Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 29

Nzambe asepelaka na bafɛti nyonso?

Nzambe asepelaka na bafɛti nyonso?

OSEPELAKA kokende na bafɛti?— Yango ekoki kozala na makambo mingi ya kosepelisa. Okanisi ete Moteyi Monene akoki kosepela biso tókende na bafɛti?— Ye moko mpe akendaki na fɛti ya libala ya moto moko, mpe bayekoli na ye mosusu bazalaki elongo na ye. Yehova azali “Nzambe ya esengo,” yango wana asepelaka ntango biso tozali na kati ya bafɛti ya malamu.​—1 Timote 1:11; Yoane 2:1-11.

Na lokasa 29 ya mokanda oyo, tozali kotánga ete Yehova akabolaki Mbu Motane mpo na kopesa Bayisalaele nzela ya koleka. Ozali koyeba lisusu ete tótángaki lisolo yango?— Na nsima, bato bayembaki, babinaki mpe bapesaki Yehova matɔndi. Ezalaki lokola fɛti. Bato basepelaki mingi, mpe tokoki kondima ete Nzambe mpe asepelaki.​—Exode 15:1, 20, 21.

Mbula soki 40 na nsima, Bayisalaele bakendaki na fɛti mosusu ya monene. Bato oyo babengaki bango na fɛti wana bazalaki kutu kosambela Yehova te. Bato yango bazalaki kutu na momeseno ya kofukamela banzambe mosusu mpo na kosambela bango mpe bazalaki kosangisa nzoto na bato oyo bazalaki babalani na bango te. Okanisi ete ekokaki kozala malamu kokende na fɛti ya ndenge wana?— Yehova asepelaki te, yango wana apesaki Bayisalaele etumbu.​—Mituya 25:1-9; 1 Bakolinti 10:8.

Biblia elobeli lisusu bafɛti mibale ya bato oyo bakanisaki mokolo oyo babotamaki. Na bafɛti wana mibale, ezali nde na moko oyo esalemaki mpo na kokanisa mokolo oyo Moteyi Monene abotamaki?— Moko te. Bafɛti wana mibale esalemaki mpo na kokanisa mokolo ya kobotama ya bato oyo bazalaki kosalela Yehova te. Moko esalemaki mpo na kokanisa mokolo ya kobotama ya Mokonzi Erode Antipasi. Yesu azalaki kofanda na etúká ya Galilai na ntango oyo Mokonzi Erode azalaki koyangela etúká yango.

Mokonzi Erode asalaki makambo mingi ya mabe. Azwaki mwasi ya ndeko na ye mpo akóma mwasi na ye. Nkombo ya mwasi yango Erodiadi. Yoane Mobatisi, mosaleli ya Nzambe, ayebisaki Erode ete likambo oyo asali ezali mabe. Erode asepelaki báyebisa ye bongo te. Yango wana akangaki Yoane na bolɔkɔ.​—Luka 3:19, 20.

Ntango Yoane azalaki na bolɔkɔ, mokolo ya kokanisa kobotama ya Erode ekómaki. Erode asalaki fɛti moko monene. Abengaki bato minene ebele. Bango nyonso balyaki, bamɛlaki mpe basepelaki mingi. Na nsima mwana mwasi ya Erodiadi akɔtaki mpe abinelaki bango. Moto nyonso asepelaki mingi na kobina na ye, yango wana Mokonzi Erode alingaki kopesa ye likabo moko ya monene. Alobaki na ye ete: “Eloko nyonso okosɛnga ngai, nakopesa yo yango, kino ndambo ya bokonzi na ngai.”

Mwana mwasi yango akosɛnga eloko nini? Akosɛnga nde mbongo? Bilamba ya kitoko? Ndako ya monene ya ye moko? Mwana mwasi yango ayebaki te eloko nini akosɛnga. Yango wana akendaki epai ya mama na ye, Erodiadi, mpe alobaki ete: “Nasɛnga eloko nini?”

Yebá ete Erodiadi azalaki koyina Yoane Mobatisi makasi. Yango wana ayebisaki mwana na ye ete asɛnga motó ya Yoane. Mwana mwasi yango azongaki epai ya mokonzi mpe alobaki ete: “Nalingi opesa ngai sikoyo na saani motó ya Yoane Mobatisi.”

Mokonzi Erode azalaki na mposa ya koboma Yoane te mpo ayebaki ete Yoane azali moto moko malamu. Kasi lokola Erode asilaki kopesa elaka, azalaki kobanga oyo bato mosusu, oyo bazalaki na fɛti, bakokanisa soki abongoli makanisi na ye. Yango wana atindaki moto moko na bolɔkɔ mpo na kokata Yoane motó. Nokinoki, moto yango azongaki. Ayaki na motó ya Yoane na saani, mpe apesaki yango na mwana mwasi wana. Na nsima, mwana mwasi wana apesaki yango na mama na ye.​—Malako 6:17-29.

Fɛti mosusu ya kokanisa mokolo ya kobotama oyo Biblia elobeli, yango mpe ezalaki malamu te. Ezalaki mpo na mokonzi moko ya Ezipito. Na fɛti yango, mokonzi atindaki mpe bákata motó ya moto. Nsima na yango, akakisaki moto yango na nzete mpo bandɛkɛ bálya ye! (Genese 40:19-22) Okanisi ete Nzambe asepelaki na bafɛti wana mibale?— Okokaki kosepela ozala na bafɛti yango?—

Toyebi ete likambo nyonso oyo ekomami na Biblia ezali na ntina. Biblia elobeli kaka bafɛti mibale ya bato oyo bakanisaki mokolo oyo babotamaki. Na bafɛti yango nyonso mibale, makambo ya mabe esalemaki. Na bongo, mpo na yo, Nzambe alingi koteya biso nini na likambo ya bafɛti ya kokanisa mokolo ya kobotama? Nzambe alingi nde tósalaka bafɛti mpo na kokanisa mokolo ya kobotama?—

Ezali solo ete na bafɛti ya ndenge wana oyo esalemaka lelo oyo, bakataka mitó ya bato te. Kasi likambo ya kosala bafɛti mpo na kokanisa mokolo ya kobotama ebandaki na bato oyo bazalaki kosambela Nzambe ya solo te. Mpo na bafɛti ya kokanisa mokolo ya kobotama oyo Biblia elobeli, buku moko (The Catholic Encyclopedia) elobi ete: “Kaka bato ya masumu . . . nde bazalaki kosala bafɛti minene mpo na mokolo oyo bango babotamaki.” Tolingi nde kozala lokola bango?—

Ezali boni mpo na Moteyi Monene? Asalaki fɛti mpo na kokanisa mokolo oyo abotamaki?— Te, ezali na esika moko te na Biblia oyo emonisi ete Yesu asalaki fɛti mpo na kokanisa mokolo oyo abotamaki. Bayekoli ya liboso ya Yesu bazalaki kosala fɛti te mpo na kokanisa mokolo ye abotamaki. Oyebi mpo na nini na nsima bato baponaki mokolo mwa 25 Desɛmbɛ mpo na kosala fɛti ya kokanisa mokolo oyo Yesu abotamaki?—

Ndenge buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi yango, bato baponaki dati wana mpo “bato ya Loma bazalaki banda kala kokumisa yango lokola Eyenga ya Saturne, mpo na kokumisa mokolo ya kobotama ya moi.” Na bongo bato baponaki kosala fɛti mpo na kokanisa mokolo ya kobotama ya Yesu na dati oyo bapakano bazalaki banda kala kosala fɛti na bango!

Oyebi mpo na nini Yesu akokaki te kobotama na sanza ya Desɛmbɛ?— Ezali mpo Biblia elobi ete ntango Yesu abotamaki, babateli-mpate bazalaki naino na bisobe na butu. (Luka 2:8-12) Na bongo, bakokaki te kozala libándá na sanza wana ya Desɛmbɛ oyo ezalaka malili makasi mpe bambula ebɛtaka mingi.

Bato mingi bayebi ete Noɛlɛ ezali te mokolo oyo Yesu abotamaki. Bayebi kutu ete na mokolo wana bapakano bazalaki kosala fɛti oyo ezalaki kosepelisa Nzambe te. Kasi, ata bongo, bato mingi bakumisaka Noɛlɛ. Na esika ete báluka koyeba ndenge oyo Nzambe atalelaka mpenza fɛti yango, bango bakanisaka kaka kosala fɛti. Kasi biso tolingaka kosepelisa Yehova, ezali bongo te?—

Yango wana ntango tosali fɛti, tosengeli komindimisa ete yango ezali kosepelisa Yehova. Tokoki kosala yango na eleko nyonso oyo tosepeli na boumeli ya mbula. Tokozela kaka dati moko ya sikisiki boye te. Tokoki kolya bilei ya kitoko mpe kosala masano ndenge na ndenge oyo ezali kosepelisa. Okosepela kosala bongo?— Ntango mosusu okoki kosolola likambo yango na baboti na yo mpo básalisa yo obongisa fɛti yango. Yango ekoki kozala mpenza malamu, ezali bongo te?— Kasi liboso ya kobongisa fɛti moko boye, osengeli komindimisa ete Nzambe akosepela na yango.

Ntina ya kosala ntango nyonso makambo oyo Nzambe asepelaka na yango emonisami mpe na Masese 12:2; Yoane 8:29; Baloma 12:2; mpe 1 Yoane 3:22.