Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 14

Ntina oyo tosengeli kolimbisaka

Ntina oyo tosengeli kolimbisaka

MOTO moko asalá yo likambo moko ya mabe?— Akatelaki yo lingala to asalaki yo likambo moko oyo epesaki yo mpasi?— Osengeli kozongisela ye mabe oyo asalaki yo?—

Bato mosusu bazongisaka kaka mabe soki moto asali bango mabe. Nzokande, Yesu ateyaki ete tosengeli kolimbisa bato oyo basali biso mabe. (Matai 6:12) Bongo soki moto moko asalaka biso mabe mbala mingi? Tosengeli kolimbisa ye mbala boni?—

Ezali yango nde Petelo alingaki koyeba. Yango wana, mokolo moko atunaki Yesu boye: ‘Nasengeli kolimbisa ye mbala nsambo?’ Mbala nsambo ezali moke. Yesu alobaki ete soki moto asali yo mabe mbala ntuku nsambo na nsambo, ‘osengeli kolimbisa ye mbala ntuku nsambo na nsambo.’

Ezali mpenza mbala ebele! Kutu, tokoyeba ata lisusu te mbala boni moto yango asali biso mabe, ezali bongo te? Ezali yango nde Yesu alingaki koteya biso: Tosengeli kobomba na motema te mbala boni oyo bato basali biso mabe. Soki basɛngi bolimbisi, tosengeli kolimbisa bango.

Yesu alingaki bayekoli na ye báyeba ete kolimbisa ezali na ntina mingi. Yango wana, nsima ya kopesa Petelo eyano, abɛtelaki bayekoli na ye lisolo moko. Yo mpe okosepela koyoka lisolo yango?—

Ezalaki na mokonzi moko ya malamu. Azalaki na boboto mpenza. Azalaki kutu kodefisa bato na ye ya mosala mbongo soki bazali na mposa na yango. Kasi, mokolo moko, mokonzi yango asɛngaki bato na ye ya mosala oyo bazalaki na banyongo na ye báfuta banyongo na bango. Bayaki na moto moko ya mosala oyo azalaki na nyongo ya mokonzi ya mbongo ya bibende milio 60. Ezalaki mbongo mingi mpenza!

Kasi moto yango asalelaki mbongo nyonso ya mokonzi mpe azalaki na eloko te mpo na kofuta nyongo yango. Yango wana, mokonzi apesaki mitindo ete bátɛka ye. Mokonzi alobaki lisusu ete bátɛka mwasi ya moto yango ná bana na ye, mpe biloko na ye nyonso. Bongo, mbongo oyo bakozwa, báfuta nyongo ya mokonzi. Na makanisi na yo, moto yango ya mosala ayokaki ndenge nini?—

Moto yango afukamaki liboso ya mokonzi mpe alobaki na ye ete: ‘Nabondeli yo, pesá ngai mwa mikolo, mpe nakofuta yo nyongo nyonso oyo nazali na yango.’ Soki yo nde ozalaki mokonzi, olingaki kosala moto yango nini?— Mokonzi ayokelaki ye mawa. Elingi koloba alimbisaki ye. Ayebisaki moto yango ya mosala ete afuta lisusu nyongo yango te. Moto yango ya mosala asepelaki mpenza!

Kasi, moto yango ya mosala asalaki nini na nsima? Abimaki mpe akutanaki na moninga na ye ya mosala oyo azalaki na nyongo na ye ya mbongo ya bibende 100. Akangaki ye na nkingo mpe abandaki kofina ye, alobaki ete: ‘Futá nyongo na ngai ya mbongo ya bibende 100 oyo odefaki!’ Okanisi boni na likambo oyo moto yango asalaki, mingimingi lokola mokonzi autaki kolimbisa ye mpo na nyongo ya ebele ya mbongo oyo azalaki na yango?—

Moninga na ye ya mosala oyo azalaki na nyongo na ye ya mbongo ya bibende 100 azalaki mobola. Azalaki na mbongo ya kofuta ye te na ntango wana. Yango wana, afukamaki na makolo ya moninga na ye mpe alobaki na ye ete: ‘Nabondeli yo, pesá ngai mwa mikolo, mpe nakofuta yo mbongo na yo.’ Moto yango asengelaki kotikela moninga na ye ntango?— Soki ozalaki na esika na ye, olingaki kosala nini?—

Moto yango azalaki na boboto lokola mokonzi te. Alingaki bápesa ye mbongo na ye kaka mokolo wana. Lokola mpe moninga na ye azalaki na mbongo te, akangisaki ye na bolɔkɔ. Baninga na bango mosusu ya mosala bamonaki makambo nyonso elekaki mpe basepelaki na yango te. Bayokelaki moninga na bango oyo batyaki na bolɔkɔ mawa. Yango wana, bakendaki koyebisa mokonzi.

Mokonzi mpe asepelaki ata moke te na likambo yango. Asilikaki makasi na moto ya mosala oyo aboyaki kolimbisa moninga na ye. Abengaki ye mpe alobaki na ye boye: ‘Yo, moto ya mosala ya mabe, ngai nalimbisaki yo mpo na nyongo oyo ozalaki na yango epai na ngai, ezali bongo te? Kasi, mpo na nini yo oboyi kolimbisa moninga na yo?’

Ebongaki moto ya mosala oyo aboyaki kolimbisa alanda ndakisa ya mokonzi. Kasi asalaki yango te. Yango wana, mokonzi atyaki ye na bolɔkɔ tii akofuta mbongo ya bibende milio 60. Nzokande, akokoka te kozwa mbongo ya kofuta mokonzi na bolɔkɔ. Na yango, asengeli kotikala na bolɔkɔ tii liwa na ye.

Na nsuka ya lisolo, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Ezali ndenge wana nde Tata na ngai ya likoló mpe akosalela bino soki bozali kolimbisa te moto na moto ndeko na ye na mitema na bino.”​—Matai 18:21-35.

Omoni, biso nyonso tozali na nyongo monene epai ya Nzambe. Kutu, Nzambe nde moto apesi biso bomoi! Yango wana, soki totali nyongo oyo biso tosengeli kofuta Nzambe, tokomona ete bato mosusu bazali na nyongo na biso kaka ya moke. Nyongo na biso oyo bango bazali na yango ezali lokola mbongo ya bibende 100 oyo moto ya mosala wana asengelaki kofuta moninga na ye. Kasi, nyongo oyo biso tosengeli kofuta Nzambe mpo na makambo ya mabe oyo tosalaka ezali lokola mbongo ya bibende milio 60 oyo moto ya mosala wana asengelaki kofuta mokonzi.

Nzambe azali na boboto mingi. Ata sokitosali makambo mingi ya mabe, alimbisaka biso. Abomaka biso mbala moko te mpo na kofutisa biso nyongo oyo tozali na yango. Kasi, tósimba liteya oyo: Nzambe akolimbisa biso kaka soki tozali kolimbisa bato oyo bazali kosala biso mabe. Esengeli kozwa likambo ya kolimbisa na lisɛki te, ezali bongo te?—

Sikoyo, soki moto moko asali yo mabe mpe asɛngi yo bolimbisi, okosala nini? Okolimbisa ye?— Bongo soki azongeli yango mbala mingi? Okolimbisa ye kaka?—

Soki yo nde ozali kosɛnga moto mosusu bolimbisi, okolinga ete moto yango alimbisa yo, ezali bongo te?— Na bongo, yo mpe osengeli kolimbisa ye. Okolimbisa ye kaka na maloba te, kasi osengeli mpenza kolimbisa ye na motema. Soki tozali kosala bongo, tokomonisa ete tolingi mpenza kozala bayekoli ya Moteyi Monene.

Mpo na koyeba ntina ya kolimbisa, tótánga mpe Masese 19:11; Matai 6:14, 15; mpe Luka 17:3, 4.