Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 27

Nzambe na yo nani?

Nzambe na yo nani?

MPO na nini ezali mpenza na ntina kotuna motuna oyo ete: Nzambe na yo nani?— Ezali na ntina mpo bato basambelaka banzambe ebele. (1 Bakolinti 8:5) Ntango Yehova apesaki ntoma Paulo nguya ya kobikisa mobali moko oyo atambolá naino ata moke te, bato bagangaki ete: “Banzambe bakómi lokola bato mpe bakiteli biso!” Bato balingaki kosambela Paulo ná moninga na ye Balanabasi. Babengaki Paulo Helemesi mpe Balanabasi Zeusi, bankombo wana ezalaki bankombo ya banzambe ya lokuta.

Kasi Paulo ná Balanabasi balingaki te ete bato básambela bango. Bakɔtaki mbangu na kati ya ebele wana ya bato mpe balobaki ete: “Bótika makambo wana ya mpamba mpe bóya epai ya Nzambe ya bomoi.” (Misala 14:8-15) “Nzambe ya bomoi” yango, oyo azalisaki biloko nyonso, ezali nani?— Ɛɛ, ezali Yehova, “Oyo-Aleki-Likoló na mabelé mobimba.” Yesu abengaki Yehova “Nzambe kaka moko ya solosolo.” Lokola ezali bongo, nani oyo kaka ye nde bato basengeli kosambela?— Ezali kaka Yehova!​—Nzembo 83:18; Yoane 17:3; Emoniseli 4:11.

Bato mingi basambelaka banzambe mosusu na esika básambela “Nzambe kaka moko ya solosolo.” Mbala mingi, bato basambelaka biloko oyo basali na mabaya, na mabanga, to na bibende. (Exode 32:4-7; Levitike 26:1; Yisaya 44:14-17) Ata mibali mpe basi oyo bazali na lokumu mingi, na bantango mosusu babengaka bango banzambe, to bavɛdɛti. Ezali malamu kokumisa bango?—

Ntango Saulo akómaki ntoma Paulo, akomaki ete: “Nzambe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo azipi makanisi ya bato oyo bazangi kondima.” (2 Bakolinti 4:4) Nzambe yango nani?— Ezali Satana Zabolo! Satana asilá kotinda bato básambela bato mosusu mpe biloko ndenge na ndenge.

Ntango Satana alukaki ete Yesu afukamela ye mpe asambela ye, Yesu ayebisaki Satana nini?— “Ezali Yehova Nzambe na yo nde osengeli kosambela, mpe ezali kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.” (Matai 4:10) Na bongo, Yesu amonisaki polele ete esengeli kosambela kaka Yehova. Tiká tótánga lisolo ya bilenge mosusu oyo bayebaki likambo yango. Bankombo na bango: Shadrake, Meshake, mpe Abedenego.

Bilenge Baebele wana bazalaki bato ya Yisalaele, libota ya Nzambe; bamemaki bango bakangami na mokili ya Babilone. Kuna na mokili yango, mokonzi moko na nkombo Nebukadanesala asalaki ekeko moko ya wolo, oyo ezalaki monene mpenza. Mokolo moko, mokonzi yango apesaki etinda ete ntango bakobɛta miziki, moto nyonso asengeli kofukamela ekeko yango. Apesaki likebisi oyo: ‘Moto nyonso oyo akoboya kofukama mpe kosambela, bakobwaka ye na kati ya litumbu ya mɔtɔ oyo ezali kongala.’ Soki ezalaki yo, olingaki kosala nini?—

Shadrake, Meshake, mpe Abedenego bamesanaki kosala nyonso oyo mokonzi azalaki kosɛnga. Kasi na likambo ya kosambela ekeko, baboyaki. Oyebi mpo na nini baboyaki?— Baboyaki mpo mobeko ya Nzambe elobaki ete: ‘Osengeli kozala na banzambe mosusu te, kaka ngai. Osengeli komisalela ekeko te mpe okofukamela yango te.’ (Exode 20:3-5) Yango wana Shadrake, Meshake, mpe Abedenego batosaki mobeko ya Nzambe na esika bátosa etinda ya mokonzi.

Mokonzi asilikaki makasi, mpe asɛngaki ete báya na bilenge Baebele yango misato liboso na ye nokinoki. Atunaki bango ete: ‘Ezali ya solo ete boboyi mpenza kosalela banzambe na ngai? Na mbala oyo, nakomona mpenza soki bokoboya. Sikoyo, ntango bokoyoka miziki, bosengeli kofukama mpe kosambela ekeko oyo ngai nasali. Soki boboyi, bakobwaka bino na litumbu ya mɔtɔ oyo ezali kongala. Mpe nakomona, nzambe yango nani oyo akoki kobikisa bino na mabɔkɔ na ngai?’

Bilenge yango bakosala nini sikoyo? Soki ezalaki yo, olingaki kosala nini?— Bilenge yango balobaki na mokonzi ete: ‘Nzambe na biso oyo tozali kosalela akoki kobikisa biso. Kasi ata soki abikisi biso te, biso tokosalela banzambe na yo te. Tokofukamela ekeko na yo ya wolo te.’

Mokonzi ayokaki nkanda makasi. Apesi etinda ete: ‘Bópelisa litumbu ya mɔtɔ yango mbala nsambo koleka ndenge yango ezalaka!’ Na nsima, apesaki bato na ye ya makasi mitindo ete bákanga Shadrake, Meshake, mpe Abedenego na bansinga mpe bábwaka bango na litumbu ya mɔtɔ! Litumbu ya mɔtɔ yango engalaki mpenza makasi mpe ndemo ya mɔtɔ ebomaki bato wana ya mokonzi! Nini ekómelaki Baebele wana misato?

Shadrake, Meshake, mpe Abedenego bakweaki mpenza na katikati ya mɔtɔ. Kasi na nsima, batɛlɛmaki! Bazikaki te. Mpe bakangamaki lisusu na bansinga te. Yango esalemaki ndenge nini?— Mokonzi atalaki na kati ya litumbu ya mɔtɔ, mpe likambo oyo amonaki ebangisaki ye. Mokonzi atunaki ete: ‘Tobwakaki bato misato kati na mɔtɔ te?’ Basaleli na ye bapesaki eyano ete: “Ezali boye, mokonzi.”

Bongo mokonzi alobaki ete: ‘Talá! Nazali komona bato minei bazali kotambolatambola kuna na kati, mpe mɔtɔ ezali kozikisa ata moko te kati na bango.’ Oyebi soki moto wana ya minei ezalaki nani?— Ezalaki anzelu ya Yehova. Abatelaki Baebele wana misato mpo bázika te.

Na yango, ntango amonaki bongo, mokonzi ayaki na monɔkɔ ya litumbu ya mɔtɔ yango mpe abelelaki ete: “Shadrake, Meshake mpe Abedenego, bino basaleli ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, bóbima mpe bóya awa!” Ntango babimaki, bato nyonso bamonaki ete bazikaki te. Bazalaki ata na nsolo ya mɔtɔ te. Bongo mokonzi alobaki ete: ‘Nzambe ya Shadrake, Meshake mpe Abedenego, apambolama, ye oyo atindaki anzelu mpo na kobikisa basaleli na ye mpo baboyaki kosambela nzambe mosusu, longola kaka Nzambe na bango.’—Danyele, mokapo 3.

Tokoki kozwa liteya na likambo oyo esalemaki na ntango wana. Ata lelo oyo bato basalaka bikeko, to bililingi, mpo básambela yango. Buku moko (The Encyclopedia Americana) elobi ete: “Drapo, ndenge moko na ekulusu, ezali eloko ya bosantu.” Bato bakoki kosala bikeko na mabaya, na mabanga, na bibende, to na bilamba. Bayekoli ya liboso ya Yesu bazalaki kosambela amperɛrɛ ya Loma te. Mokomi ya makambo ya kala, Daniel P. Mannix, alobaki ete koboya kosambela amperɛrɛ ekokani mpenza na “koboya kopesa drapo losako to kolapa ndai ya bosembo.”

Na bongo, na miso ya Nzambe, okanisi ete bikeko oyo esalemi na bilamba, na mabaya, na mabanga, to na bibende mpo na losambo, yango ekeseni nde?— Ekozala nde malamu mosambeli ya Yehova asambela bikeko ya ndenge wana?— Shadrake, Meshake, mpe Abedenego basambelaki yango te, mpe Yehova asepelaki na bango. Ndenge nini yo okoki kolanda ndakisa na bango?—

Bato oyo basalelaka Yehova bakoki te kosambela moto to eloko moko boye. Tángá oyo elobami mpo na yango na Yosua 24:14, 15, 19-22; Yisaya 42:8; 1 Yoane 5:21; mpe Emoniseli 19:10.