Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 9

Tosengeli kotikela komekama nzela te

Tosengeli kotikela komekama nzela te

MOTO moko asilá kosɛnga yo osala likambo moko ya mabe?— Alobaki na yo ete soki osali yango te ozali yuma? To alobaki ete likambo yango ekosepelisa yo mpe ezali mabe mpenza te?— Soki moto azali koloba na yo bongo, azali nde komeka yo.

Tosengeli kosala nini soki bameki biso? Tosengeli kondima mpe kosala mabe?— Yehova akosepela na yango te. Kasi oyebi nani akosepela?— Satana Zabolo.

Satana azali monguna ya Nzambe, azali mpe monguna na biso. Tokoki komona ye te mpo azali na nzoto ya elimo. Kasi ye amonaka biso. Mokolo moko Zabolo asololaki na Yesu, Moteyi Monene, mpe amekaki ye. Tiká tótala soki Yesu asalaki nini. Yango ekosalisa biso tóyeba likambo nini ya malamu tosengeli kosala ntango bameki biso.

Yesu alingaki ntango nyonso kosala mokano ya Nzambe. Amonisaki yango polele na ndenge azwaki batisimo na Ebale ya Yolodani. Kaka na nsima ya batisimo ya Yesu, Satana amekaki ye. Biblia elobi ete “likoló efungwamaki” mpo na Yesu. (Matai 3:16) Yango ekoki kolimbola ete ezali na ntango yango nde Yesu akómaki lisusu kokanisa bomoi na ye mobimba oyo azalaki na yango na likoló esika moko na Nzambe.

Nsima ya kozwa batisimo, Yesu akendaki na esobe mpo na kokanisa mpenza makambo oyo ekómaki koyela ye na motó. Alekisaki mikolo 40, butu na moi, kuna na esobe. Na ntango wana, Yesu alyaki ata eloko moko te mpe ayokaki nzala makasi. Ezali na ntango yango nde Satana ayaki komeka Yesu.

Zabolo alobaki boye: “Soki ozali mwana ya Nzambe, yebisá mabanga oyo ekóma mampa.” Alingaki kosepela mpenza kolya limpa na ntango wana! Kasi Yesu azalaki mpenza na likoki ya kokómisa mabanga mampa?— Ɛɛ, azalaki na yango. Mpo na nini? Mpamba te Yesu, Mwana ya Nzambe, azalaki na nguya moko ya kokamwa mpenza.

Soki Zabolo asɛngaki yo okómisa libanga limpa, olingaki kosala yango?— Yesu azalaki na nzala. Elingaki kozala mabe soki asalaki yango ata mbala moko mpamba?— Yesu ayebaki ete ezali mabe kosalela nguya na ye na ndenge wana. Yehova apesaki ye nguya wana mpo abenda bato epai na Nzambe, kasi mpo na bolamu na ye moko te.

Yango wana, Yesu ayebisaki Satana nde makambo oyo ekomami na kati ya Biblia: “Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.” Yesu ayebaki ete kosala makambo oyo esepelisaka Yehova ezali na ntina mingi koleka biloko ya kolya.

Kasi Zabolo amekaki ye lisusu. Amemaki Yesu na Yelusaleme mpe atɛlɛmisaki ye likoló mpenza ya tempelo. Na nsima Satana alobaki boye: ‘Soki ozali mwana ya Nzambe, omibwaka na nse; mpo ekomamá ete baanzelu ya Nzambe bakotika yo te ete oyoka mpasi.’

Mpo na nini Satana alobaki bongo?— Amekaki Yesu asala likambo moko ya bozoba. Kasi Yesu aboyaki lisusu koyokela Satana. Yesu ayebisaki Satana ete: “Ekomamá boye, ‘Osengeli te kotya Yehova Nzambe na yo na komekama.’” Yesu ayebaki ete ezali mabe komeka Yehova na kotyáká bomoi na ye na likama.

Kasi Satana alɛmbaki te. Amemaki lisusu Yesu na ngomba moko ya molai mpenza. Kuna, alakisaki ye makonzi nyonso, to baguvɛrnema nyonso ya mokili mpe nkembo na yango. Na nsima, Satana alobaki na Yesu boye: “Biloko oyo nyonso nakopesa yo soki okwei na nse mpe osambeli ngai.”

Kanisá naino eloko oyo Zabolo alingaki kopesa Yesu. Makonzi to baguvɛrnema nyonso ya bato ezali mpenza ya Satana?— Yesu aboyaki te ete ezali ya Satana. Soki ezalaka ya Satana te, mbɛlɛ Yesu alingaki koloba yango. Ya solo, Satana azali mpenza mokonzi ya bikólo nyonso ya mokili oyo. Kutu Biblia ebengi ye “moyangeli ya mokili oyo.”​—Yoane 12:31.

Okosala nini soki Zabolo alaki yo ete akopesa yo eloko moko soki osambeli ye?— Yesu ayebaki ete ezali mabe kosambela Zabolo ata soki akopesa Ye eloko nini. Yango wana Yesu alobaki boye: ‘Longwá awa, Satana! Mpo Biblia elobi ete ezali Yehova Nzambe na yo nde osengeli kosambela mpe ezali kaka ye moko nde osengeli kosalela.’​—Matai 4:1-10; Luka 4:1-13.

Biso mpe tokutanaka na komekama. Oyebi mwa makambo oyo etyaka biso na komekama?— Tózwa ndakisa moko. Mama na yo alambi mikate ya kitoko oyo bokolya nsima. Akoki koloba na yo ete osengeli kozela tii ntango ya kolya. Kasi, lokola ozali na nzala makasi, motema ekoki kotinda yo olya yango kaka. Okotosa maloba ya mama na yo?— Satana alingi te ete otosa mama na yo.

Kanisá lisusu Yesu. Azalaki mpe na nzala makasi. Kasi ayebaki ete kotosa Nzambe ezali na ntina mingi koleka biloko ya kolya. Okomonisa ete ozali lokola Yesu soki osali ndenge mama na yo alobi.

Mbala mosusu bana mosusu bakoki koloba na yo omɛla mwa matiti moko boye. Bakoki koyebisa yo ete okomiyoka malamu mpenza soki omɛli yango. Kasi, matiti wana ekoki kozala nde bangi. Ekoki kopesa yo maladi, ata mpe koboma yo. Moto mosusu akoki mpe kopesa yo likaya mpe kotinda yo omɛla yango, nzokande likaya mpe elangwisaka. Okosala nini?—

Kanisá lisusu Yesu. Satana alukaki kotinda Yesu atya bomoi na ye na likama na ndenge ayebisaki Ye amibwaka longwa na likoló ya tempelo tii na nse. Kasi Yesu aboyaki. Okosala nini soki moto moko azali kotinda yo osala likambo oyo ekotya bomoi na yo na likama?— Yesu ayokelaki Satana te. Yo mpe osengeli te koyokela moto oyo azali kotinda yo osala makambo ya mabe.

Mokolo mosusu bakoki kosɛnga yo osambela ekeko, likambo oyo Biblia epekisi biso tósala. (Exode 20:4, 5) Ntango mosusu, bakoki kosɛnga yo likambo yango na ntango ya molulu moko na eteyelo. Bakoki koyebisa yo ete bakobengana yo na kelasi soki oboyi kosala yango. Okosala nini?—

Ezali mpasi te kosala makambo ya malamu ntango bato mosusu bazali mpe kosala malamu. Kasi ezalaka mpasi mpenza kosala makambo ya malamu ntango bato mosusu bazali kotinda biso tósala oyo ezali mabe. Bakoki koloba ete likambo oyo bazali kosala ezali mpenza mabe te. Kasi motuna ya ntina mingi oyo osengeli komituna ezali nde ya koyeba soki Nzambe akanisi nini mpo na likambo yango. Ye ayebi mingi koleka biso.

Yango wana, ata soki bato balobi nini, tosengeli te kosala makambo oyo Nzambe alobi ete ezali mabe. Soki tosali bongo, tokosepelisa Nzambe kasi Zabolo te.

Makambo mosusu oyo ekosalisa yo otikela komekama nzela te mpo osala mabe te okokuta yango na Nzembo 1:1, 2; Masese 1:10, 11; Matai 26:41; mpe 2 Timote 2:22.