Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Maloba ya ebandeli

Maloba ya ebandeli

Ndeko motángi:

Omonaka ete ozali penepene na Nzambe? Bato mingi bakanisaka ete moto akoki kozala penepene na Nzambe te. Basusu bakanisaka bongo mpo bamonaka ete Nzambe azali mpenza mosika na bato; basusu mpe bamonaka ete babongi mpenza te kozala penepene na ye. Nzokande, na bolingo mpenza, Biblia elendisi biso boye: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yakobo 4:8) Nzambe azali kutu kokitisa mitema ya basambeli na ye na maloba oyo: “Ngai [Yehova], Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali; ngai nazali koloba na yo ete, Bangá te: ngai nakosunga yo.”​—Yisaya 41:13.

Ndenge nini tokoki kokóma mpenza baninga ya Nzambe? Mpo moto akóma moninga na biso, esɛngaka liboso tóyeba ye mpe tósepela mpenza na bizaleli na ye. Yango wana, koyekola bizaleli ya Nzambe mpe banzela na ye ndenge Biblia emonisi yango ezali na ntina mingi. Tokopusana penepene na Yehova soki tokanisi malamumalamu lolenge oyo ye amonisaka mokomoko na bizaleli na ye, soki totaleli lolenge ya malamu mpenza oyo Yesu Klisto amonisaki bizaleli yango mpe soki toyebi lolenge oyo biso mpe tokoki kolona yango. Tokoyeba ete Yehova nde azali na lotomo ya kozala Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mpe abongi mpenza na yango. Lisusu, azali Tata oyo biso nyonso tosengeli na ye. Azali na makasi, na bosembo, na bwanya mpe na bolingo, mpe asundolaka bana na ye ya sembo ata moke te.

Tiká ete buku oyo esalisa yo opusana ntango nyonso penepene na Yehova Nzambe mpe okóma moninga na ye ya libela mpo okoka kozala na bomoi oyo ekopesa yo nzela ya kokumisa ye libela na libela.

Babimisi