Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 13

“Mobeko ya Yehova ezali ya kokoka”

“Mobeko ya Yehova ezali ya kokoka”

1, 2. Mpo na nini bato mingi batyolaka mibeko, kasi ndenge nini tokoki kolinga mibeko ya Nzambe?

 “MIBEKO ezali libulu moko oyo bozindo na yango ezali na nsuka te, . . . emɛlaka eloko nyonso.” Maloba yango ekomamaki na buku moko oyo ebimaki na mobu 1712. Mokomi na yango azalaki kotɔndɔla mabe ya mibeko oyo ezalaki koumisa, ntango mosusu bambula na bambula, makambo oyo bafundi na tribinale liboso bákata yango; na yango, baoyo bazalaki kofunda makambo na bango na tribinale bazalaki kosuka na kokóma babola. Na mikili mingi, bato mingi bakómi kotyola mibeko, mpamba te mibeko mpe batribinale ezali na mindɔndɔ mingi, bosembo ezali te, baponaka bilongi mpe makambo na yango ezali bongolabongola.

2 Talá sikoyo ndenge ezaleli yango ekeseni na maloba oyo elandi, oyo ekomamaki eleki sikoyo mbula soki 2 700: “Ɛɛ nalingi Mobeko na yo na bolingo bɛɛ!” (Nzembo 119:97) Mpo na nini mokomi ya nzembo oyo alingaki mobeko yango mingi ndenge wana? Alingaki yango bongo mpamba te eutaki na Yehova Nzambe, kasi na guvɛrnema moko ya mokili te. Soki ozali koyekola mibeko ya Yehova, yo mpe okolinga yango mingi lokola mokomi ya nzembo wana. Okoyeba malamumalamu makanisi ya Mopesi-Mibeko oyo aleki bapesi-mibeko nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba.

Mopesi-Mibeko oyo aleki bapesi-mibeko nyonso

3, 4. Na ndenge nini Yehova amonisaki ete azali Mopesi-Mibeko?

3 Biblia eyebisi biso ete: “Ezali na moto moko kaka oyo azali mopesi-mibeko mpe mosambisi.” (Yakobo 4:12) Yehova nde Mopesi-Mibeko yango. Ata biloko oyo ezali kuna na likoló elandaka “mibeko [na ye] ya lola.” (Yobo 38:33) Mobeko na ye etambwisaka mpe ebele ya baanzelu basantu, oyo atyá bango bitulukubituluku oyo ekeseni na lokumu, mpe batosaka mitindo na ye ntango basalelaka ye.​—Nzembo 104:4; Baebele 1:7, 14.

4 Yehova apesaki mpe bato mibeko. Mokomoko na biso azali na lisosoli oyo emonisaka bosembo ya Yehova. Yango ezali lokola mobeko moko oyo ezali na kati na biso oyo ekoki kosalisa biso na kokesenisa mabe ná malamu. (Baloma 2:14) Lokola baboti na biso ya liboso bazalaki na lisosoli ya kokoka, basengelaki na mibeko moke kaka mpo na kosala mokano ya Nzambe. (Genese 2:15-17) Nzokande, bato ya kozanga kokoka basengeli na mibeko mingi. Yango wana, Yehova Nzambe apesaki bato ya kala, na ndakisa Noa, Abalayama mpe Yakobo, mibeko; bango mpe balakisaki yango mabota na bango. (Genese 6:22; 9:3-6; 18:19; 26:4, 5) Yehova amikómisaki Mopesi-Mibeko na ndenge moko ya sika ntango apesaki ekólo ya Yisalaele Mibeko na nzela ya Moize. Mibeko yango ezali kosalisa biso tómona malamumalamu ete Yehova alingi bosembo.

Mibeko ya Moize​—Na mokuse

5. Mibeko ya Moize ezalaki kilo mpe na mindɔndɔ mingi? Mpo na nini oyanoli bongo?

5 Mpo na bato mingi, Mibeko ya Moize ezalaki kilo mpe na mindɔndɔ mingi. Likanisi wana ezali mpenza solo te. Mibeko wana nyonso elekaki 600. Ntango mosusu okokanisa ete elekaki ebele, kasi zwá kaka ndakisa oyo: Na nsuka ya ekeke ya 20, mibeko ya États-Unis ekomamaki na nkasa koleka 150 000. Mpe, nsima ya mbula mibalemibale, babakisaka mibeko mosusu 600! Emonani polele ete mibeko ya bato ezali ebele koleka Mibeko ya Moize. Atako bongo, Mibeko yango emonisaki Bayisalaele ndenge ya kosala na makambo mosusu ya bomoi oyo mibeko ya mikolo na biso ebandi naino te ata kobanda kotalela yango. Tótalela Mibeko yango na mokuse.

6, 7. (a) Nini ekesenisi Mibeko ya Moize ná mibeko mosusu, mpe wapi mobeko na yango oyo elekaki mibeko mosusu nyonso? (b) Ndenge nini Bayisalaele bazalaki komonisa ete bandimi bokonzi ya Yehova?

6 Mibeko ezalaki kokumisa bokonzi ya Yehova. Na likambo yango, Mibeko ya Moize eleki mosika mibeko mosusu nyonso. Mobeko na yango oyo elekaki mosusu nyonso yango oyo: ‘Yoká, ee Yisalaele, Yehova azali Nzambe na biso, Yehova moko, mpe okolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na nguya na yo mobimba.’ Ndenge nini bato ya ekólo ya Nzambe basengelaki komonisa ete balingi ye? Basengelaki kosalela ye, kotosa bokonzi na ye.​—Deteronome 6:4, 5; 11:13.

7 Mwana ya Yisalaele mokomoko azalaki komonisa ete andimi bokonzi ya Yehova na ntango azali kotosa baoyo batyami likoló na ye. Baboti, bankumu, bazuzi, banganga-nzambe mpe na nsuka bakonzi, bango nyonso bazalaki bamonisi ya bokonzi ya Nzambe. Soki moto atombokeli baoyo bazali na bokonzi, Yehova azalaki komona ete moto yango atombokeli nde ye. Nzokande, Yehova azalaki mpe kosilikela baoyo bazali na bokonzi soki basaleli bato na ye makambo oyo ezali sembo te to soki basaleli bango makambo na nko mpenza. (Exode 20:12; 22:28; Deteronome 1:16, 17; 17:8-20; 19:16, 17) Na yango, ezala baoyo bazalaki na bokonzi to baoyo basengelaki kotosa bokonzi yango, bango nyonso basengelaki kosimba bokonzi ya Nzambe.

8. Ndenge nini Mibeko ezalaki komonisa masɛngami ya Yehova na likambo etali bosantu?

8 Mibeko ezalaki komonisa masɛngami ya Yehova na likambo etali bosantu. Na Mibeko ya Moize, okokuta maloba “mosantu” mpe “bosantu” mbala koleka 280. Mibeko esalisaki bato ya ekólo ya Nzambe báyeba kokesenisa eloko ya pɛto ná eloko ya mbindo; mibeko etángaki biloko soki 70 oyo ekokaki kokómisa Moyisalaele mbindo na makambo ya losambo. Mibeko yango etalelaki bopɛto ya nzoto, bilei, ata mpe likambo etali kobwaka bosɔtɔ. Mibeko yango ezalaki na matomba mingi mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto. * Kasi ezalaki na mokano ya ntina koleka​—kosalisa Bayisalaele ete bándimama ntango nyonso na Yehova, bázala mosika na mimeseno mabe ya bikólo ya mbindo oyo ezalaki zingazinga na bango. Tózwa ndakisa moko.

9, 10. Mibeko mosusu emonisaki nini na ntina na kosangisa nzoto mpe kobota, mpe matomba nini mibeko yango epesaki?

9 Ezalaki na mibeko oyo emonisaki ete kosangisa nzoto to kobota​—ata mpo na bato oyo babalá—​ezalaki kokómisa moto mbindo mpo na mwa ntango. (Levitike 12:2-4; 15:16-18) Mibeko wana ezalaki kotyola te makabo yango ya pɛto oyo euti na Nzambe. (Genese 1:28; 2:18-25) Ezalaki nde komonisa polele bosantu ya Yehova na ndenge ezalaki kobatela basambeli na ye na makambo oyo ekokaki kokómisa bango mbindo. Ezali malamu koyeba ete bikólo oyo ezalaki zingazinga ya Yisalaele ezalaki ntango nyonso koluka kokɔtisa makambo ya kosangisa nzoto mpe milulu etali makambo ya kobota na kati ya losambo. Mibali mpe basi bazalaki kosala kindumba na losambo ya Bakanana. Nyonso wana ebimisaki makambo ya mabe mpenza, oyo mpe epalanganaki mingi. Kasi, Mibeko esalaki ete makambo ya kosangisa nzoto ekɔta ata moke te na losambo ya Yehova. * Matomba mosusu mpe ezalaki.

10 Mibeko wana ezalaki koteya likambo moko ya solo mpe ya ntina mingi. * Ndenge nini baboti balekisaka mbindo ya lisumu ya Adama epai ya bana na bango? Ezali na nzela ya kosangisa nzoto mpe kobota, boye te? (Baloma 5:12) Na ndenge yango, Mibeko ya Nzambe ezalaki ntango nyonso kosalisa bato na ye bábosana te ete lisumu ezali. Kutu, biso nyonso tobotamaki na kati ya lisumu. (Nzembo 51:5) Esengeli tólimbisama mpe tósikolama mpo tópusana penepene na Nzambe na biso oyo azali mosantu.

11, 12. (a) Na makambo etali kosambisa, Mibeko ezalaki kobenda likebi mingi na etinda nini ya ntina? (b) Malako nini ya Mibeko ezalaki kopekisa kosambisa makambo na ndenge oyo ezali sembo te?

11 Mibeko ezalaki komonisa bosembo ya kokoka ya Yehova. Mibeko ya Moize ezalaki kobenda likebi mingi na etinda ya bokokani, to bokatikati, na makambo etali kosambisa. Yango wana, Mibeko elobaki ete: “Ekozala bomoi mpo na bomoi, mpe liso mpo na liso, mpe lino mpo na lino, mpe lobɔkɔ mpo na lobɔkɔ, mpe likaka mpo na likaka.” (Deteronome 19:21) Na yango, soki moto asali likambo oyo mibeko epekisi, etumbu oyo akozwa esengelaki koyokana na likambo asali. Etinda yango ya bosembo ya Nzambe emonanaki na Mibeko nyonso mpe tii na moi ya lelo ezalaka na ntina mingi mpo na kokanga ntina ya mbeka oyo Yesu Klisto apesaki mpo na kosikola biso, ndenge Mokapo 14 ekomonisa yango.​—1 Timote 2:5, 6.

12 Mibeko ezalaki mpe na malako mosusu oyo ezalaki kopekisa kosambisa makambo na ndenge oyo ezali sembo te. Na ndakisa, esengelaki batatoli bázala mibale to koleka mpo na kondimisa likambo oyo moto afundami na yango. Moto oyo apesi litatoli ya lokuta na miso ya bazuzi asengelaki kozwa etumbu ya makasi. (Deteronome 19:15, 18, 19) Kanyaka epekisamaki mpe makasi. (Exode 23:8; Deteronome 27:25) Ata na makambo ya mombongo, bato ya ekólo ya Nzambe basengelaki kotosa mitinda na ye ya bosembo mpamba te yango eleki malamu. (Levitike 19:35, 36; Deteronome 23:19, 20) Mibeko ya Moize ezalaki lipamboli monene mpo na Yisalaele, mpamba te elekaki malamu mpe ezalaki sembo!

Mibeko ezalaki kosɛnga komonisa motema mawa mpe kopona bilongi te na ntango ya kosambisa

13, 14. Lolenge nini Mibeko esɛngaki ete bákataka na bosembo likambo ya moyibi ná moto oyo ye ayibelaki?

13 Mibeko ya Moize ezalaki na ebele ya malako ya makasimakasi oyo ezalaki koyokela bato mawa ata moke te? Te! Na lisalisi ya elimo santu, Mokonzi Davidi akomaki ete: “Mobeko ya Yehova ezali ya kokoka.” (Nzembo 19:7) Lokola Davidi ayebaki yango malamu, Mibeko ezalaki kolendisa ezaleli ya motema mawa mpe ya kopona bilongi te. Ndenge nini?

14 Lelo oyo, na mikili mosusu, emonanaka ete mibeko eyokelaka basali ya mabe mawa mingi, kasi etyelaka mpenza bato oyo basalelami mabe likebi mingi te. Na ndakisa, bakoki kokanga moyibi na bolɔkɔ mpo na mwa ntango. Nzokande, ntango mosusu moto oyo ye ayibelaki azwi naino te biloko yango, kasi bazali kosɛnga ye afuta mpako; mpe na mbongo yango, babongisaka bisika ya kotya basali ya mabe ya ndenge wana mpe baleisaka bango. Na Yisalaele ya kala, babolɔkɔ lokola oyo biso toyebi lelo ezalaki te. Mibeko ezalaki komonisa etumbu ya nsuka oyo bakokaki kopesa moto. (Deteronome 25:1-3) Moyibi asengelaki kofuta eloko oyo ayibi. Longola yango, asengelaki kofuta amande; motuya boni? Motuya na yango ezalaki kobongwana. Emonani ete, mpo na kokata motuya yango, bazuzi bazalaki na likoki ya kotalela makambo mwa mingi, na ndakisa koyeba soki moto oyo asali lisumu yango abongoli motema to te. Ekoki kozala mpo na yango nde biloko oyo Levitike 6:1-7 esɛngaki moyibi afuta ezali moke mingi koleka oyo Exode 22:7 esɛngaki.

15. Soki moto abomi moto mosusu na nko te, ndenge nini Mibeko ezalaki komonisa motema mawa mpe bosembo?

15 Na motema mawa mpenza, Mibeko ezalaki kondima ete mabe nyonso bato basalaka, basalaka yango na nko te. Na ndakisa, ntango moto moko abomi moto mosusu na nko te, asengelaki te kofuta molimo mpo na molimo soki asali likambo oyo esengelaki: kokima na moko ya bingumba ya kobombama oyo ezalaki bipai na bipai na Yisalaele. Soki bazuzi ya makoki bataleli likambo na ye, asengelaki kofanda na engumba ya kobombama tii ntango nganga-nzambe monene akokufa. Na ntango wana nde asengelaki kozala na bonsomi ya kokende kofanda na mboka nyonso oyo alingi. Ezali na ndenge wana nde Nzambe amoniselaki ye motema mawa. Mobeko yango ezalaki komonisa mpe ete bomoi ya moto ezali na valɛrɛ mingi.​—Mituya 15:30, 31; 35:12-25.

16. Ndenge nini Mibeko ezalaki kobatela ntomo mosusu ya moto na moto?

16 Mibeko ezalaki kobatela ntomo ya moto na moto. Na ndakisa, tótalela ndenge oyo ezalaki kobatela baoyo bakɔtaki nyongo. Mibeko epekisaki modefisi kokɔta na ndako ya moto oyo azali na nyongo na ye mpo na kokanga eloko moko ndanga. Modefisi asengelaki nde kotikala libándá mpe moto ya nyongo ye moko nde amemela ye eloko yango. Na ndenge yango, moto akokaki te kokɔta na ndako ya moto mosusu na makasi. Soki modefisi akangaki elamba ya likoló ya moto ya nyongo lokola ndanga, asengelaki kozongisela ye yango ntango butu ekɔti, mpo ntango mosusu moto yango akosengela na yango mpo na komizipa na butu.​—Deteronome 24:10-14.

17, 18. Na makambo ya bitumba, ndenge nini Bayisalaele bakeseneki na bikólo mosusu, mpe mpo na nini?

17 Mibeko ezalaki ata kotalela makambo ya bitumba. Bato ya ekólo ya Nzambe basengelaki kobunda bitumba kaka mpo na koluka bokonzi to kobɔtɔla bamboka mosusu te, kasi mpo Yehova azali kotinda bango bábunda ‘bitumba na ye.’ (Mituya 21:14) Mbala mingi, Bayisalaele basengelaki naino kosɛnga bato ya engumba oyo balingi kobunda na yango báya komitika bango moko. Soki baboyi, na ntango wana nde basoda ya Yisalaele bazalaki kozinga bango​—kasi basengelaki kolanda malako ya Nzambe. Basoda ya Yisalaele bakeseneki na ebele ya basoda mosusu ya ntango ya kala; bango bazalaki na ndingisa te ya kobebisa basi to koboma bato bibomelá. Basengelaki komonisa limemya ata mpo na bazamba, kokata te banzete ya mbuma oyo ezali na mboka ya banguna. * Bikólo mosusu epekisaki basoda na yango makambo wana te.​—Deteronome 20:10-15, 19, 20; 21:10-13.

18 Epesaka yo nkanda soki oyoki ete na mikili mosusu bazali kopesa bana mpenza formasyo mpo bákóma basoda? Na Yisalaele ya kala, mwana mobali oyo akokisi naino mbula 20 te azalaki kokɔta na mosala ya soda te. (Mituya 1:2, 3) Ata mpe mokóló ya bibangabanga bazalaki kokɔtisa ye te. Elenge mobali oyo abali sika mpe akokisi naino mbula moko ya libala te, asengelaki kokɔta na mosala yango te oyo etondi na makama mpo akoka naino kobota mwana mobali oyo akotikala na biloko na ye soki ye akufi. Mibeko elimbolaki ete na ndenge yango, elenge mobali yango azalaki na likoki ya ‘kosepelisa’ mwasi oyo auti kobala.​—Deteronome 20:5, 6, 8; 24:5.

19. Mibeko esɛngaki mpe makambo nini mpo na kobatela basi, bana, mabota, basi oyo bakufelá mibali mpe bitike?

19 Mibeko ezalaki mpe kobatela basi, bana mpe mabota mpe kotalela bamposa na bango. Esɛngaki baboti bátyelaka bana na bango likebi ntango nyonso mpe báteyaka bango makambo ya elimo. (Deteronome 6:6, 7) Epekisaki bato nyonso oyo bazali bandeko kosangisa nzoto kati na bango, mpe ekatelaki baoyo nyonso bakosala likambo yango etumbu ya liwa. (Levitike, mokapo 18) Epekisaki mpe ekobo, likambo oyo mbala mingi epanzaka mabota mpe esalaka ete mibali, basi mpe bana bámiyoka lisusu malamu te mpe bámona ete bazali lisusu na ntina te. Mibeko ezalaki kotalela bamposa ya basi oyo bakufelá mibali mpe bitike mpe epekisaki makasi mpenza konyokola bango.​—Exode 20:14; 22:22-24.

20, 21. (a) Mpo na nini Mibeko ya Moize epesaki Bayisalaele nzela ya kobala basi mingi? (b) Na likambo ya koboma libala, mpo na nini Mibeko ekeseneki na ndakisa ya ebandeli oyo Yesu azongisaki?

20 Nzokande, na likambo yango, basusu bakoki komituna boye, ‘Mpo na nini Mibeko epesaki mibali nzela bábalaka basi mingi?’ (Deteronome 21:15-17) Tosengeli kotalela makambo ndenge ezalaká na ntango wana mpo na kokanga ntina ya mibeko yango malamu. Ntembe ezali te ete baoyo bazali kotalela Mibeko yango ya Moize na makanisi mpe mimeseno ya mikolo na biso bakoki kokanga ntina na yango te. (Masese 18:13) Na Edene, Yehova amonisaki ndenge oyo libala esengeli kozala: mobali asengelaki kokangama na mwasi moko mpo na libela. (Genese 2:18, 20-24) Nzokande, na ntango oyo Yehova apesaki Yisalaele Mibeko, mimeseno lokola oyo ya kobala basi mingi esilaki kokɔta mpenza banda kala. Yehova ayebaki malamu ete ‘bato na ye oyo bazalaki mitó makasi’ bakobanda mbala na mbala kozanga kotosa mibeko na ye oyo eleki ntina, na ndakisa mibeko oyo ezalaki kopekisa kosambela bikeko. (Exode 32:9) Yango wana, na bwanya mpenza, amonaki ete eleko wana ezalaki naino te ntango ya kobongola mimeseno nyonso oyo bazalaki na yango na makambo etali libala. Atako bongo, yebá ete ezali Yehova te moto atindaki bato na kobala basi mingi. Kasi, asalelaki Mibeko ya Moize mpo na kopesa malako oyo etali likambo yango mpe kopekisa bato na ye ete básalela yango na ndenge ya mabe te.

21 Ndenge moko mpe, Mibeko ya Moize epesaki mobali nzela ya koboma libala na mwasi na ye mpo na ebele ya bantina ya minene. (Deteronome 24:1-4) Yesu alobaki ete Nzambe andimaki kotikela Bayuda básalaka bongo “mpo na ezaleli na [bango] ya mitema makasi.” Kasi, esengelaki kozala mpo na mwa ntango kaka. Yesu amonisaki ete bayekoli na ye basengeli kolanda ndakisa ya libala ya liboso oyo Yehova abandisaká.​—Matai 19:8.

Mibeko etindaki bato bálinganaka

22. Ndenge nini Mibeko ya Moize ezalaki kolendisa bolingo, mpe esengelaki komonisela banani bolingo yango?

22 Na makanisi, okoki komona mibeko moko ya mikolo na biso oyo etindaka bato bálingana? Mibeko ya Moize ezalaki kolendisa bolingo koleka makambo mosusu nyonso. Kutu, na mokanda ya Deteronome mpamba, basaleli mitindo ndenge na ndenge ya liloba “bolingo” mbala koleka 20. “Okolinga moninga na yo lokola yo mpenza” ezalaki mobeko ya mibale oyo elekaki monene na kati ya Mibeko nyonso. (Levitike 19:18; Matai 22:37-40) Bayisalaele basengelaki kolingana kaka bango na bango te; basengelaki mpe kolinga bapaya oyo bazalaki kofanda na kati na bango, kobosana te ete bango mpe bafandaká na mboka mopaya. Basengelaki kolinga babola mpe bato ya mpasi, kosalisa bango na biloko mpe koboya konyokola bango. Basɛngaki bango bámonisela ata nyama oyo ememaka mikumba boboto mpe bámibanzabanza mpo na yango.​—Exode 23:6; Levitike 19:14, 33, 34; Deteronome 22:4, 10; 24:17, 18.

23. Mokomi ya Nzembo 119 azalaki koyoka mposa ya kosala nini, mpe tokoki kozwa ekateli ya kosala nini?

23 Ekólo nini mosusu oyo ezwá mibeko ya ndenge wana? Yango wana, tokoki kokamwa te soki mokomi ya nzembo akomaki ete: “Ɛɛ nalingi Mobeko na yo na bolingo bɛɛ!” Nzokande, bolingo yango esukaki kaka na motema te. Ezalaki kotinda ye asala mosala, mpamba te azalaki kosala makasi atosa mobeko yango mpe asalela yango na bomoi na ye. Abakisaki lisusu ete: “Nakobanzaka [mobeko na yo] mokolo mobimba.” (Nzembo 119:11, 97) Ɛɛ, azalaki na momeseno ya koyekola mibeko ya Yehova. Na ntembe te, ntango azalaki koyekola yango, akómaki kolinga yango mingi. Akómaki mpe kolinga Yehova Nzambe mingi, Ye oyo apesaki mibeko yango. Yo mpe, tiká ete ntango ozali kolanda koyekola mibeko ya Yehova, opusana ntango nyonso penepene na Ye, Mopesi-Mibeko Monene mpe Nzambe ya bosembo.

^ Na ndakisa, ezali se nsima ya bambula nkama na nkama nde bato bayei komona ntina ya mibeko oyo esɛngaki kokunda nyei, kotya bato ya maladi mabe mosika na bato mosusu mpe kosukola nzoto soki osimbi ebembe.​—Levitike 13:4-8; Mituya 19:11-13, 17-19; Deteronome 23:13, 14.

^ Batempelo ya Bakanana ezalaki na bashambre oyo ebongisamaki mpo na kosangisa nzoto, nzokande Mibeko ya Moize epekisaki ete moto oyo azali mbindo ameka ata komeka te kokɔta na tempelo. Na ndenge yango, lokola kosangisa nzoto ezalaki kokómisa moto mbindo mpo na mwa ntango, mibeko epesaki moto ata moko te likoki ya kokɔtisa makambo ya kosangisa nzoto na kati ya losambo oyo ezalaki kosalema na ndako ya Yehova.

^ Mibeko ezalaki libosoliboso mpo na koteya. Kutu, buku Encyclopaedia Judaica elobi ete liloba ya Liebele, tôrah, oyo ebongolami na “mobeko” elimboli “mateya.”

^ Mibeko etunaki motuna oyo ya ntina: “Nzete ya elanga ezali bato ete osalela yango etumba?” (Deteronome 20:19) Philon, Moyuda moko moto ya mayele na ekeke ya liboso, alobelaki mobeko yango; alimbolaki ete Nzambe amonaka ete “ezali sembo te kosilisa nkanda oyo tozali koyokela bato mosusu epai ya biloko oyo esali mabe ata moko te.”