Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 3

Moto oyo asalaki biloko nyonso

Moto oyo asalaki biloko nyonso

NAYEBI likambo moko kitoko mpenza. Olingi koyoka yango?— Talá lobɔkɔ na yo. Gumbá misapi na yo. Lɔkɔtá sikoyo eloko moko. Lobɔkɔ na yo ekoki kosala makambo mingi mpe esalaka yango malamu mpenza. Oyebi nani asalaki mabɔkɔ na biso?—

Ye mpe Moto asalaki monɔkɔ, zolo ná miso na biso. Ezali Nzambe, Tata ya Moteyi Monene. Tosepelaka ndenge Nzambe apesá biso miso, ezali bongo te?— Na miso na biso, tokoki komona makambo mingi. Tokoki kotala bafololo. Tokoki kotala matiti ya langi ya mai ya mpɔndu mpe likoló oyo ezali na langi ya bule. Tokoki mpe komona ndenge bandɛkɛ bazali kolya, lokola oyo ezali awa na elilingi. Ezali mpenza kitoko ete tomonaka biloko yango, ezali bongo te?—

Kasi, nani asalaki biloko yango? Ezali moto moko nde asalaki yango? Te. Moto akoki kosala ndako. Kasi, moto akoki te kosala matiti. Moto akoki te kosala mwana ya ndɛkɛ, fololo to eloko mosusu nyonso oyo ezali na bomoi. Oyebaka likambo yango?—

Nzambe nde asalaki biloko wana nyonso. Nzambe asalaki likoló ná mabelé. Asalaki mpe bato. Akelaki mobali ná mwasi ya liboso. Yesu, Moteyi Monene, ateyaki likambo yango.​—Matai 19:4-6.

Ndenge nini Yesu ayebaki ete Nzambe asalaki mobali ná mwasi? Yesu amonaki ntango Nzambe azalaki kosala bango?— Ɛɛ, amonaki yango. Yesu azalaki esika moko na Nzambe ntango Nzambe asalaki mobali ná mwasi. Yesu azali moto ya liboso oyo Nzambe asalaki. Yesu azalaki anzelu mpe azalaki kofanda na likoló esika moko na Tata na ye.

Biblia eyebisi biso ete Nzambe alobaki boye: “Tiká tózalisa moto.” (Genese 1:26) Oyebi soki Nzambe azalaki koloba na nani?— Azalaki koloba na Mwana na ye. Azalaki koloba na moto oyo na nsima ya bambula, ayaki na mabelé mpe bakómaki kobenga ye Yesu.

Likambo yango esepelisaka biso mpenza, ezali bongo te? Kanisá naino! Ntango tozali koyoka Yesu, tozali nde kozwa mateya epai ya moto oyo azalaki elongo na Nzambe ntango Nzambe asalaki mabelé mpe biloko mosusu nyonso. Yesu ayekolaki makambo mingi ntango azalaki kosala elongo na Tata na ye na likoló. Yango wana, tokoki kokamwa te ndenge Yesu azali Moteyi Monene!

Okanisi nini, Nzambe azalaki mawamawa ntango azalaki naino ye moko, liboso asala Mwana na ye?— Te. Bongo soki azalaki mawamawa te, mpo na nini asalaki biloko mosusu ya bomoi?— Asalaki yango mpamba te azali Nzambe ya bolingo. Alingaki ete bikelamu mosusu mpe ezala na bomoi mpe esepela na yango. Tosengeli kopesa Nzambe matɔndi na ndenge apesaki biso bomoi.

Eloko nyonso oyo Nzambe asalá emonisaka bolingo na ye. Nzambe asalaki moi. Moi epesaka biso pole mpe molunge. Soki moi ezalaka te, mbɛlɛ biloko nyonso elingaki kozala malili mpe bomoi elingaki kozala te awa na mabelé. Osepelaka te na ndenge Nzambe asalaki moi?—

Nzambe asalaki mpe ete mbula ebɛtaka. Ntango mosusu olingaka mbula te mpo ntango ebɛtaka, epekisaka yo kosakana na libándá. Kasi, mbula esalisaka bafololo ekola. Ntango tomonaka bafololo ya kitoko, topesaka nani matɔndi?— Nzambe. Ntango tozali kolya mbuma mpe ndunda ya kitoko, tosengeli kopesa lisusu nani matɔndi?— Tosengeli kopesa Nzambe matɔndi, mpamba te moi mpe mbula oyo ye asalaki nde ekolisaka yango.

Bongo soki moto moko atuni yo ete: ‘Nzambe asalaki mpe moto ná banyama?’ Okoloba nini?— Ezali malamu koloba boye: “Ɛɛ, Nzambe asalaki moto ná banyama.” Bongo soki moto moko azali kondima te ete Nzambe nde asalaki bato? Bongo soki moto yango alobi ete moto auti na nyama? Biblia eteyi bongo te. Biblia elobi ete Nzambe akelaki biloko nyonso ya bomoi.​—Genese 1:26-31.

Kasi moto mosusu akoki koyebisa yo ete andimaka Nzambe te. Okoloba na ye nini?— Mpo na nini te kolakisa ye ndako moko? Tuná ye boye: “Nani asalaki ndako oyo?” Moto nyonso ayebi ete ezali na moto oyo asalaki ndako yango. Ndako ebimaki yango moko te!​—Baebele 3:4.

Na nsima, kendá na moto yango na esika baloni bafololo mpe lakisá ye fololo moko. Tuná ye boye: “Nani asalaki yango?” Biso bato tosali yango te. Lokola ndako ebimaki yango moko te, fololo oyo mpe ebimaki yango moko te. Ezali na moto oyo asalaki yango. Nzambe nde asalaki yango.

Sɛngá moto yango atɛlɛma mwa moke mpe ayoka ndenge ndɛkɛ ezali koyemba. Na nsima, tuná ye boye: “Nani asalaki bandɛkɛ mpe alakisaki yango koyemba?” Nzambe nde asalaki yango. Nzambe nde asalaki likoló ná mabelé mpe biloko nyonso oyo ezali na bomoi na kati na yango! Ezali Ye nde apesaka bomoi.

Kasi, moto mosusu akoki koloba ete andimaka kaka makambo oyo akoki komona. Mbala mosusu akoloba boye: ‘Likambo oyo namoni te, nakondima yango te.’ Yango wana bato mosusu balobaka ete bandimaka te ete Nzambe azali mpo bamonaka ye te.

Ezali ya solo ete tokoki komona Nzambe te. Biblia elobi boye: ‘Moto moko te akoki komona Nzambe.’ Ata moto moko te awa na mabelé, ezala mobali, mwasi to mwana, akoki komona Nzambe. Yango wana moto moko te asengeli komeka kosala elilingi ya Nzambe. Kutu Nzambe apekisi biso kosala elilingi na ye. Yango wana, Nzambe akosepela na biso te soki tozali na biloko ya ndenge wana na ndako na biso.​—Exode 20:4, 5; 33:20; Yoane 1:18.

Kasi soki okoki komona Nzambe te, ndenge nini oyebi ete Nzambe azali mpenza? Kanisá naino. Omonaka mopɛpɛ?— Te. Moto moko te amonaka mopɛpɛ. Kasi okoki komona makambo oyo mopɛpɛ esalaka. Okoki komona ndenge mopɛpɛ ezali koningisa nkasa mpe bitape ya nzete. Yango wana ondimaka ete mopɛpɛ ezali.

Ndenge moko mpe, okoki komona biloko oyo Nzambe asalá. Ntango ozali komona fololo, to ndɛkɛ oyo ezali na bomoi, ozali nde komona biloko oyo Nzambe asalá. Yango wana ondimaka ete Nzambe azali mpenza.

Moto mosusu akoki kotuna yo boye: ‘Nani asalaki moi ná mabelé?’ Biblia elobi boye: “Nzambe azalisaki likoló mpe mokili.” (Genese 1:1) Ya solo, Nzambe nde asalaki biloko wana nyonso ya kokamwa! Ndenge nini omonaka yango?—

Kozala na bomoi ezali likambo moko malamu mpenza, ezali bongo te? Tokoki koyoka nzembo kitoko ya bandɛkɛ. Tokoki komona bafololo mpe biloko mosusu oyo Nzambe asalá. Tokoki mpe kolya biloko oyo Nzambe apesi biso.

Esengeli tópesaka Nzambe matɔndi mpo na biloko wana nyonso. Kutu esengeli libosoliboso tópesaka ye matɔndi mpo apesaki biso bomoi. Mpo na komonisa mpenza ete tozali kopesa Nzambe matɔndi, tosengeli kosala likambo moko. Likambo yango nini?— Tosengeli koyoka Nzambe mpe kosala oyo azali koyebisa biso na kati ya Biblia. Na ndenge wana nde tokomonisa ete tolingi Ye oyo asalaki biloko nyonso.

Esengeli tópesaka Nzambe matɔndi mpo na nyonso oyo asalá. Ndenge nini? Tángá makambo oyo ekomami na Nzembo 139:14; Yoane 4:23, 24; 1 Yoane 5:21; mpe Emoniseli 4:11.