Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 47

Ndenge oyo toyebi ete Armagedona ekómi pene

Ndenge oyo toyebi ete Armagedona ekómi pene

OYEBI eloko oyo babengi elembo, ezali bongo te?— Na Mokapo 46, tomonaki elembo oyo Nzambe apesaki mpo na komonisa ete akoboma mokili na mpela lisusu te. Lisusu, bantoma basɛngaki Yesu elembo mpo bákoka koyeba ntango oyo akozonga mpe ntango oyo nsuka ya mokili, to ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, ekokóma pene.​—Matai 24:3.

Lokola Yesu akomonana te mpo akozala na likoló, bato bakozala nde na mposa ya elembo mpo na koyeba ete abandi koyangela. Yango wana, Yesu alobelaki makambo oyo bayekoli na ye basengeli kotalela awa na mabelé. Ntango makambo yango ekomonana, yango ekolakisa ete azongi mpe akómi Mokonzi mpe abandi koyangela na likoló.

Mpo na koteya bayekoli na ye ntina ya kosɛnzɛlaka, Yesu ayebisaki bango ete: “Bótala nzete ya figi mpe banzete mosusu nyonso: Ntango yango esili kobanda kobimisa nkasa, na kotaláká yango boyebaka ete sikoyo eleko ya molunge ekómi pene.” Soki elanga ekómi pene oyebaka. Na yango, okoyeba mpe ete Armagedona ekómi pene ntango omoni makambo oyo Yesu alobelaki ebimi.​—Luka 21:29, 30.

Na lokasa oyo mpe na oyo elandi, tozali komona bililingi ya makambo oyo Yesu alobaki ete ekozala na kati ya elembo oyo ekomonisa ete Bokonzi ya Nzambe ekómi pene. Ntango makambo nyonso wana ekomonana, Bokonzi ya Nzambe oyo Klisto akotambwisa ekobukabuka baguvɛrnema nyonso, ndenge totángaki na Mokapo 46.

Na yango, talá malamumalamu bililingi oyo ezali na nkasa mibale oyo toleki, tokolobela yango. Na Matai 24:6-14 mpe na Luka 21:9-11, okoki kotánga makambo oyo ozali komona na bililingi yango. Lisusu, talá nimero oyo ezali na elilingi mokomoko. Nimero yango ezali na ebandeli ya paragrafe oyo elobeli elilingi yango. Sikoyo tótala soki makambo ndenge na ndenge ya elembo yango oyo Yesu apesaki ezali kosalema lelo oyo.

(1) Yesu alobaki ete: “Bokoyoka lokito ya bitumba mpe nsango ya bitumba; . . . ekólo ekotombokela ekólo mpe bokonzi ekotombokela bokonzi.” Oyokaka nsango ya bitumba?— Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki na 1914 mpe esukaki na 1918, mpe ezalaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, oyo ebandaki na 1939 mpe esukaki na 1945. Liboso ya bitumba wana mibale, bitumba ya mokili mobimba esalemaká te! Sikoyo, bitumba ezali bipai nyonso na mokili. Ezali polele ete mokolo na mokolo na televizyo, na radio, na bazulunalo, tozali koyoka to tozali kotánga bansango ya bitumba.

(2) Yesu alobaki lisusu ete: “Kozanga ya bilei ekozala . . . epai na epai.” Ndenge oyebi yango, bato nyonso te nde bazalaka na biloko mingi ya kolya. Mokolo na mokolo, bankóto ya bato bazali kokufa mpo na nzala.

(3) Yesu abakisaki ete: ‘Epai na epai bamaladi mabe ekozala.’ Oyebi soki maladi mabe ezali nini?— Ezali maladi oyo ebomaka bato mingi mbala moko. Maladi moko mabe ya ndenge wana babengaki yango grippe espagnole mpe ebomaki bato soki milio 20 na mbula moko mpamba. Na ntango na biso, bato mingi koleka motángo wana bakokufa mbala mosusu na maladi ya sida. Maladi mosusu oyo tokoki mpe kotánga ezali kanser, maladi ya motema, mpe bamaladi mosusu oyo ezali koboma bankóto ya bato mbula na mbula.

(4) Yesu amonisaki likambo mosusu oyo ezali na kati ya elembo yango, alobaki boye: “Koningana ya mabelé ekozala epai na epai.” Oyebi eloko babengi koningana ya mabelé?— Ezali ntango mabelé elɛngi to eningani makasi. Bandako ekweaka mpe mbala mingi bato bakufaka. Banda mobu 1914, mabelé ezali koningana mingi mbula na mbula. Osilá koyoka ete mabelé eningani?—

(5) Yesu alobaki ete likambo mosusu oyo ezali na kati ya elembo yango ezali ete: ‘Makambo ya mabe ekokóma mingi.’ Yango wana, koyiba mpe mobulu ekómi mingi. Bipai nyonso bato bazali kobanga ete moto akokɔtela bango na ndako mpo na koyiba biloko na bango. Ndenge bazali koboma bato mpe ndenge mobulu ezali kosalema mingi lelo bipai nyonso na mokili, ezalaká bongo te liboso.

(6) Yesu amonisaki likambo moko ya ntina mingi na kati ya elembo yango ntango alobaki ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Soki ozali komona ete “nsango malamu oyo” ezali na ntina mingi mpenza, osengeli kolobela yango epai ya bato mosusu. Soki ozali kosala bongo, okomonisa ete yo mpe ozali kokokisa likambo wana ya elembo yango.

Bato mosusu bakoki koloba ete makambo oyo Yesu asakolaki ezalaka banda kala. Kasi makambo wana nyonso naino esalemá te mbala moko mpe na bisika mingi na mokili. Oyebi soki elembo yango elakisi nini?— Elakisi ete soki tomoni makambo nyonso wana, tóyeba ete mosika te mokili ya sika ya Nzambe ekozwa esika ya mokili mabe oyo.

Ntango Yesu apesaki elembo oyo, alobelaki lisusu eleko moko ya mbula oyo eyebani malamu. Alobaki ete: “Bóbondelaka ntango nyonso mpo kokima na bino esalema te na eleko ya mpiɔ makasi.” (Matai 24:20) Mpo na yo, alingaki mpenza koloba nini?—

Soki moto asengeli kokima likama moko boye na eleko ya mpiɔ makasi, ntango oyo ezalaka mpasi to ata mpe likama mpo na kokende esika mosusu, nini ekoki kokómela ye?— Ata soki akimi likama yango, akonyokwama mingi ntango azali kokima. Ekozala mpenza mawa soki moto akufi na mopɛpɛ makasi ya eleko ya mpiɔ mpo amipesaki na kosala makambo mosusu na esika ya kokima liboso ete mopɛpɛ yango eya, ezali bongo te?—

Okangi sikoyo ntina ya likambo oyo Yesu azalaki kolobela ntango alobaki ete ezali malamu te kozela eleko ya mpiɔ makasi mpo na kokima?— Azalaki koyebisa biso ete lokola toyebi ete Armagedona ekómi pene, tosengeli kolekisa ntango te mpo na kozwa ekateli ya kosalela Nzambe mpo na komonisa ete tolingaka ye. Soki tozali kolekisa ntango, mbala mosusu tokokoka lisusu kosalela ye te. Soki tosali bongo, tokozala lokola bato oyo bazalaki na ntango ya Mpela monene, oyo bayokaki likebisi ya Noa kasi bakɔtaki na masuwa te.

Sikoyo, tólobela ndenge bomoi ekozala nsima ya etumba monene ya Armagedona. Tokoyeba makambo oyo Nzambe abombeli biso nyonso oyo tozali kolinga ye mpe kosalela ye lelo oyo.

Mikapo mosusu oyo ezali komonisa ete Armagedona ekómi pene yango oyo: 2 Timote 3:1-5 mpe 2 Petelo 3:3, 4.