Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 44

Baninga na biso basengeli kolinga Nzambe

Baninga na biso basengeli kolinga Nzambe

BANINGA ezali bato oyo tolingaka kosolola mpe kolekisa ntango elongo na bango. Yango wana ezali mpenza na ntina kozala na baninga ya malamu. Na makanisi na yo, nani akoki kozala moninga na biso oyo aleki baninga nyonso?— Ezali Yehova Nzambe.

Tokoki mpenza kozala baninga ya Nzambe?— Biblia elobi ete Abalayama, moto moko ya kala, azalaki “moninga ya Yehova.” (Yakobo 2:23) Oyebi mpo na nini azalaki moninga na ye?— Biblia epesi eyano ete Abalayama azalaki kotosa Nzambe. Atosaki ata ntango bazalaki kosɛnga ye makambo ya makasi. Na yango, mpo na kozala moninga ya Yehova, tosengeli kosala makambo oyo esepelisaka ye, ndenge Abalayama asalaki mpe ndenge Moteyi Monene azalaki ntango nyonso kosala.​—Genese 22:1-14; Yoane 8:28, 29; Baebele 11:8, 17-19.

Yesu ayebisaki bantoma na ye ete: “Bozali baninga na ngai soki bozali kosala oyo ngai nazali kotinda bino.” (Yoane 15:14) Lokola makambo nyonso oyo Yesu azalaki koyebisa bato eutaki na Yehova, Yesu alingaki koloba ete baninga na ye ezali bato oyo bazalaki kosala makambo oyo Nzambe asɛngaki bango. Ɛɛ, baninga na ye nyonso bazalaki kolinga Nzambe.

Baninga ya Yesu mosusu ya motema ezalaki bantoma na ye, oyo bazali na elilingi ya lokasa 75 ya buku oyo. Bazalaki kotambola elongo na ye mpe bazalaki kosalisa ye na mosala ya kosakola. Yesu azalaki kolekisa ntango na ye mingi elongo na bango. Bazalaki kolya esika moko. Bazalaki kosolola makambo ya Nzambe. Ezalaki mpe na makambo mosusu oyo bazalaki kosala elongo. Kasi Yesu azalaki mpe na baninga mosusu ebele. Azalaki mbala mingi kofanda na bango esika moko mpe kominanola elongo na bango.

Yesu azalaki kosepela kofanda na libota moko oyo ezalaki na Betania, mwa mboka moke oyo ezalaki mpenza mosika te na engumba Yelusaleme. Ozali lisusu koyeba bato ya libota yango?— Ezalaki Malia ná Malata ná ndeko na bango ya mobali, Lazalo. Yesu alobaki ete Lazalo azali moninga na ye. (Yoane 11:1, 5, 11) Soki Yesu azalaki kolinga libota wana mpe kosepela kozala elongo na bango ezali mpo bango bazalaki kolinga Yehova mpe kosalela Ye.

Yango elingi koloba te ete Yesu azalaki na boboto te epai ya bato oyo bazalaki kosalela Nzambe te. Azalaki kosalela bango boboto. Kutu, azalaki kokenda ata na bandako na bango mpe kolya na bango esika moko. Yango etindaki bato mosusu báloba ete Yesu azalaki “moninga ya bakɔngɔli-mpako mpe ya basumuki.” (Matai 11:19) Kasi, soki Yesu azalaki kokende epai ya bato wana ezalaki te mpo azalaki kosepela na makambo na bango. Azalaki kokende epai na bango mpo na kosolola na bango makambo ya Yehova. Azalaki koluka nde kosalisa bango mpo bátika banzela na bango ya mabe mpe básalela Nzambe.

Ezali yango nde esalemaki mokolo moko na engumba ya Yeliko. Yesu alekaki na engumba yango ntango azali kokende na Yelusaleme. Bato ebele bazalaki wana mpe na kati na bango ezalaki na mobali moko nkombo na ye Zakai. Zakai azalaki na mposa ya komona Yesu. Kasi, lokola bato bazalaki ebele, akokaki komona te mpo azalaki mokuse. Yango wana, apotaki mbangu liboso na bango mpe amataki na nzete moko mpo akoka komona Yesu malamumalamu ntango akoleka wana.

Ntango Yesu akómaki na nzete yango, atombolaki miso likoló mpe alobaki ete: ‘Kitá noki, mpo lelo nakozala na ndako na yo.’ Nzokande, Zakai azalaki moto moko ya bomɛngo, oyo azalaki kosala makambo ya mabe. Mpo na nini Yesu asepelaki kokende na ndako ya moto ya ndenge wana?—

Ezalaki te mpo Yesu asepelaki na makambo ya mobali yango. Akendaki kuna nde koyebisa Zakai makambo ya Nzambe. Amonaki nyonso oyo mobali wana asalaki mpo na komona ye. Na bongo, ayebaki ete Zakai akosepela mbala mosusu koyoka. Yango ezalaki ntango malamu ya koyebisa ye makambo oyo Nzambe alingi ete bato básalaka.

Sikoyo, likambo nini ozali komona na elilingi oyo?— Zakai asepeli na mateya ya Yesu. Ayoki mpasi mingi na motema na ndenge azalaki kobuba bato, mpe azali kolaka ete akozongisa mbongo oyo asengelaki kozwa te. Na nsima akómi moyekoli ya Yesu. Ezali na ntango wana nde Yesu ná Zakai bakómi baninga.​—Luka 19:1-10.

Soki tolandi ndakisa ya Moteyi Monene, tokoki kokende kotala ata bato oyo bazali baninga na biso te?— Ɛɛ, tokoki kokende kotala bango. Kasi soki tokokende na bandako na bango ezali te mpo tozali kosepela na makambo na bango. Mpe tokosangana na bango te na makambo ya mabe. Tokokende kotala bango nde mpo na koyebisa bango makambo ya Nzambe.

Kasi, baninga na biso ya motema ezali baoyo tosepelaka kolekisa ntango elongo na bango. Mpo bázala baninga ya malamu, basengeli kozala bato oyo Nzambe alingaka. Ezali na bato mosusu oyo bayebi ata Yehova te. Kasi, soki balingi koyeba ye, tokoki kosalisa bango. Na nsima, soki bakómi kolinga Yehova ndenge biso tolingaka ye, na ntango wana nde bakoki kokóma baninga na biso ya motema.

Ezali na lolenge mosusu oyo tokoki koyeba soki moto akozala moninga ya malamu. Talá malamumalamu makambo oyo asalaka. Asalaka nde bato mosusu makambo ya mabe, bongo na nsima asɛka bango? Ndenge wana ya kosala ezali mabe, ezali bongo te?— Amilukelaka ntango nyonso makambo? Tokolinga te komikɔtisa na makambo na ye, ezali bongo te?— To asalaka nde makambo mabe na nko mpe na nsima akanisaka ete azali na mayele mpo moto moko amonaki ye te? Ata soki moto moko amonaki ye te, kasi Nzambe amonaki ye, ezali bongo te?— Okanisi ete bato oyo basalaka makambo ya ndenge wana bakoki kozala baninga ya malamu?—

Okosepela kozwa Biblia na yo? Tiká tótala oyo yango elobi mpo na oyo etali makambo ya malamu to makambo ya mabe oyo baninga na biso bakoki kotinda biso tósala. Tokotánga 1 Bakolinti mokapo 15, vɛrsɛ 33. Ozwi yango?— Totángi boye: “Bómikosa te. Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” Yango elakisi ete soki tozali kotambola na bato mabe, biso mpe tokoki kokóma mabe. Ezali mpe solo ete baninga ya malamu basalisaka biso tókóma na bizaleli ya malamu.

Tóbosana ata moke te ete Moto oyo aleki mpenza ntina kati na bomoi na biso ezali Yehova. Tolingi te kobebisa boninga na biso na ye, ezali bongo te?— Lokola ezali bongo, tosengeli kokeba ete tózala baninga kaka ya bato oyo balingaka Nzambe.

Mikapo oyo ezali komonisa ntina ya kozala na baninga ya malamu: Nzembo 119:115; Masese 13:20; 2 Timote 2:22; mpe 1 Yoane 2:15.