo na kotonga libota na ye na elimo.

DISIPILINI MPE LIMEMYA

15, 16. (a) Disipilini ezali nini? (b) Nani azali na mokumba ya kopesa disipilini, mpe nani azali na mokumba ya kondima kotosa yango?

15 Disipilini ezali kobongisama oyo esembolaka, mpe yango esɛngi kosolola. Disipilini ezali kopesa mingi mpenza likanisi ya kosembola koleka likanisi ya kopesa etumbu​—atako kopesa etumbu ekoki mpe kozala na ntina. Bana na yo bazalaki na mposa mpenza ya disipilini ntango bazalaki mike, mpe sikawa lokola bakómi bilenge, bazali na mposa na motindo mosusu na yango, mbala mosusu ata mpe ya makasi. Bilenge ya mayele bayebi ete likambo oyo lizali solo.

16 Biblia elobi ete: “Elɛma akotyola [disipilini, NW] na tata na ye, nde ye oyo akotosa mpamela azali na mayele.” (Masese 15:5) Mokapo oyo eteyi biso makambo mingi. Emonisi ete disipilini esengeli kopesama. Elenge akoki ‘kotosa mpamela’ te soki yango epesami te. Yehova apesi epai na baboti, mingimingi epai na tata, mokumba ya kopesa disipilini. Nzokande, mokumba ya koyokamela disipilini yango ezali mpo na elenge. Akoyekola makambo mingi mpe akosala mabungá mingi te soki azali kolanda disipilini ya mayele ya tata na ye mpe ya mama na ye. (Masese 1:8) Biblia elobi: “Bobólá mpe nsɔni izali epai na ye oyo akoboya [disipilini]; nde ye oyo akotosa mpamela akokumisama.”​—Masese 13:18.

17. Ndenge nini baboti basengeli kozala na bokatikati ntango bazali kopesa disipilini?

17 Wana bazali kopesa disipilini epai na bana na bango oyo bazali bilenge, baboti basengeli kozala na bokatikati. Basengeli kopɛngola ezaleli ya makambo makasi kino koyokisa bana na bango nkanda, mbala mosusu ata mpe kobebisa ezaleli na bango ya komityela motema. (Bakolose 3:21) Nzokande baboti basengeli te kopesa nzela na makambo nyonso kino kosala ete bana na bango oyo bazali bilenge bázanga kobɔkwama na lolenge oyo esengeli. Ezaleli wana ya kopesa nzela na makambo nyonso ekoki kozala likámá. Masese 29:17 elobi ete: “Pamelá mwana na yo mpe akopesa yo kimya; ɛɛ akosepelisa mpe molimo na yo.” Nzokande, molɔngɔ́ 21, (NW) elobi ete: “Soki moto azali komonisa boboto boleki ndelo epai na mosaleli na ye uta bomwana na ye, ntango akokóla akozanga botɔ́ndi.” Atako mokapo oyo elobeli mosaleli ebongi mpe kosalelama mpo na bilenge kati na libota.

18. Disipilini ezali elembo ya nini, mpe baboti basengeli kopɛngola nini ntango bazali kopesa disipilini oyo ezali na bokatikati?

18 Kati na solo, disipilini ya malamu ezali elembo ya bolingo oyo moboti azali na yango mpo na mwana na ye. (Baebele 12:6, 11) Soki ozali moboti, oyebi ete ezalaka mpasi kobatela disipilini ya bokatikati ntango nyonso. Mpo na koboya makɛlɛlɛ, moboti akoki kopusama na kotika nzela na elenge ya motó makasi ete asala oyo ye alingi. Nzokande, moboti oyo akolanda lolenge oyo ya kosala, na nsima akozala na libota oyo moto na moto azali kosala ndenge ye moko alingi.​—Masese 29:15; Bagalatia 6:9.

MOSALA MPE KOSAKANA

19, 20. Lolenge nini baboti bakoki kosala na mayele nyonso na makambo matali kominanola mpo na bana na bango oyo bakómi bilenge?

19 Na ntango ya kala momeseno ezalaki ete bana bapesaka mabɔkɔ na misala ya ndako to na mosala ya bilanga. Lelo oyo, ebele ya bilenge bazali na ntango mingi oyo bazangi makambo ya kosala. Mpo na kosala ete ntango wana eleka mpamba te, bato ya mombongo bazali kobimisa biloko mingi mpo na kominanola na yango. Likoló na makambo oyo, mokili ezali kopesa motuya mingi te na mibeko ya Biblia oyo mitali bizaleli malamu, mpe makambo oyo makoki kopesa likámá mazali mingi.

20 Na yango, moboti ya mayele abatelaka ntango nyonso lotómo na ye ya kozwa ekateli ya nsuka mpo na oyo etali kominanola. Kasi, kobosana te ete elenge azali kokóla. Nsima na mbula mokomoko, akolikya ete básalela ye makambo lokola mokóló. Na yango, ezali likambo ya mayele mpo na moboti ete apesa ye mwa bonsomi mpo na oyo etali kopona lolenge ya kominanola wana elenge azali kokóla​—soki maponi na ye mazali komonisa ete azali kokóla kino kokɔmɛla na elimo. Na bantango mosusu, elenge akoki kosala liponi lizangi mayele mpo na oyo etali miziki, baninga, mpe bongo na bongo. Ntango likambo motindo wana lisalemi, esengeli kosolola yango elongo na elenge na boye ete na mbala ya nsima akoka kosala maponi ya malamu.

21. Lolenge nini ezaleli ya kozanga kolekisa ndelo na ntango epesami na kominanola ekobatela elenge?

21 Ntango boni esengeli kolekisama kati na kominanola? Na mikili misusu, bilenge bapusami na kokanisa ete basengeli kominanola ntango nyonso. Na yango, elenge moko akoki kosala ebongiseli malamu mpo na oyo etali ntango ya kominanola. Ezali mokumba ya baboti na kolakisa bilenge ete ntango esengeli mpe kolekisama na makambo mosusu, na ndakisa na libota, na boyekoli na ye moko, na kozala elongo na bato oyo bakɔmɛli na makambo ya elimo, na makita ya boklisto, mpe na misala ya ndako. Yango ekobatela bango mpo ete “mposa mabe na bomoi oyo” ebebisa Liloba ya Nzambe te.​—Luka 8:11-15.

22. Longola kominanola, eloko nini lisusu ezali na esika kati na bomoi, oyo elenge asengeli koyeba yango?

22 Mokonzi Salomo alobaki ete: “Nayebi ete eloko mosusu eleki oyo te ete básepela mpe ete básala malamu naino bazali na bomoi, mpe ete moto na moto alya mpe amela mpe ayoka esengo mpo na malamu na mosala na ye nyonso.” (Mosakoli 3:12, 13) Ɛɛ, kosepela ezali na esika na yango kati na bomoi. Kasi mosala makasi ezali mpe na esika na yango. Bilenge mingi lelo oyo bayebi te bosepeli oyo ekozwamaka nsima na kosala mosala makasi to mayoki ya komipesa limemya oyo mayaka nsima ya kobunda na mokakatano moko mpe kosilisa yango. Bamoko bapesameli te libaku kitoko ya kokólisa makoki na bango to ya koyeba mosala moko oyo mokosunga bango na kokokisa bamposa na bango na mikolo mizali koya kati na bomoi. Yango ezali ntembe monene mpo na moboti. Okomindimisa ete mwana na yo oyo akómi elenge azali na makoki motindo wana? Soki olóngi mpo na koteya mwana na yo oyo akómi elenge ete abanda kopesa motuya na mosala makasi mpe kosepela na kosala yango, akokólisa lolenge malamu ya kotalela makambo, mpe yango ekomemela ye matomba kati na bomoi.

LONGWA NA ELENGE KINO NA MOKÓLÓ

Monisá bolingo mpe botɔ́ndi epai na bana na yo

23. Lolenge nini baboti bakoki kolendisa bana na bango oyo bakómi bilenge?

23 Ata ntango ozali na matáta elongo na mwana na yo oyo akómi elenge, mokapo oyo ezali bobele solo: “Bolingo ekosuka te.” (1 Bakolinti 13:8) Kotika soko moke te komonisa bolingo oyo ozali na yango. Omituna yo moko, ‘Napesaka mwana moko na moko longonya na likambo ya malamu asali mpo na kosilisa mikakatano to kolónga botɛmɛli? Nazwaka mabaku ya komonisa bolingo na ngai mpe botɔ́ndi na ngai epai na bana na ngai, liboso ete mabaku yango máleka?’ Atako na bantango mosusu matáta makoki kozala, soki bilenge bazali na mayoki ete ozali na bolingo mpo na bango, ya solo bango mpe bakomonisa mpenza bolingo.

24. Mokapo nini emonisi solo oyo eyebani lokola etindá mpo na kobɔkɔla bana, kasi eloko nini tosengeli kobosana yango te?

24 Ya solo, wana bana bazali kokóla mpo na kokóma mikóló, bakokutana na makambo oyo ekosengela na bango ete bákamata bikateli minene bango moko. Na makambo mosusu, baboti bakoki kokamata bikateli yango te. Ekozala boni soki mwana na bango azwi ekateli ya kotika kosalela Yehova Nzambe? Yango ekoki kosalema. Ata bamoko kati na bana ya Yehova na elimo baboyaki toli na ye mpe bakómaki batomboki. (Genese 6:2; Yuda 6) Bana bazali baordinatɛrɛ te, oyo tosengeli kotambwisa bango bobele na lolenge oyo biso tosili kokana ete bátambola bongo. Bazali bikelamu oyo bazali na bonsomi ya kopona oyo balingi, bazali na mokumba liboso na Yehova mpo na bikateli oyo bazali kokamata. Nzokande, Masese 22:6 elobeli solo oyo eyebani lokola etindá: “Bokɔlá mwana na nzela ekoki na ye kotambola; ekokóma ye monene akopɛngwa na yango te.”

25. Nini ezali nzela ya malamu koleka oyo baboti bakoki komonisa na yango botɔ́ndi epai na Yehova na ntina na libaku malamu bazali na yango ya kozala baboti?

25 Na bongo, monisá bolingo mingi epai na bana na yo. Salá oyo esengeli na yo na kolanda mitindá ya Biblia mpo na kobɔkɔla bango. Pesá ndakisa malamu ya moto amipesi na Nzambe. Na yango, okopesa na bana na yo mabaku malamu ya kokóla mpo na kokóma mikóló oyo bazali kokokisa mikumba na bango mpe oyo bazali kobanga Nzambe. Oyo ezali nzela eleki malamu mpo na baboti na komonisa botɔ́ndi epai na Yehova mpo na libaku malamu apesaki bango ya kozala baboti.