Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 28

Ndenge ya koyeba moto oyo tosengeli kotosa

Ndenge ya koyeba moto oyo tosengeli kotosa

NTANGO mosusu ezalaka mpasi koyeba moto oyo tosengeli kotosa. Mama na yo, to tata na yo, akoki koyebisa yo osala eloko boye. Kasi na nsima, molakisi moko to polisi moko akoki koyebisa yo ete osala eloko oyo ekeseni na oyo baboti bayebisaki yo. Soki likambo yango ekómeli yo, okotosa nani kati na bango?—

Na mokanda oyo, na Mokapo 7, totángaki Baefese 6:1-3 na kati ya Biblia ete bana basengeli kotosa baboti na bango. Mokapo yango elobi ete: “Bótosaka baboti na bino na kati ya bomoko elongo na Nkolo.” Maloba “na kati ya bomoko elongo na Nkolo,” oyebi soki yango elakisi nini?— Baboti oyo bazali na kati ya bomoko elongo na Nkolo bateyaka bana na bango bátosa mibeko ya Nzambe.

Kasi mikóló mosusu bandimelaka Yehova te. Ndakisa, soki mokóló moko alobi ete koyiba na ekizamɛ to kozwa eloko na magazini kozanga kofuta ezali mabe te, yango nde esengeli kopesa mwana nzela ayibaka na ekizamɛ to abubaka bato?—

Simbá lisusu likambo oyo ete, na ntango moko boye, mokonzi Nebukadanesala asɛngaki bato nyonso báfukamela ekeko ya wolo oyo ye atɛlɛmisaki. Kasi Shadrake, Meshake, mpe Abedenego baboyaki kofukama. Oyebi mpo na nini baboyaki?— Baboyaki mpo Biblia elobi ete bato basengeli kosambela kaka Yehova.​—Exode 20:3; Matai 4:10.

Nsima ya liwa ya Yesu, bamemaki bantoma na ye liboso ya Sanedrina, tribinale monene ya lingomba ya Bayuda. Kaifa Nganga-Nzambe Monene alobaki ete: “Topesaki bino mitindo polelepolele ete bókoba te koteya na nkombo [ya Yesu], kasi, talá! botondisi Yelusaleme na mateya na bino.” Mpo na nini bantoma batosaki bakonzi wana ya Sanedrina te?— Na nkombo ya bantoma nyonso, Petelo azongiselaki Kaifa maloba ete: “Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.”​—Misala 5:27-29.

Na ntango wana, ezalaki soki bakonzi ya Lingomba ya Bayuda balobi likambo, moto akoki kokakola yango te. Atako bongo, guvɛrnema ya Loma nde ezalaki koyangela mboka na bango. Kaisala nde azalaki mokonzi ya guvɛrnema yango. Bayuda bazalaki kosepela te ete Kaisala ayangela bango, atako bongo guvɛrnema ya Baloma esalelaki bato makambo ya malamu mingi. Ndenge moko mpe baguvɛrnema ya lelo esalelaka bana-mboka makambo ya malamu. Mpo na yo, oyebi mwa makambo yango ya malamu oyo baguvɛrnema esalaka?—

Baguvɛrnema esalaka banzela mpe efutaka bapolisi ná bato oyo basalaka mosala ya koboma mɔtɔ mpo na kobatela biso. Yango ekoki mpe kosala bakelasi mpo na bana mpe kokamata bibongiseli mpo na kosalisa mibange. Mpo guvɛrnema moko esala makambo wana, esɛngaka mbongo. Oyebi epai wapi guvɛrnema ezwaka mbongo yango?— Mbongo yango eutaka epai ya bato. Mbongo oyo bato bafutaka guvɛrnema babengaka yango mpako.

Ntango Moteyi Monene azalaki awa na mabelé, Bayuda mingi bazalaki kosepela te kofuta mpako na guvɛrnema ya Loma. Yango wana, mokolo moko banganga-nzambe bazwaki bato, batindaki bango bákende kotuna Yesu motuna moko oyo ezalaki motambo. Motuna batunaki yango oyo: ‘Biso tosengeli kofuta mpako epai ya Kaisala to te?’ Motuna oyo ezalaki mpenza motambo. Soki kaka Yesu ayanola ete: ‘Ɛɛ, bosengeli kofuta mpako,’ Bayuda mingi balingaki kosepela te na eyano na ye. Kasi Yesu akokaki mpe te koloba ete: ‘Bosengeli kofuta mpako te.’ Koloba bongo elingaki kozala mabe.

Na bongo, Yesu asalaki nini? Alobaki ete: ‘Bólakisa ngai mbongo moko ya ebende.’ Ntango bamemelaki ye mbongo yango, Yesu atunaki bango ete: ‘Elilingi oyo mpe nkombo oyo ezali likoló na yango ezali ya nani?’ Bato yango balobaki ete: “Ya Kaisala.” Na bongo Yesu alobaki ete: “Boye, kozanga kokakatana, bózongisa biloko ya Kaisala epai ya Kaisala, kasi biloko ya Nzambe epai ya Nzambe.”​—Luka 20:19-26.

Moto moko te akokaki kozwa likambo moko ya mabe na eyano wana. Soki Kaisala azali kosalela bato makambo ya malamu, ezali mabe te soki bato basaleli mbongo oyo Kaisala asali mpo na kozongisela ye mpo na makambo wana ya malamu. Na bongo, Yesu amonisaki ete ebongi kofuta mpako na guvɛrnema mpo na bolamu tozali kozwa na makambo oyo yango ezali kosalela biso.

Sikoyo, ekoki kozala ete okómi naino mokóló te mpo ofuta mpako. Kasi ezali na eloko oyo osengeli kopesa guvɛrnema. Oyebi eloko yango?— Ezali bongo kotosa mibeko ya guvɛrnema. Biblia elobi ete: ‘Bótosaka bakonzi oyo bazali liboso.’ Bakonzi yango ezali bato oyo bazali kotambwisa guvɛrnema. Na bongo ezali Nzambe nde moto alobi ete tótosa mibeko ya guvɛrnema.​—Baloma 13:1, 2.

Ntango mosusu ezali na mobeko moko oyo epekisi kobwaka papye to biloko mosusu na balabala. Osengeli nde kotosa mobeko yango?— Ɛɛ, Nzambe alingi ete otosa yango. Osengeli mpe kotosa bapolisi?— Guvɛrnema efutaka bapolisi mpo na kobatela bato. Kotosa bapolisi ezali kotosa guvɛrnema.

Soki olingi kokatisa nzela mpe polisi moko alobi na yo ete: “Zelá naino!” osengeli kosala nini?— Soki bato mosusu baboyi kotosa mpe bakatisi kaka, yo mpe osengeli kokatisa?— Osengeli kozela, ata soki kaka yo moko nde ozali kozela. Nzambe alobi na yo otosa.

Mobulu ekoki kozala na esika oyo bozali kofanda, mpe polisi moko akoki koloba ete: “Moto abima na nzela te. Moto abima na ndako te.” Kasi ekoki kozala ete ozali koyoka makɛlɛlɛ ya bato mpe okoki komituna soki likambo nini yango ezali koleka? Osengeli nde kobima libándá mpo na kotala?— Soki obimi, okomonisa ete ozali kotosa “bakonzi oyo bazali liboso”?—

Na bamboka mingi, guvɛrnema etongaka mpe bakelasi, mpe efutaka balakisi. Na bongo, okanisi ete Nzambe asepelaka ete otosa molakisi na yo?— Kanisá naino. Guvɛrnema efutaka molakisi na yo mpo ateya yo, kaka ndenge efutaka bapolisi mpo na kobatela bato. Yango wana kotosa polisi to molakisi ezali kotosa guvɛrnema.

Kasi ekozala boni soki molakisi moko asɛngi yo osambela ekeko moko to moto moko boye? Na ntango wana okosala nini?— Baebele misato oyo touti kolobela baboyaki kofukamela ekeko, ata ntango Mokonzi Nebukadanesala asɛngaki báfukamela yango. Ozali lisusu koyeba mpo na nini baboyaki?— Baboyaki mpo balingaki te kozanga botosi epai ya Nzambe.

Mokomi moko ya makambo ya kala, na nkombo Will Durant, akomaki mpo na baklisto ya liboso mpe alobaki ete ‘bosembo na bango oyo eleki [to, bokangami na bongo makasi] basengeli te komonisa yango epai ya Kaisala.’ Basengelaki komonisa yango nde epai ya Yehova! Na bongo, kobosana te ete Nzambe asengeli kozala na esika ya liboso na bomoi na biso.

Tótosaka guvɛrnema mpo ezali yango nde Nzambe azali kosɛnga biso. Kasi soki moto asɛngi biso tósala eloko oyo Nzambe apekisi, tosengeli kosala nini?— Tosengeli koloba oyo bantoma balobaki na nganga-nzambe monene: “Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.”​—Misala 5:29.

Biblia ezali koteya ete tosengeli komemya mibeko. Tángá oyo ekomami na Matai 5:41; Tito 3:1; mpe 1 Petelo 2:12-14.