Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 23

Ntina oyo bato babɛlaka

Ntina oyo bato babɛlaka

OYEBI moto moko oyo azali kobɛla?— Na ntembe te, yo moko mpe obɛlaka na bantango mosusu. Okoki kozala na mwa fiɛvrɛ, to libumu ekoki kosala yo mpasi. Bato mosusu bazali mpenza kobɛla makasi. Bakoki ata kotɛlɛma bango moko te soki moto asimbi bango te. Esalemaka bongo mingimingi ntango bato bakómi mibange.

Moto nyonso abɛlaka na bantango mosusu. Oyebi mpo na nini bato babɛlaka, bakómaka mibange, mpe bakufaka?— Mokolo moko, bamemelaki Yesu mobali moko oyo azalaki kotambola te, mpe Yesu amonisaki ntina oyo bato babɛlaka mpe bakufaka. Tiká nabɛtɛla yo lisolo yango.

Yesu afandaki mwa mikolo na ndako moko, na engumba moko oyo ezalaki pene na Mbu ya Galilai. Ebele ya bato bayaki kokutana na ye. Bato mingi bayaki mpe, bamosusu bakokaki kokɔta te, mpo esika ezalaki te na ndako. Ezalaki mpasi mpo moto akóma ata pene na porte. Ata bongo, bato bazalaki kaka koya! Etuluku moko ya bato bamemaki mokatatali moko oyo azalaki ata kotambola te. Esengelaki mibali minei mpo na komema ye na mwa mbeto moko ya moke, to litɔkɔ.

Oyebi mpo na nini bato wana balingaki kaka komemela Yesu moto wana oyo azalaki kobɛla?— Bazalaki na kondima ete Yesu akosalisa ye. Bazalaki kondima ete Yesu akobikisa ye na maladi yango. Oyebi ndenge nini basalaki mpo bakómisa mokatatali yango epai na Yesu, atako ebele wana ya bato bazalaki na kati ya ndako?—

Ɛɛ, elilingi ozali komona awa ezali kolakisa ndenge oyo basalaki. Ya liboso, bamemaki mobali yango tii na nsamba ya ndako. Nsamba yango ezalaki papala. Na nsima, bafungolaki lidusu moko monene na nsamba yango. Nsima ya kosala bongo, bakitisaki moto oyo azalaki kobɛla, oyo batyaki na litɔkɔ, na nzela ya lidusu yango mpe akómaki tii na nse. Bazalaki mpenza na kondima makasi!

Bato nyonso oyo bazalaki na ndako yango bakamwaki ntango bamonaki likambo wana. Mokatatali yango, oyo batyaki na litɔkɔ, akitaki tii na katikati na bango. Yesu asilikaki nde ntango amonaki likambo oyo mibali wana basalaki?— Asilikaki te! Asepelaki na komona ete bazalaki na kondima. Alobaki na mokatatali yango ete: “Masumu na yo elimbisami.”

Bato mosusu bamonaki mabe ndenge Yesu alobaki bongo. Bakanisaki te ete ye azali na likoki ya kolimbisa masumu. Na bongo, mpo na komonisa ete azali mpenza na likoki ya kolimbisa masumu, Yesu alobaki na mobali yango ete: “Tɛlɛmá, lɔkɔtá litɔkɔ na yo, mpe kende epai na yo.”

Kaka ntango Yesu alobaki bongo, mobali yango abikaki! Azalaki mokatatali lisusu te. Sikoyo azali na likoki ya kotɛlɛma ye moko mpe kotambola. Bato oyo bamonaki likamwisi yango bakamwaki mingi. Mpo banda bazali na bomoi bamoná naino likambo ya kokamwisa ndenge wana te! Basanzolaki Yehova na ndenge apesi bango Moteyi Monene wana, oyo azali na likoki ata ya kobikisa bato na bamaladi na bango.​—Malako 2:1-12.

Liteya nini tozwi na lisolo ya likamwisi oyo?— Yango eteyi biso ete Yesu azali na nguya ya kolimbisa masumu mpe ya kobikisa bato ya maladi. Kasi eteyi biso mpe likambo mosusu, likambo moko ya ntina mingi. Eteyi biso ete bato babɛlaka mpo na lisumu.

Lokola biso nyonso tobɛlaka na bantango mosusu, yango elingi koloba ete biso nyonso tozali bato ya masumu?— Ɛɛ, Biblia elobi ete biso nyonso tobotami na lisumu. Oyebi soki kobotama na lisumu elakisi nini?— Elakisi ete tobotami bato bazangi kokoka. Na bantango mosusu, tosalaka makambo ya mabe, atako tolingaka kosala yango te. Oyebi ndenge nini biso nyonso tozwi lisumu?—

Tobotami na lisumu mpamba te mobali ya liboso, Adama, atosaki Nzambe te. Asalaki lisumu ntango abukaki mobeko ya Nzambe. Yango wana biso nyonso tozwá lisumu epai ya Adama. Oyebi ndenge nini tozwaki lisumu epai na ye? Tiká nameka naino kolimbwela yo likambo yango na ndenge oyo okoki kokanga ntina.

Mbala mosusu osilá komona moto azali kosala mampa na linzanza ya mampa. Mampa ekobima ndenge nini soki linzanza yango etutaná esika moko boye? Oyebi yango?— Elembo yango, to esika oyo etutaná, ekomonana na mampa nyonso oyo osali na linzanza yango, ezali bongo te?—

Adama azalaki lokola linzanza wana, mpe biso tozali lokola mampa oyo wana. Akómaki moto ya kozanga kokoka ntango abukaki mobeko ya Nzambe. Ezalaki lokola nde atutanaki na esika moko boye, to azwaki elembo moko ya mabe. Na bongo ntango abotaki bana, bana yango basengelaki kozala ndenge nini?— Bana na ye nyonso bazwaki elembo wana ya kozanga kokoka.

Kozanga kokoka oyo bana mingi babotamaka na yango ezalaka kaka te oyo okoki komona na miso, lokola kozanga lobɔkɔ to lokolo. Kasi kozanga kokoka oyo bazali na yango ezali mpenza makasi, yango wana babɛlaka, mpe nsukansuka, bakufaka.

Ya solo, ezali na bato oyo babɛlaka mingi mpenza koleka bamosusu. Mpo na nini bongo? Babɛlaka mingi mpo babotamá na masumu mingi koleka?— Ezali bongo te; moto nyonso abotamaka kaka na masumu ndenge moko. Biso nyonso tobotamaka bato ya kozanga kokoka. Yango wana, ata ndɛlɛ, moto nyonso asukaka na kozwa maladi moko boye. Ata bato oyo basalaka makasi bátosa mibeko nyonso ya Nzambe mpe oyo basalaka mpenza eloko moko ya mabe te, bango mpe bakoki kobɛla.

Soki ezali bongo, mpo na nini ezali na bato oyo babɛlaka mingi mpenza koleka bamosusu?— Bantina oyo esalaka bongo ezali mingi. Ekoki kozala ete bazali na biloko mingi ya kolya te. To ekoki kozala ete balyaka biloko ya malamu te. Ekoki mpe kozala ete balyaka bagato mingi to biloko oyo ezali na sukali mingi. Ntina mosusu ekoki mpe kozala ete balalaka noki te mpe balalaka mingi te. To ekoki kozala ete balataka te bilamba oyo ebongi na ntango ya malili. Nzoto ya bato mosusu ezalaka mpenza makasi te mpo ekoka kobundisa bamaladi, ata soki basalaka makasi mpo na komibatela.

Ekozala na mokolo moko oyo tokobɛla lisusu te? Ekozala na mokolo moko oyo tokozala na lisumu lisusu te?— Yesu asalaki nini na mokatatali oyo tolobelaki?— Yesu alimbisaki masumu ya mokatatali yango mpe abikisaki ye. Na ndenge asalaki bongo, Yesu amonisaki oyo akosala mokolo moko mpo na bato nyonso oyo bazali kosala makasi básala oyo ezali malamu

Soki tozali komonisa ete tolingaka kosala masumu te mpe ete toyinaka makambo ya mabe, Yesu akobikisa biso. Na mikolo ezali koya, akolongola kozanga kokoka oyo tozali na yango sikoyo. Akosala bongo mpo azali Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe. Akolongola lisumu na biso mbala moko te. Akolongola yango nde mokemoke. Na nsima, ntango masumu na biso ekolongwa mpo na libela, tokobɛla lisusu ata moke te. Biso nyonso tokozala nzoto kolɔngɔnɔ. Ekozala mpenza lipamboli moko monene!

Mpo na koyeba lisusu ete lisumu etiki moto moko te, tángá Yobo 14:4; Nzembo 51:5; Baloma 3:23; 5:12; mpe 6:23.