Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 41

Bana oyo bazali kosepelisa Nzambe

Bana oyo bazali kosepelisa Nzambe

MPO na yo, awa na mabelé, mwana nini ayokisaki Yehova esengo mingi koleka?— Ezali Mwana na ye, Yesu. Tólobela makambo oyo Yesu asalaki mpo na kosepelisa Tata na ye ya likoló.

Kobanda esika oyo Yesu ná baboti na ye ná bandeko na ye bazalaki kofanda tii na Yelusaleme, esika oyo tempelo kitoko ya Yehova ezalaki, esengelaki kotambola mikolo soki misato. Yesu abengaki tempelo yango “ndako ya Tata na ngai.” Mbula na mbula, ye ná baboti na ye ná bandeko na ye bazalaki kokende kuna mpo na Elekeli.

Na mbula moko, ntango Yesu azalaki na mibu 12, baboti na ye, bazalaki kozonga ntango Elekeli esilaki. Ntango bakómaki na esika oyo basengelaki kolala, bayaki koyeba ete Yesu azali elongo na bandeko mpe baninga na bango te. Na mbala moko, Malia ná Yozefe bazongaki na Yelusaleme mpo na koluka Yesu. Okanisi ete akokaki kozala wapi?—

Bakutaki Yesu na tempelo. Azalaki koyoka bateyi mpe kotuna bango mituna. Mpe ntango bazalaki kotuna ye mituna, azalaki kozanga eyano ya kopesa te. Bazalaki kokamwa na biyano ya malamu oyo azalaki kopesa. Omoni sikoyo mpo na nini Nzambe azalaki kosepela na Mwana na ye?—

Ntango Malia ná Yozefe bamonaki Yesu, motema na bango ekitaki. Kasi Yesu amitungisaki te. Ayebaki ete tempelo ezali esika oyo moto asengeli kobanga eloko te. Yango wana atunaki bango ete: “Boyebaki te ete nasengeli kozala na ndako ya Tata na ngai?” Ayebaki ete tempelo ezali ndako ya Nzambe, mpe asepelaki kozala kuna.

Nsima na yango, Malia ná Yozefe bakamataki Yesu, mwana na bango ya mibu 12, mpe bazongaki na Nazalete. Okanisi Yesu azalaki komonisa ezaleli nini epai ya baboti na ye?— Biblia elobi ete “azalaki kaka kotosa bango.” Mpo na yo, yango elakisi nini?— Elakisi ete ye azalaki koyokela bango. Ɛɛ, azalaki kosala oyo baboti na ye bazalaki kosɛnga ye, ata soki batindi ye asala misala ya ndako lokola kokende kotoka mai na libulu.​—Luka 2:41-52.

Simbá likambo oyo: Atako Yesu azalaki moto ya kokoka, azalaki kotosa baboti na ye bato ya kozanga kokoka. Ezaleli wana esepelisaki Nzambe?— Asepelaki mpenza na yango, mpamba te Liloba ya Nzambe eyebisi bana ete: “Bótosaka baboti na bino.” (Baefese 6:1) Yo mpe okoki kosepelisa Nzambe soki ozali kotosa baboti na yo, ndenge Yesu asalaki.

Ndenge mosusu oyo okoki kosepelisa Nzambe ezali ya koyebisa bato mosusu makambo na ye. Kasi bato mosusu bakoki koloba ete wana ezali likambo oyo ebongi na bana te. Nzokande, ntango bato balukaki kopekisa bana mibali yango kosala likambo yango, Yesu alobaki ete: ‘Botángá naino te na Makomami ete: “Uta na minɔkɔ ya bana mike Nzambe akobimisa lisanzoli”?’ (Matai 21:16) Na bongo, biso nyonso tokoki koyebisa bato mosusu makambo ya Yehova mpe koyebisa bango ete azali Nzambe moko malamu mpenza. Mpe soki tozali kosala bongo, tokosepelisa Nzambe.

Epai wapi toyekolaka makambo ya Nzambe oyo tokoki koyebisa bato mosusu?— Na boyekoli ya Biblia oyo tosalaka na ndako. Kasi toyekolaka makambo mingi na esika oyo basaleli ya Nzambe bayanganaka mpo na koyekola. Nzokande, ndenge nini tokoki koyeba basaleli na ye?—

Bato yango basalaka nini na makita na bango? Bateyaka mpenza makambo oyo ezali na Biblia? Batángaka yango mpe balobelaka yango? Ezali ndenge wana nde toyokaka Nzambe, ezali bongo te?— Mpe na makita ya boklisto, tozelaka tóyoka oyo Nzambe azali koloba, ezali bongo te?— Kasi ezali boni soki bato balobi ete ezali na ntina te kolanda oyo Biblia ezali koloba? Okoloba ete bato yango bazali basaleli ya Nzambe?—

Likambo mosusu oyo osengeli kosimba yango oyo: Biblia elobi ete basaleli ya Nzambe bakozala “ekólo moko mpo na nkombo na ye.” (Misala 15:14) Lokola nkombo ya Nzambe ezali Yehova, tokoki kotuna bato soki Yehova azali Nzambe na bango. Soki balobi ete Yehova azali Nzambe na bango te, wana tokoyeba ete bato yango bazali basaleli na ye te. Basaleli ya Nzambe basengeli mpe koyebisaka bato mosusu makambo ya Bokonzi ya Nzambe. Mpe basengeli kotosaka mibeko ya Nzambe mpo na komonisa ete balingaka ye.​—1 Yoane 5:3.

Soki oyebi bato oyo basalaka makambo nyonso wana, na yango osengeli kosangana na bango mpo na kosambela Nzambe. Na makita yango, osengeli koyoka mateya na likebi mpenza mpe kopesa biyano ntango bazali kotuna mituna. Ezali yango nde Yesu asalaki ntango azalaki na ndako ya Nzambe. Mpe soki ozali kosala bongo, okosepelisa Nzambe, lokola Yesu asepelisaki ye.

Okoki koyeba bana mosusu oyo Biblia elobeli, oyo basepelisaki Nzambe?— Timote azali ndakisa moko malamu mpenza na likambo yango. Tata na ye azalaki kondimela Yehova te. Kasi mama na ye, Enisi, ná nkɔkɔ na ye ya mwasi, Loisi, bango bandimelaki Yehova. Timote azalaki koyoka bango, yango wana ayebaki makambo ya Yehova.

Ntango Timote akolaki, ntoma Paulo akendaki na engumba oyo ye azalaki kofanda. Amonaki mposa makasi oyo Timote azalaki na yango ya kosalela Yehova. Yango wana, abengaki Timote akende elongo na ye mpo na kosalela Nzambe lisusu mingi koleka. Bipai nyonso oyo bazalaki koleka, bazalaki koyebisa bato makambo ya Bokonzi ya Nzambe mpe makambo ya Yesu.​—Misala 16:1-5; 2 Timote 1:5; 3:14, 15.

Kasi na Biblia tozali kokuta kaka ndakisa ya bilenge mibali oyo basepelisaki Nzambe?— Te. Tótalela ndakisa ya mwana moko ya mwasi ya Yisalaele oyo asepelisaki Nzambe. Na ntango wana, ekólo ya Silia ná ekólo ya Yisalaele bazalaki banguna. Mokolo moko, bato ya Silia bayaki kobunda na Yisalaele mpe bakangaki mwana yango mpe bakendeki na ye. Bapesaki ye epai ya Namana, mokonzi ya basoda. Kuna akómaki mwana ya mosala ya mwasi ya Namana.

Nzokande Namana azalaki na maladi ya maba. Monganga ata moko te akokaki kosalisa ye. Kasi mwana yango oyo autaki na Yisalaele andimaki ete mosaleli moko ya Nzambe, mosakoli, akoki kosalisa Namana. Kasi, Namana ná mwasi na ye bazalaki kosambela Yehova te. Esengelaki nde ete mwana yango ayebisa bango makambo oyo ayebaki? Soki ezalaki yo, olingaki kosala nini?—

Mwana yango alobaki ete: ‘Soki kaka Namana akei epai ya mosakoli ya Yehova na Yisalaele, na ntembe te akobika na maladi na ye ya maba.’ Namana andimaki likambo oyo mwana yango alobaki, mpe akendeki epai ya mosakoli ya Yehova. Ntango asalaki oyo mosakoli ayebisaki ye, maladi na ye esilaki. Likambo yango esalaki ete Namana akóma mosambeli ya Nzambe ya solo.​—2 Mikonzi 5:1-15.

Yo mpe okosepela kosalisa moto moko ayekola makambo ya Yehova mpe makambo oyo Yehova akoki kosala, ndenge mwana wana ya mwasi asalaki?— Banani oyo okoki kosalisa?— Na ebandeli, bato bakoki komonisa lokola nde bazali na mposa ya lisalisi te. Kasi okoki koyebisa bango makambo kitoko oyo Yehova azali kosala. Mpe bakoki koyoka. Yebá malamu ete yango ekosepelisa Nzambe.

Tokoki kokuta makambo mosusu ya kolendisa oyo ekosalisa bana ete bázala na esengo ya kosalela Nzambe, na Nzembo 122:1; 148:12, 13; Mosakoli 12:1; 1 Timote 4:12; mpe Baebele 10:23-25.