Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 38

Ntina oyo tosengeli kolinga Yesu

Ntina oyo tosengeli kolinga Yesu

KANISÁ ete ozali na kati ya masuwa oyo ezali kozinda. Okosepela soki moto moko ayei kobikisa yo?— Okomiyoka ndenge nini soki moto moko andimi akufa mpo na kobikisa yo?— Ezali yango nde Yesu Klisto asalaki. Lokola tomonaki yango na Mokapo 37, apesaki bomoi na ye lokola lisiko mpo na kobikisa biso.

Kasi, Yesu abikisi biso te na masuwa oyo ezali kozinda. Abikisi biso nde na nini? Oyebi lisusu likambo yango?— Abikisi biso na lisumu mpe na liwa oyo biso nyonso tozwaki epai ya Adama. Yesu akufelaki mpe ata bato mosusu oyo basalá makambo ya mabe mingi. Okolinga kotya bomoi na yo na likama mpo na kobikisa bato ya ndenge wana?—

Biblia elobi ete: “Ezali mpasi mpenza ete moto akufela moyengebene; nde, mpo na moto malamu, mbala mosusu, moto moko boye akoki ata kondima kokufa.” Nzokande, Biblia emonisi ete Yesu “akufelaki bato oyo batyolaka Nzambe,” elingi koloba bato oyo basalelaka kutu Nzambe te! Biblia elobi lisusu ete: “Wana tozalaki naino basumuki [na ntango oyo tozalaki naino kosala makambo ya mabe], Klisto akufelaki biso.”​—Baloma 5:6-8.

Okoki koyeba ntoma moko oyo azalaká kosala makambo ya mabe mpenza?— Ntoma yango akomaki ete: “Klisto Yesu ayaki na kati ya mokili mpo na kobikisa basumuki. Na kati na bango ngai moto ya libosoliboso mpenza.” Ntoma oyo alobaki bongo ezali Paulo. Alobaki ete azalaki ‘liboso zoba’ mpe azalaki kofanda “na kati ya mabe.”​—1 Timote 1:15; Tito 3:3.

Kanisá naino bolingo oyo Nzambe amonisi mpenza mpo na kotinda Mwana na ye akufela bato ya ndenge wana! Nasɛngi yo ozwa Biblia na yo mpe otánga oyo yango elobi mpo na bolingo yango, na Yoane mokapo 3, vɛrsɛ 16. Mokapo yango elobi boye: “Nzambe alingaki mokili [elingi koloba, bato oyo bafandi awa na mabelé] mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.”

Yesu amonisaki ete alingaka biso ndenge Tata na ye alingaka biso. Ozali koyeba lisusu ete na Mokapo 30 ya buku oyo, totángaki mwa ndambo ya bampasi oyo Yesu amonaki na butu oyo bakangaki ye. Bakendaki na ye na ndako ya Nganga-Nzambe Monene Kaifa, mpe babandaki kosambisa Ye kuna. Bakɔtisaki batɛmwɛ ya lokuta mpo bákosela Yesu makambo, mpe bato babɛtaki ye makɔfi. Ezali na ntango wana nde Petelo awanganaki Yesu. Sikoyo, tósala lokola biso mpe tozali wana mpe tozali komona makambo mosusu oyo ezali koleka.

Ntɔngɔ etani. Yesu alali te butu mobimba. Lokola na butu basambisaki ye na ndenge esengeli te, banganga-nzambe babengisi nokinoki likita ya Sanedrina, to tribinale monene ya Bayuda, mpe babandi kosambisa ye lisusu. Na mbala oyo, bafundi lisusu Yesu ete afingi Nzambe.

Na nsima, banganga-nzambe batindi bákanga Yesu bansinga mpe bamemi ye epai ya Pilato, moto ya Loma oyo azali guvɛrnɛrɛ. Bayebisi Pilato ete: ‘Yesu azali kotɛmɛla guvɛrnema. Asengeli kobomama.’ Kasi Pilato amoni ete banganga-nzambe bazali koloba lokuta. Na bongo Pilato ayebisi bango ete: ‘Namoni likambo moko ya mabe epai ya moto oyo te. Nakotika ye akende.’ Kasi banganga-nzambe mpe bato mosusu bagangi makasi ete: ‘Te! Bomá ye!’

Na nsima, Pilato ameki lisusu koyebisa bato ete akotika Yesu akende. Kasi banganga-nzambe batindi ebele wana ya bato báganga lisusu makasi ete: ‘Soki otiki ye akende, yo mpe ozali kotɛmɛla guvɛrnema! Bomá ye!’ Ebele wana ya bato babandi kosala makɛlɛlɛ mingi. Oyebi likambo Pilato akosala?—

Andimi kosala oyo balingi. Liboso abɛtisi Yesu fimbo. Na nsima apesi ye na basoda mpo bákende koboma ye. Balatisi Yesu motole ya nzubɛ na motó mpe babandi kosɛka ye mpe kofukamela ye. Na nsima bapesi Yesu likonzí to nzete moko ya monene mpo amema yango mpe bakei na ye na libándá ya engumba tii na esika babengi Esika ya Mokuwa ya Motó. Kuna, babɛti Yesu nsɛtɛ na mabɔkɔ mpe na makolo na nzete yango. Na nsima, batɛlɛmisi nzete yango, na ndenge yango Yesu akakemi kuna likoló. Azali kobima makila. Azali koyoka mpasi makasi mpenza.

Yesu akufi mbala moko te. Azali kaka kuna likoló ya nzete. Banganga-nzambe bakonzi bazali kosɛka ye. Mpe baleki-nzela bazali koloba ete: “Soki ozali mwana ya Nzambe, kitá na nzete ya mpasi!” Kasi Yesu ayebi eloko oyo Tata na ye atindaki ye asala. Ayebi ete asengeli kopesa bomoi na ye ya kokoka mpo ete biso tókoka kozwa bomoi ya seko. Nsukansuka, na ngonga soki ya misato nsima ya midi, Yesu abeleli Tata na ye makasi mpe akufi.​—Matai 26:36–27:50; Malako 15:1; Luka 22:39–23:46; Yoane 18:1–19:30.

Yesu akesanaki mpenza mosika na Adama! Adama amonisaki te ete alingi Nzambe. Azangaki botosi epai ya Nzambe. Adama amonisaki mpe te ete alingi biso. Yango wana, mpo na lisumu oyo asalaki, biso nyonso tobotami na lisumu. Kasi Yesu amonisaki ete alingaka Nzambe mpe alingaka biso. Ntango nyonso, azalaki kotosa Nzambe. Mpe apesaki bomoi na ye mpo ete akoka kolongola biso na mpasi oyo Adama alukelá biso.

Ozali mpenza na botɔndi na likambo ya malamu oyo Yesu asalaki?— Ntango ozali kobondela Nzambe, opesaka ye matɔndi na ndenge apesaki biso Mwana na ye?— Ntoma Paulo azalaki na botɔndi na oyo Klisto asalaki mpo na ye. Paulo akomaki ete Mwana ya Nzambe “alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.” (Bagalatia 2:20) Yesu akufelaki mpe ngai ná yo. Apesaki bomoi na ye ya kokoka mpo ete biso tókoka kozwa bomoi ya seko! Yango ezali mpenza ntina monene oyo tosengeli kolinga Yesu.

Ntoma Paulo akomelaki baklisto oyo bazalaki na engumba Kolinti ete: “Bolingo ya Klisto ezali kopusa biso na mosala.” Mpo na yo, bolingo ya Klisto esengeli kopusa biso na kosala nini?— Yoká eyano ya Paulo: ‘Klisto akufelaki bato nyonso mpo bákoka kozala na bomoi mpo na bango moko lisusu te, kasi mpo na ye.’​—2 Bakolinti 5:14, 15.

Ndenge nini okoki komonisa ete ozali na bomoi mpo na kosepelisa Klisto?— Lolenge moko ya kosala yango ezali ya koyebisa bato mosusu makambo oyo oyekoli na ntina na ye. Ezali mpe na ndenge mosusu. Kanisá naino likambo oyo: Ekoki kozala ete ozali kaka yo moko na ndako, mama na yo to tata na yo azali komona te makambo ozali kosala, to mpe moto mosusu azali komona yango te. Okotala na televizyo to ntango mosusu na Internet makambo oyo oyebi ete ekosepelisa Yesu te?— Kobosana te ete, lelo oyo, Yesu azali na bomoi mpe akoki komona makambo nyonso oyo tozali kosala!

Ntina mosusu oyo tosengeli kolinga Yesu ezali mpo tolingi kolanda ndakisa ya Yehova. Yesu alobaki ete: “Tata alingaka ngai.” Oyebi mpo na nini alingaka Yesu mpe mpo na nini biso mpe tosengeli kolinga ye?— Ezali mpo Yesu andimaki kokufa mpo mokano ya Nzambe ekoka kosalema. (Yoane 10:17) Na bongo, tósala oyo Biblia eyebisi biso: “Bókóma bamekoli ya Nzambe, lokola bana balingami, mpe bókoba kotambola na kati ya bolingo, ndenge Klisto mpe alingaki bino mpe amikabaki mpo na bino.”​—Baefese 5:1, 2.

Mpo tomonisa botɔndi mingi mpo na Yesu mpe mpo na oyo asalaki mpo na biso, tángá Yoane 3:35; 15:9, 10; mpe 1 Yoane 5:11, 12.