Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 2

Mokanda oyo euti na Nzambe moko ya bolingo

Mokanda oyo euti na Nzambe moko ya bolingo

YEBISÁ ngai naino, mokanda nini osepelaka mpenza kotánga?— Bana mosusu balingaka mikanda oyo elobelaka banyama. Bana mosusu mpe balingaka mikanda oyo ezali na bafɔtɔ mingi. Kotánga mikanda yango ekoki kosepelisa yo.

Kasi mikanda oyo eleki malamu mpenza na mokili oyo, ezali mikanda oyo elobelaka solo ya Nzambe. Moko na mikanda yango ezali na motuya mingi koleka mikanda nyonso mosusu. Oyebi soki ezali mokanda nini?— Mokanda yango ezali Biblia.

Mpo na nini Biblia ezali na ntina mingi koleka?— Mpamba te euti na Nzambe. Eyebisaka biso makambo na ye mpe makambo kitoko oyo akosala mpo na biso. Emonisaka biso makambo oyo tosengeli kosala mpo na kosepelisa ye. Ezali lokola mokanda moko oyo Nzambe akomeli biso.

Nzambe akokaki kokoma Biblia nyonso kuna na likoló mpe na nsima, kopesa yango bato. Kasi asalaki bongo te. Atako makanisi oyo ezali na kati eutaki na Nzambe, asalelaki basaleli na ye awa na mabelé mpo na kokoma biteni mingi ya Biblia.

Ndenge nini Nzambe asalaki yango?— Mpo na koyeba yango, tózwa ndakisa oyo. Ntango toyokaka mongongo ya moto moko na radio, mongongo yango eutaka na moto oyo mbala mosusu azali mosika mpenza na biso. Ntango totalaka televizyo, tokoki komona bililingi ya bato oyo bazali na bamboka mosusu, mpe tokoki koyoka makambo oyo bazali koloba.

Bato bakendaka kutu na bafize tii na sanza, mpe kuna, batindaka bansango awa na mabelé. Oyebaka yango?— Soki moto akoki kosala likambo ya ndenge wana, bongo Nzambe, kuna na likoló, akoki kotindela biso bansango te?— Ya solo, akoki kotinda! Banda kala, liboso kutu moto asala radio to televizyo, Nzambe azalaki kotinda bansango.

Moize azalaki mpenza moto oyo ayokaki Nzambe azali koloba. Moize amonaki Nzambe te, kasi ayokaki mongongo na ye. Bamilio ya bato bazalaki wana ntango likambo yango esalemaki. Mokolo yango, Nzambe asalaki ete ngomba eningana mpe abimisaki nkake na mikalikali. Bato oyo bazalaki wana bayebaki ete Nzambe azali koloba, kasi babangaki makasi. Yango wana bayebisaki Moize boye: ‘Kotika Nzambe aloba na biso te mpo tókufa te.’ Na nsima, Moize akomaki makambo nyonso oyo Nzambe alobaki. Mpe makambo oyo Moize akomaki ezali na Biblia.​—Exode 20:18-21.

Moize akomaki mikanda mitano ya liboso ya Biblia. Kasi, kaka Moize te nde akomaki mikanda ya Biblia. Nzambe asalelaki bato soki 40 mpo na kokoma mikanda ya Biblia. Bato yango bazalaki na bomoi kala mpenza, mpe bambula mingi elekaki liboso básilisa kokoma Biblia. Ya solo, elekaki mbula soki 1 600 liboso básilisa kokoma yango! Likambo ya kokamwa ezali ete atako basusu kati na bato yango bakutanaki ata te, makambo oyo bakomaki ezali kaka na likanisi ndenge moko.

Bato mosusu oyo Nzambe asalelaki mpo na kokoma Biblia bazalaki bato minene. Moize azalaki liboso mokɛngɛli ya mpate, kasi na nsima, akómaki motambwisi ya libota ya Yisalaele. Salomo azalaki mokonzi oyo azalaki na bwanya mpe na bozwi koleka bato nyonso na mokili. Kasi, bato mosusu oyo bakomaki Biblia bazalaki bato minene te. Amosa azalaki kosala na bilanga ya banzete ya figi.

Kati na bato yango oyo bakomaki Biblia, moko azalaki monganga. Oyebi nkombo na ye?— Nkombo na ye Luka. Mosusu azalaki mokɔngɔli-mpako. Nkombo na ye Matai. Mosusu mpe azalaki moto oyo ayekolaki mibeko mpe ayebaki malamu mpenza mibeko ya Lingomba ya Bayuda. Akomaki mikanda mingi na Biblia koleka bato nyonso mosusu. Oyebi nkombo na ye?— Nkombo na ye Paulo. Petelo ná Yoane, oyo bazalaki bayekoli ya Yesu mpe baluki-mbisi, bango mpe bakomaki Biblia.

Mingi kati na bato wana oyo bakomaki Biblia bakomaki makambo oyo Nzambe akosala na mikolo ekoya. Ndenge nini bayebaki makambo yango liboso esalema?— Nzambe nde ayebisaki bango yango. Ayebisaki bango makambo oyo ekosalema.

Ntango Yesu, Moteyi Monene azalaki awa na mabelé, mikanda mingi ya Biblia esilaki kokomama. Kobosana te ete Moteyi Monene azalaki na likoló. Ayebaki makambo oyo Nzambe asalaki. Azalaki kondima ete Biblia euti na Nzambe?— Ɛɛ, azalaki kondima yango.

Ntango Yesu azalaki koyebisa bato misala ya Nzambe, azalaki kotángela bango Biblia. Na bantango mosusu azalaki koyebisa bango maloba ya Biblia oyo akangaki na motó. Yesu amemelaki biso mpe makambo mingi oyo ayebaki epai ya Nzambe. Yesu alobaki boye: “Makambo oyo nayokaki epai na ye, nazali koloba yango na mokili.” (Yoane 8:26) Yesu ayokaki makambo mingi epai ya Nzambe mpamba te azalaki kofanda esika moko na Nzambe. Bongo epai wapi tokoki kotánga makambo yango oyo Yesu alobaki?— Tokoki kotánga yango na Biblia. Nyonso wana ekomamaki mpo biso tótánga yango.

Ya solo, ntango Nzambe asalelaki bato mpo na kokoma Biblia, bakomaki yango na monɔkɔ oyo bazalaki koloba. Yango wana mikanda mingi ya Biblia ekomamaki na monɔkɔ ya Liebele, mosusu na Aramɛyɛ mpe mikanda mingi mosusu na Grɛki. Lokola lelo ebele ya bato bayebi kotánga minɔkɔ yango te, babongolaki Biblia na minɔkɔ mosusu. Lelo oyo, okoki kotánga mikanda ndenge na ndenge ya Biblia na minɔkɔ koleka 2 260. Kanisá naino! Biblia ezali mokanda oyo euti na Nzambe mpo na bato ya bisika nyonso. Atako basalaki bakopi na yango mbala na mbala, nsango oyo ezali na kati euti kaka na Nzambe.

Makambo oyo Biblia elobaka ezali na ntina mingi mpo na biso. Ekomamá kala mpenza. Kasi ezali kolobela makambo oyo ezali kosalema lelo oyo. Ezali mpe koyebisa biso makambo oyo Nzambe akosala mosika te. Makambo oyo ezali koloba ezali kitoko mpenza! Ezali kopesa biso elikya kitoko mpenza.

Biblia ezali mpe koyebisa biso makambo oyo Nzambe alingi tósala na bomoi na biso. Ezali komonisa biso oyo ezali malamu ná oyo ezali mabe. Ngai ná yo tosengeli koyeba yango. Ezali koyebisa biso masolo ya bato oyo basalaki mabe mpe makambo oyo ekómelaki bango, mpo biso tókima mpasi oyo bango bakutanaki na yango. Ezali mpe koyebisa biso masolo ya bato oyo basalaki malamu mpe matomba oyo bazwaki. Nyonso wana ekomamaki mpo na bolamu na biso.

Kasi mpo na kozwa mpenza litomba na Biblia, tosengeli koyeba eyano na motuna moko. Motuna yango yango oyo: Nani apesaki biso Biblia? Okoloba nini?— Ya solo, Biblia mobimba euti na Nzambe. Bongo ndenge nini tokoki komonisa ete tozali mpenza bato ya bwanya?— Soki tozali koyoka Nzambe mpe kosala makambo oyo alobi.

Yango wana, tosengeli kozwa ntango ya kotángaka Biblia elongo. Soki moto moko oyo alingaka biso mingi akomeli biso mokanda, totángaka yango mbala na mbala. Ezalaka na motuya mingi na miso na biso. Biblia mpe esengeli kozala na valɛrɛ ndenge wana na miso na biso, mpamba te ezali mokanda oyo euti na Moto oyo alingaka biso mingi koleka. Ezali mokanda oyo euti na Nzambe moko ya bolingo.

Sikoyo, zwá mwa ntango ya kotánga bavɛrsɛ oyo emonisi ete Biblia ezali mpenza Liloba ya Nzambe, oyo ekomami mpo na bolamu na biso: Baloma 15:4; 2 Timote 3:16, 17; mpe 2 Petelo 1:20, 21.