Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 1

Azali na “makasi kati na nguya”

Azali na “makasi kati na nguya”

Na eteni oyo, tokotalela masolo ya Biblia oyo ezali komonisa ete Yehova azali na nguya ya kokela, ya kobebisa, ya kobatela mpe ya kozongisa makambo ndenge ezalaki. Soki toyebi malamu ndenge Yehova Nzambe oyo azali na “makasi kati na nguya” asalelaka “nguya” na ye, tokobanga ye mpe tokopesa ye limemya mingi.​—Yisaya 40:26.

NA ETENI OYO

MOKAPO 4

“Yehova . . . azali monene na nguya”

Nguya ya Nzambe esengeli kotinda biso tóbanga ye? Tokoki kopesa eyano ɛɛ mpe te, biyano nyonso mibale ezali solo.

MOKAPO 5

Nguya ya kokela​—“Ye oyo asalaki lola mpe mokili”

Kobanda na eloko ya monene lokola moi tii na mwa ndɛkɛ lokola colibri, tokoki mpenza kozwa mateya mingi epai ya Nzambe soki totali biloko oyo akelá.

MOKAPO 6

Nguya ya kobebisa​—“Yehova azali elombe ya etumba”

Ndenge nini “Nzambe ya kimya” abundaka bitumba na ye?

MOKAPO 7

Nguya ya kobatela​—“Nzambe azali esika na biso ya komibomba”

Nzambe abatelaka basaleli na ye na lolenge mibale, kasi moko ezali ya ntina mingi koleka.

MOKAPO 8

Nguya ya kozongisa makambo ndenge ezalaki​—Yehova azali “kosala biloko nyonso biloko ya sika”

Yehova asili kozongisa losambo ya pɛto. Akozongisa nini na mikolo ezali koya?

MOKAPO 9

“Klisto azali nguya ya Nzambe”

Makamwisi ya Yesu Kristo mpe mateya na ye emonisi nini na ntina na Yehova?

MOKAPO 10

“Bókóma bamekoli ya Nzambe” na ndenge oyo bosalelaka nguya na bino

Soki ozali na nguya mingi koleka, ndenge nini okoki kosalela yango na lolenge oyo ebongi?