Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 40

Ndenge ya kosepelisa Nzambe

Ndenge ya kosepelisa Nzambe

TOKOKI kosala nini mpo na kosepelisa Nzambe? Tokoki nde kopesa ye eloko moko boye?— Yehova alobi ete: “Nyama nyonso ya zamba ezali ya ngai.” Alobi lisusu ete: “Palata ezali ya ngai mpe wolo ezali ya ngai.” (Nzembo 24:1; 50:10; Hagai 2:8) Ata bongo, ezali na eloko moko oyo tokoki kopesa Nzambe. Eloko nini?—

Yehova atikeli biso nzela tópona soki tokosalela ye to te. Atindaka biso na makasi te ete tósala oyo ye alingi tósala. Tótalela ntina oyo Nzambe asalá biso na likoki ya kopona soki tokosalela ye to te.

Ntango mosusu oyebi robo. Ezali masini oyo esalaka makambo kaka ndenge moto oyo asalaki yango alingaki ete yango esalaka. Yango wana, robo ekoki kosala makambo oyo yango elingi te. Soki Yehova alingaka, akokaki kosala biso nyonso tózala lokola barobo. Soki alingaka, akokaki kosala biso ete tósalaka kaka makambo oyo alingi biso tósala. Kasi Nzambe asalaki bongo te. Oyebi mpo na nini?— Biloko mosusu ya kosakana na yango esalaka lokola barobo. Ntango ofini butɔ, biloko yango esalaka kaka makambo oyo moto oyo asalaki yango alingaki ete esalaka. Osilá komona eloko moko ya kosakana na yango ya ndenge wana?— Mbala mingi, bana balɛmbaka kosakana na eloko ya ndenge wana. Nzambe alingi te ete tótosa ye lokola nde tozali barobo oyo asalá kaka mpo na kosalela ye. Yehova alingi tósalela ye mpo tolingi ye mpe mpo tolingi kotosa ye.

Mpo na yo, Tata na biso ya likoló ayokaka ndenge nini ntango tozali kotosa ye mpo tolingi kotosa?— Yebisá ngai, makambo oyo osalaka ekoki kosepelisa baboti na yo to kopesa bango mpasi, ezali bongo te?— Biblia elobi ete mwana ya bwanya ‘asepelisaka tata na ye’ kasi mwana ya zoba ‘apesaka mama na ye mawa.’ (Masese 10:1NW) Omoni ete ntango ozali kosala oyo tata ná mama na yo bazali kosɛnga, yango esepelisaka bango, ezali bongo te?— Kasi bakomiyoka ndenge nini soki ozali kotosa bango te?—

Tólobela naino Tata na biso ya likoló, Yehova. Ayebisi biso ndenge tokoki kosala mpo na kosepelisa ye. Nasɛngi yo ozwa Biblia na yo mpe ofungola yango na Masese 27:11 (NW). Na mokapo wana, Nzambe alobi na biso ete: “Zalá na bwanya, mwana na ngai, mpe sepelisá motema na ngai, mpo ete nakoka kopesa eyano epai na ye oyo azali kotumola ngai.” Oyebi soki kotumola moto elakisi nini?— Elakisi kosɛka moto mpe koloba na ye ete akokoka te kosala makambo oyo azali koloba ete akoki kosala. Ndenge nini Satana azali kotumola Yehova?— Tótala yango.

Kanisá lisusu, tomonaki na Mokapo 8 ya buku oyo ete Satana alingaka azala Moto ya Liboso mpe bato nyonso bátosa ye. Satana alobaka ete bato basambelaka Yehova kaka mpo apesa bango bomoi ya seko. Nsima ya kotinda Adama ná Eva báboya kotosa Yehova, Satana abɛtelaki Nzambe ntembe. Ayebisaki ye ete: ‘Bato basalelaka yo kaka mpo opesaka bango biloko. Kasi soki otikeli ngai nzela, okomona ndenge nakopɛngwisa moto nyonso oyo ngai nalingi.’

Ezali solo ete maloba wana ezali mpenza bongo te na Biblia. Kasi ntango tozali kotánga lisolo ya Yobo, ezali polele ete Satana alobaki na Nzambe maloba ya ndenge wana. Yobo akotikala sembo epai ya Nzambe to te. Motuna wana ezalaki na ntina mingi mpo na Satana mpe mpo na Yehova. Tófungola Biblia na biso na Yobo mokapo 1 mpe 2 mpe tómona ndenge likambo yango elekaki.

Na Yobo mokapo 1, tomoni ete Satana azali mpe na likoló ntango baanzelu mosusu bayei kokutana na Yehova. Na bongo, Yehova atuni Satana ete: ‘Outi wapi?’ Satana ayanoli ete auti kotambolatambola na mabelé. Yango wana, Yehova atuni ye lisusu boye: ‘Omoni Yobo, ete asalelaka ngai mpe asalaka makambo ya mabe te?’​—Yobo 1:6-8.

Satana abandi mbala moko kobimisa makanisi mosusu: ‘Yobo asambelaka yo kaka mpo azali na mikakatano te. Soki otiki kobatela ye mpe kopambola ye, akolakela yo mabe na miso na yo.’ Yehova azongisi ete: ‘Malamu, Satana, okoki kosala ye nyonso oyo olingi, kasi kosimba ye na nzoto te.’​—Yobo 1:9-12.

Satana asali nini?— Atindi bato báyiba bangɔmbɛ ná bampunda ya Yobo mpe báboma bato oyo bazali kobatela yango. Na nsima nkake ebɛti, ebomi bampate mpe bato oyo bazalaki koleisa yango. Na nsima, bato bayei mpe bayibi bakamela mpe babomi bato oyo bazali kobatela yango. Na nsuka, Satana atindi mopɛpɛ moko makasi ebuki ndako oyo bana zomi ya Yobo bazali, mpe bango nyonso bakufi. Ata nyonso wana, Yobo azali kaka kosalela Yehova.​—Yobo 1:13-22.

Ntango Satana ayei lisusu epai ya Yehova, Yehova amonisi ye ete Yobo azali kaka kobatela bosembo na ye. Satana abimisi lisusu makanisi mosusu, alobi ete: ‘Soki otiki ngai nasala ye mabe na nzoto, akolakela yo mabe na miso na yo.’ Na bongo, Yehova atiki Satana asala Yobo mabe, kasi akebisi ye ete aboma te.

Satana apesi Yobo maladi, bampota ebimi ye nzoto mobimba. Bampota yango ezali kobimisa nsolo mabe, yango wana moto moko te azali kolinga koya pembeni na ye. Ata mwasi ya Yobo ayebisi ye ete: “Lakelá Nzambe mabe mpe kufá!” Baoyo bazali koloba ete bazali baninga ya Yobo bayei kotala ye mpe babakiseli ye mpasi lisusu ntango bazali koloba na ye ete azwi mpasi nyonso wana mpo asali makambo ya mabe. Atako Satana abimiseli Yobo mikakatano mpe mpasi nyonso wana, Yobo azali kaka kosalela Yehova na bosembo mpenza.​—Yobo 2:1-13; 7:5; 19:13-20.

Mpo na yo, Yehova amiyokaki ndenge nini na komona bosembo ya Yobo?— Ayokaki esengo mpamba te akokaki koloba na Satana ete: ‘Talá Yobo! Azali kosalela ngai mpo alingi kosalela ngai.’ Yo okozala lokola Yobo, elingi koloba moto oyo Yehova akoki kolakisa lokola ndakisa oyo ezali komonisa polele ete Satana azali mobuki lokuta?— Ya solo, ezali libaku moko malamu ya kopesa eyano na ntembe oyo Satana abimisaki ntango alobaki ete akoki kotinda bato bátika kosalela Yehova. Mpo na Yesu, yango ezalaki mpenza libaku moko malamu.

Moteyi Monene atikelaki Satana nzela te ete atinda Ye na kosala likambo moko ya mabe. Kanisá esengo oyo Tata na ye ayokaki mpo na ndakisa na ye! Yehova akokaki kopesa Satana eyano na kolakisáká ye Yesu: ‘Talá Mwana na ngai! Atikali sembo mpenza epai na ngai mpo alingi ngai!’ Kanisá mpe esengo oyo Yesu azalaki na yango na ndenge asepelisaki motema ya Tata na ye. Mpo na esengo yango, Yesu ayikelaki ata liwa mpiko likoló ya nzete ya mpasi.​—Baebele 12:2.

Olingi kozala lokola Moteyi Monene mpe kosepelisa Yehova?— Soki ezali bongo, landá koyekola makambo oyo Yehova alingi osalaka, mpe sepelisá ye na kosaláká yango!

Tángá oyo Yesu asalaki mpo na kosepelisa Nzambe mpe oyo biso tosengeli kosala mpo na kosepelisa ye, na Masese 23:22-25; Yoane 5:30; 6:38; 8:28; mpe 2 Yoane 4.