Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 4

Nzambe azali na nkombo

Nzambe azali na nkombo

NTANGO okutani na moto moko mpo na mbala ya liboso, eloko nini mpenza okotuna ye liboso?— Okotuna ye nkombo na ye. Biso nyonso tozalaka na nkombo. Nzambe apesaki mobali ya liboso nkombo. Apesaki ye nkombo Adama. Apesaki mwasi ya Adama nkombo Eva.

Nzokande, kaka bato te nde bazalaka na nkombo. Kanisá biloko mosusu oyo ezali mpe na nkombo. Soki bakabeli yo mwanapopi to mwana ya mbwa to ya nyau, okopesa yango nkombo, ezali bongo te?— Ya solo, kozala na nkombo ezali na ntina mingi.

Na butu, talá ebele ya minzoto na likoló. Okanisi ete ezali na nkombo?— Ɛɛ, Nzambe apesaki monzoto mokomoko na likoló nkombo. Biblia eyebisi biso boye: ‘Ye atángaka motuya ya minzoto, abengaka yango nyonso na nkombo na yango.’​—Nzembo 147:4.

Okanisi boni, nani aleki bato nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba?— Ya solo, Nzambe nde aleki. Okanisi ete azali na nkombo?— Yesu alobaki ete Nzambe azali na nkombo. Mokolo moko, ntango azalaki kobondela, Yesu alobaki na Nzambe boye: ‘Nayebisi bayekoli na ngai nkombo na yo.’ (Yoane 17:26) Oyebaka nkombo ya Nzambe?— Nzambe ye moko ayebisi biso yango. Alobi boye: “Ngai nazali [Yehova], yango nkombo na ngai.” Na yango, nkombo ya Nzambe ezali YEHOVA.​—Yisaya 42:8.

Omiyokaka ndenge nini soki bato mosusu bayebi nkombo na yo mpe bazali kobenga yo na nkombo na yo?— Osepelaka, ezali bongo te?— Yehova mpe alingi ete bato báyeba nkombo na ye. Yango wana, tosengeli kobenga ye na nkombo Yehova ntango tozali kolobela makambo ya Nzambe. Moteyi Monene abengaki Nzambe na nkombo na ye, Yehova, ntango azalaki kosolola na bato. Mokolo moko, Yesu alobaki boye: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba.”​—Malako 12:30.

Yesu ayebaki ete “Yehova” ezali nkombo moko ya ntina mingi mpenza. Yango wana ateyaki bayekoli na ye bábengaka Nzambe na nkombo na ye. Kutu, ateyaki bango mpe básalelaka nkombo ya Nzambe na mabondeli na bango. Yesu ayebaki ete Nzambe alingi bato nyonso báyeba nkombo na Ye, Yehova.

Na ntango ya kalakala, Nzambe amonisaki ntina ya nkombo na ye epai ya Moize, mobali moko ya Yisalaele. Bana ya Yisalaele, oyo babengaka bango mpe Bayisalaele, bazalaki kofanda na mboka moko, nkombo na yango Ezipito. Bazalaki kobenga bato ya mboka yango Baezipito. Bakómisaki Bayisalaele baombo na bango mpe banyokolaki bango mpenza. Ntango Moize akolaki, alukaki kosalisa ndeko na ye moko. Yango epesaki Farao, mokonzi ya Ezipito, nkanda. Alukaki koboma Moize! Yango wana Moize akimaki Ezipito.

Moize akendaki kofanda na mboka mosusu. Nkombo na yango Midyani. Kuna, Moize abalaki mpe abotaki bana. Akómaki kokɛngɛla bampate, azalaki kobatela yango. Mokolo moko, Moize azalaki kokɛngɛla bampate penepene ya ngomba moko mpe amonaki likambo moko ya kokamwa. Mwa nzete moko ya nzubɛnzubɛ ezali kopela kasi, nzete yango ezalaki kozika te! Moize apusanaki penepene lisusu mpo atala yango malamu.

Oyebi nini ekómelaki ye?— Moize ayokaki moto moko azali koloba na katikati ya mwa nzete yango oyo ezalaki kopela. Moto yango abengaki ete: ‘Moize! Moize!’ Nani azalaki koloba?— Ezalaki Nzambe! Nzambe alingaki kopesa Moize mosala moko monene. Nzambe alobaki boye: ‘Yaká, nakotinda yo epai ya Farao ete obimisa bato na ngai, bana ya Yisalaele, na Ezipito.’ Nzambe alakaki ete akosalisa Moize mpo asala mosala oyo apesi ye.

Kasi, Moize alobaki na Nzambe boye: ‘Soki ngai nakokóma epai ya bato ya Yisalaele, na Ezipito mpe nakoloba ete Nzambe atindi ngai. Soki batuni ngai ete: “Nkombo na ye nani?” Nakoloba nini?’ Nzambe alobaki na Moize ayebisa bana ya Yisalaele boye: ‘Yehova atindi ngai epai na bino. Yehova ezali nkombo na ngai libela na libela.’ (Exode 3:1-15) Yango emonisi ete Nzambe alingaki nkombo na ye ezala kaka Yehova. Akobongola yango te. Nzambe alingaki ete bato báyeba ye na nkombo na ye Yehova libela na libela.

Ntango Moize azongaki na Ezipito, Baezipito bakanisaki ete Yehova azali kaka mwa nzambe moko boye ya Bayisalaele. Bayebaki te ete azali Nzambe ya mabelé mobimba. Yango wana Yehova ayebisaki mokonzi ya Ezipito boye: ‘Nakosala ete nkombo na ngai eyebana na mokili mobimba.’ (Exode 9:16) Yehova asalaki mpenza ete nkombo na ye eyebana. Oyebi ndenge asalaki?—

Asalaki ete Moize abimisa bato ya Yisalaele na Ezipito. Ntango bakómaki na Mbu Motane, Yehova akaukisaki mai na katikati ya mbu mpe nzela efungwamaki. Bayisalaele bákatisa tii na ngámbo mosusu. Kasi, ntango Farao na basoda na ye nyonso bakɔtaki na nzela wana na katikati ya mai, mai oyo etɛlɛmaki epai na epai ekwelaki Baezipito mpe bango nyonso bakufaki.

Eumelaki te bato nyonso ya mokili mobimba bayokaki likambo oyo Yehova asalaki na Mbu Motane. Ndenge nini toyebi ete bayokaki yango?— Mbula 40 na nsima, Bayisalaele bakómaki na Kanana, mokili oyo Yehova alakaki ete akopesa bango. Kuna, elenge mwasi moko na nkombo Rahaba alobaki na mibali mibale ya Yisalaele boye: ‘Biso toyokaki ndenge Yehova akaukisaki mai na [Mbu Motane] liboso na bino ntango bobimaki na Ezipito.’​—Yosua 2:10.

Lelo oyo bato mingi bazali lokola bato wana ya Ezipito. Bandimaka te ete Yehova azali Nzambe ya mabelé mobimba. Yango wana Yehova alingi ete bato na ye báyebisaka bato mosusu makambo na ye. Yesu asalaki yango. Pene na nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé, abondelaki Yehova boye: “Nayebisi bango nkombo na yo.”​—Yoane 17:26.

Olingi kozala lokola Yesu? Na yango, yebisá bato ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova. Mbala mosusu okomona ete bato mingi bayebaka yango te. Na bongo, okoki mbala mosusu kolakisa bango vɛrsɛ ya Nzembo 83:18 (NW) na kati ya Biblia. Fungolá Biblia sikoyo na vɛrsɛ yango mpe tótánga yango elongo. Elobi boye: “Mpo báyeba ete yo, oyo ozali na nkombo Yehova, ozali, yo moko, Oyo-Aleki-Likoló na mabelé mobimba.”

Yango eteyi biso nini?— Eteyi biso ete nkombo Yehova ezali na ntina mingi koleka bankombo nyonso. Ezali nkombo ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, Tata ya Yesu mpe Ye nde asalaki biloko nyonso. Kobosana mpe te ete Yesu alobaki ete tosengeli kolinga Yehova Nzambe na motema na biso mobimba. Olingaka Yehova?—

Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka Yehova?— Ndenge mosusu ya komonisa ete tolingaka Yehova ezali koyekola koyeba ye mpo azala Moninga na biso. Lolenge mosusu mpe ezali ya koyebisa bato nkombo na ye. Tokoki kolakisa bango mbala moko na Biblia ete nkombo na ye ezali Yehova. Tokoki mpe koyebisa bango biloko ya kokamwa oyo Yehova asalaki mpe makambo malamu oyo asalá. Yango epesaka Yehova esengo mingi mpamba te alingi ete bato báyeba ye. Biso mpe tokoki kosangana na mosala yango, ezali bongo te?—

Moto nyonso te akolinga koyoka biso ntango tozali koloba mpo na Yehova. Bato mingi baboyaki kutu koyoka Yesu, Moteyi Monene, ntango azalaki koloba mpo na Ye. Kasi, Yesu alobaki kaka makambo ya Yehova.

Yango wana, biso mpe tózala lokola Yesu. Tótika te koloba mpo na Yehova. Soki tosali bongo, Yehova akosepela na biso mpamba te tolingi nkombo na ye.

Sikoyo tótánga mwa bavɛrsɛ mosusu na Biblia oyo emonisi ntina ya nkombo ya Nzambe: Yisaya 12:4, 5; Matai 6:9; Yoane 17:6; mpe Baloma 10:13.