Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 25

Bato oyo basalaka mabe bakoki nde kobongwana?

Bato oyo basalaka mabe bakoki nde kobongwana?

SOKI bato nyonso bazalaki kosala makambo ya malamu, bomoi elingaki kozala kitoko, ezali bongo te?— Kasi ezali na moto moko te oyo asalaka ntango nyonso kaka makambo ya malamu. Oyebi mpo na nini, na bantango mosusu, biso nyonso tosalaka makambo ya mabe, ata tozali na mposa ya kosala makambo ya malamu?— Ezali mpo biso nyonso tobotami na lisumu. Kasi bato mosusu basalaka makambo ya mabe mingi mpenza. Bayinaka bato mosusu mpe basalaka bango mabe na nko. Okanisi ete bato yango bakoki kobongwana mpe koyekola kosala makambo ya malamu?—

Talá elenge mobali oyo azali kobatela bilamba ya likoló ya bato oyo bazali kobamba Setefano mabanga. Baebele babengaka elenge yango Saulo, kasi Baloma babengaka ye Paulo. Azali kosepela ndenge bazali koboma Setefano, oyo azali moyekoli ya Moteyi Monene. Tiká tómona mpo na nini Saulo azali kosala makambo ya mabe ya ndenge wana.

Saulo azali moko ya Bafalisai, etuluku moko ya lingomba ya Bayuda. Bafalisai bazali na Liloba ya Nzambe, kasi batyaka likebi mingi na mateya ya bakonzi ya lingomba na bango. Yango nde eloko etindi Saulo na kosala makambo ya mabe.

Ntango bazali kokanga Setefano na Yelusaleme, Saulo azali wana. Bamemi Setefano na tribinale, epai bazuzi mosusu bazali Bafalisai. Setefano azali kobanga te, atako bazali koloba ete ye azali moto mabe. Azali koloba na mpiko mpe azali kopesa bazuzi litatoli ya malamu mpenza mpo na Yehova Nzambe mpe Yesu.

Kasi bazuzi yango balingi koyoka eloko te. Basili koyeba makambo mingi oyo etali Yesu. Kutu, kaka mwa ntango moke liboso ya likambo ya Setefano, bapesaki etinda báboma Yesu! Kasi nsima na yango, Yehova azongisaki Yesu na likoló. Sikoyo, na esika ete bátika makambo na bango wana ya mabe, bazuzi yango bazali kaka kobundisa bayekoli ya Yesu.

Bazuzi yango bazwi Setefano mpe babimisi ye na libándá ya engumba. Babwaki ye na mabelé mpe babambi ye mabanga. Mpe ndenge ozali komona yango na elilingi, Saulo, ye wana atɛlɛmi, azali kotala. Akanisi ete ezali malamu ndenge bazali koboma Setefano.

Oyebi mpo na nini Saulo azalaki kokanisa ndenge wana?— Ezali mpo, na bomoi na ye mobimba, Saulo azalaki Mofalisai, mpe azalaki kondima ete mateya ya Bafalisai ezali malamu. Mpo na ye, Bafalisai bazalaki ndakisa, na bongo amonaki malamu ete alanda ndakisa na bango.​—Misala 7:54-60.

Saulo asali nini nsima ya liwa ya Setefano?— Likambo ya mawa, azali koluka kosilisa bayekoli mosusu ya Yesu! Azali kokɔta mpenza na bandako na bango mpe azali kobenda mpe kobimisa mibali ná basi libándá. Na nsima azali kokangisa bango na bolɔkɔ. Bayekoli mingi basengeli kolongwa na Yelusaleme, kasi ata bongo bazali kotika te kosakola makambo etali Yesu.​—Misala 8:1-4.

Kosakola wana ya bayekoli ya Yesu esali ete Saulo ayina bango lisusu makasi koleka. Yango wana akei epai ya Kaifa, Nganga-Nzambe Monene, mpo azwa ndingisa ya kokanga baklisto oyo bazali na engumba ya Damasi. Saulo alingi amema bango na Yelusaleme lokola bato ya bolɔkɔ mpo bázwa etumbu. Kasi ntango azali kokende na Damasi, likambo moko ya kokamwa esalemi.

Pole moko euti na likoló engɛngi, mpe mongongo moko elobi ete: “Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola ngai?” Ezali Yesu moto azali koloba uta na likoló! Pole yango engɛngi makasi mpe Saulo azali komona lisusu te, mpe bato oyo bazali elongo na Saulo basimbi ye na mabɔkɔ mpo na komema ye tii na Damasi.

Nsima ya mikolo misato, na emonaneli moko, Yesu abimeli moko na bayekoli na ye oyo afandaka na Damasi, nkombo na ye Ananiasi. Yesu ayebisi Ananiasi ete akende kotala Saulo, afungola ye miso, mpe asolola na ye. Ntango Ananiasi asololi na ye, Saulo andimi solo oyo etali Yesu. Miso na ye efungwami, abandi komona lisusu. Bomoi na ye mobimba ebongwani, mpe akómi mosaleli ya sembo ya Nzambe.​—Misala 9:1-22.

Sikoyo, oyebi mpo na nini Saulo azalaki kosala makambo ya mabe?— Azalaki kosala yango mpo bateyaki ye makambo ya lokuta. Azalaki kolanda bato oyo bazalaki sembo te na miso ya Nzambe. Mpe azalaki kati na etuluku ya bato oyo bazalaki komona ete makanisi ya bato ezali na ntina mingi koleka Liloba ya Nzambe. Kasi mpo na nini Saulo abongolaki bomoi na ye mpe abandaki kosala makambo ya malamu, nzokande Bafalisai mosusu balandaki kaka kobundisa Nzambe?— Ezali mpo Saulo ayinaki mpenza solo te. Yango wana ntango bamonisaki ye makambo ya malamu, alandaki yango noki mpenza.

Oyebi soki Saulo akómaki nani na nsima?— Ɛɛ, ayebanaki na nkombo ya ntoma Paulo, ntoma ya Yesu. Mpe yebá ete Paulo akomaki mikanda ya Biblia mingi koleka bato mosusu nyonso.

Ezali na bato mingi oyo bakoki kobongwana lokola Saulo. Kasi yango ezali likambo ya pɛtɛɛ te, mpo ezali na moto moko oyo azali kosala makasi mpo na kotinda bato básalaka makambo ya mabe. Oyebi moto yango?— Ntango Yesu abimelaki Saulo na nzela ya Damasi, Yesu alobelaki moto yango. Na ntango yango, Yesu alobaki na Saulo uta na likoló ete: ‘Nazali kotinda yo mpo na kofungola bato miso, mpo na kobalwisa bango bálongwa na molili báya na kati ya pole mpe bálongwa na nguya ya Satana báya epai ya Nzambe.’​—Misala 26:17, 18.

Ya solo, ezali Satana Zabolo nde azali kosala nyonso mpo na kotinda bato nyonso básalaka makambo ya mabe. Na bantango mosusu, ezalaka mpasi mpo osala makambo ya malamu?— Ezalaka mpasi mpo na biso nyonso. Satana nde moto azali kosala ete ezala bongo. Kasi ezali na ntina mosusu oyo esalaka ete ezala ntango nyonso pɛtɛɛ te mpo na kosala makambo ya malamu. Oyebi ntina yango?— Ezali mpo tobotami na lisumu.

Soki mbala mingi ezalaka mpasi te mpo tósala makambo ya mabe, mpe soki mbala mingi tokokaka te kosala makambo ya malamu, ezali mpo na lisumu yango. Na bongo, tosengeli kosala nini?— Ɛɛ, tosengeli kosala milende mpo na kosala makambo ya malamu. Ntango tosali bongo, tokoki komindimisa ete Yesu, oyo alingaka biso, akosalisa biso.

Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, azalaki kolinga bato oyo kala basalaki makambo ya mabe, kasi babongwanaki. Ayebaki ete basalaki makasi mpo bábongwana. Na ndakisa, ezalaki na basi oyo bazalaki kosangisa nzoto na mibali ebele. Ya solo, likambo oyo basi yango bazalaki kosala, ezalaki mabe. Biblia ebengi basi yango ete basi ya ndumba, to basi ya pite.

Ezalaki na mwasi moko ya ndenge wana, oyo ayokaki nsango ya Yesu, mpe ayaki epai Yesu azalaki, na ndako ya Mofalisai moko. Asopaki mafuta na makolo ya Yesu mpe, na nsuki na ye, mwasi yango apangwisaki mpisoli oyo atangisaki na makolo ya Yesu. Mwasi yango ayokaki mpasi mingi na motema mpo na masumu na ye, yango wana Yesu alimbisaki ye. Kasi Mofalisai wana akanisaki ete mwasi yango asengelaki kolimbisama te.​—Luka 7:36-50.

Oyebi likambo oyo Yesu alobaki na Bafalisai mosusu?— Ayebisaki bango ete: “Basi ya ndumba bazali koleka liboso na bino na bokonzi ya Nzambe.” (Matai 21:31) Yesu alobaki bongo mpo basi ya ndumba bandimelaki ye, mpe babongolaki bomoi na bango. Nzokande, Bafalisai balandaki kosalela bayekoli ya Yesu makambo ya mabe.

Yango wana ntango Biblia emonisi biso ete makambo oyo tozali kosala ezali mabe, tosengeli kondima kotika yango. Mpe ntango toyekoli oyo Yehova alingi tósala, tosengeli kosala milende mpo na kokokisa yango. Boye Yehova akosepela na biso mpe akopesa biso bomoi ya seko.

Mpo na kosalisa biso tóboya kosala makambo ya mabe, tiká tótánga elongo Nzembo 119:9-11; Masese 3:5-7; mpe 12:15.