Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO YA LIBOSO

Mateya ya solo oyo etali Nzambe ezali nini?

Mateya ya solo oyo etali Nzambe ezali nini?
  • Nzambe atyelaka yo mpenza likebi?

  • Azalaka ndenge nini? Azali na nkombo?

  • Okoki kopusana penepene na ye?

1, 2. Mpo na nini ezalaka malamu kotuna mituna?

OSILÁ kotya likebi na ndenge bana batunaka mituna? Bana mingi babandaka kotuna mituna ntango kaka bayebi koloba. Bazalaka na mposa makasi ya koyeba, yango wana bafungolaka miso mpe batunaka mituna lokola: Mpo na nini likoló ezali na langi ya bule? Mpo na nini minzoto engɛngaka? Nani alakisá bandɛkɛ koyemba? Okoki kosala makasi mpo na kopesa bango eyano, kasi ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Ata soki opesi bango eyano ya malamu mpenza, ntango mosusu bakotuna lisusu: Mpo na nini?

2 Kaka bana te nde batunaka mituna. Ntango tozali kokola, totikaka te kotuna mituna. Totunaka mituna mpo bálakisa biso nzela, mpo tóyeba makama oyo tosengeli kokima, to kaka mpo na koyeba. Kasi emonani ete bato mingi batiki kotuna mituna, mingimingi mituna oyo eleki ntina. To tóloba, batiki koluka biyano.

3. Mpo na nini bato mingi balukaka lisusu te biyano na mituna ya ntina mingi?

3 Kanisá naino motuna oyo ezali na ezipeli ya buku oyo, mituna oyo ezali na maloba ya ebandeli ya buku oyo, to mituna oyo ezali na ebandeli ya mokapo oyo. Ezali mwa mituna ya ntina mingi oyo okoki kotuna. Kasi, bato mingi balukaka lisusu biyano na yango te. Mpo na nini? Biblia ezali na biyano ya mituna yango? Bato mosusu bamonaka ete ezalaka mpasi mpo na kokanga ntina ya biyano ya Biblia. Basusu bakanisaka ete ezali nsɔni kotuna mituna ya ndenge wana. Mpe mpo na basusu, mituna wana etali nde bakonzi ya mangomba mpe baoyo bateyaka makambo ya Nzambe. Bongo yo, okanisaka nini?

4, 5. Na bomoi na biso, wapi mwa mituna ya ntina mingi oyo tokoki komituna, mpe mpo na nini tosengeli koluka biyano na yango?

4 Ekoki mpenza kozala ete ozalaka na mposa ya kozwa biyano na mituna ya ntina oyo etali bomoi. Na ntembe te, ekómelaka yo omituna mituna oyo: ‘Ntina ya bomoi ezali nini? Soki tokufi, nyonso esili? Nzambe azalaka mpenza ndenge nini?’ Ezali malamu kotuna mituna ya ndenge wana, mpe ezali na ntina ete otika te kolukaluka tii okozwa biyano ya malamu mpe oyo okoki kondima na motema moko. Yesu Klisto, moteyi oyo ayebani mingi, alobaki ete: “Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino yango; bókoba koluka, mpe bokomona; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino.”​—Matai 7:7.

5 Soki ‘okobi koluka’ biyano na mituna wana ya ntina, okomona ete milende na yo ekomemela yo esengo mpenza. (Masese 2:1-5) Ata soki bato mosusu bayebisá yo nini, yebá ete biyano ezali mpe okoki kozwa yango​—na Biblia. Biyano yango eleki makasi te mpo moto akanga ntina na yango te. Kutu, epesaka nde elikya mpe esengo. Lisusu, ekoki kosalisa yo ozala na bomoi ya malamu sikoyo. Tótalela naino motuna moko oyo etungisaka ebele ya bato.

NZAMBE AZALAKA MAFUMAFU MPE NA MOTEMA MABE?

6. Mpo na nini bato mingi bakanisaka ete Nzambe akipaka mpasi ya bato te?

6 Mpo na bato mingi, eyano na motuna wana ezali ɛɛ. Bakanisaka boye: ‘Soki Nzambe azalaka mafumafu te mbɛlɛ mokili oyo ezali te ndenge ezali sikoyo.’ Bipai na bipai, tozali komona kaka bitumba, koyinana mpe mpasi. Biso moko tozali kobɛla, komona mpasi mpe bandeko na biso to baninga na biso bazali kokufa. Yango wana, bato mingi bamitunaka: ‘Soki Nzambe atyelaka biso likebi mpe akipaka bampasi na biso, mbɛlɛ asali ete ekómelaka biso te, boye te?’

7. (a) Ndenge nini bato oyo bateyaka makambo ya Nzambe batindi bato mingi bákanisaka ete Nzambe azali na motema mabe? (b) Biblia eteyaka mpenza nini na ntina na bampasi oyo ntango mosusu tozali na yango?

7 Nzokande, likambo oyo eleki mabe ezali ete, ntango mosusu, bato oyo bateyaka makambo ya Nzambe nde batindaka bato bákanisaka ete Nzambe azali na motema mabe. Ndenge nini? Soki likambo moko ya mawa mingi ekweli bato, bango balobaka ete ezali mokano ya Nzambe. Na maloba mosusu, bateyi yango balobaka ete soki makambo mabe ezali kokómela bato, ezali foti ya Nzambe. Nzambe nde abimisaka mpenza makambo yango? Biblia eteyaka mpenza nini? Yakobo 1:13 eyanoli boye: “Ntango moto azali na kati ya komekama, aloba te ete: ‘Nazali komekama na Nzambe.’ Mpo Nzambe akoki komekama na makambo ya mabe te mpe ye moko akoki te komeka moto na yango.” Yango emonisi ete makambo mabe oyo ozali komona na mokili eutaka na Nzambe te. (Yobo 34:10-12) Ezali solo ete atikaka makambo ya mawa ekómela bato. Kasi, tóyeba ete kotika likambo moko esalema ná kobimisa likambo yango ezali makambo mibale oyo ekeseni mpenza.

8, 9. (a) Ndakisa nini okoki kopesa mpo na komonisa ete kotika mabe mpe kobimisa yango ezali makambo mibale ekeseni? (b) Mpo na nini ekateli oyo Nzambe azwi ya kotika bato básala oyo balingi ezali mabe te?

8 Na ndakisa, kanisá ete tata moko ya bwanya mpe ya bolingo azali na mwana moko ya mobali oyo akómi mokóló. Mwana yango akómi motomboki mpe alingi alongwa na ndako; tata na ye atiki ye akende. Epai akei, amipesi na makambo ya mabe mpe akómi na mikakatano. Tokoloba ete tata na ye nde abimiseli ye yango? Te. (Luka 15:11-13) Ndenge moko mpe, Nzambe atikaki bato bálanda nzela ya mabe, kasi ezali ye te moto abimisi mikakatano oyo yango eboti. Yango wana, ekozala mpenza sembo te koloba ete soki bato bazali na mikakatano oyo nyonso, ezali foti ya Nzambe.

9 Nzambe ayebi malamu ntina oyo atiki bato bálanda nzela ya mabe. Lokola azali Mozalisi na biso ya bwanya mpe ya nguya, eloko moko te esengeli kotinda ye na makasi ete alimbolela biso ntina yango. Atako bongo, alimboleli biso yango mpo alingi biso. Okoyeba ntina yango malamu na Mokapo 11. Kasi simbá ete ezali Nzambe te moto azali kobimisela biso mikakatano. Kutu, ye nde moto apesi biso elikya kaka moko mpo na kolongwa na mikakatano yango!​—Yisaya 33:2.

10. Mpo na nini tokoki kotya motema ete Nzambe akolongola mpasi nyonso oyo mabe ebimisi?

10 Longola yango, Nzambe azali mosantu. (Yisaya 6:3) Yango elakisi ete azali pɛto. Azali na mabe ata moke te. Yango wana, tokoki kotyela ye motema mobimba. Tokoki kosala yango te epai ya bato, mpamba te bakómaka mabe na bantango mosusu. Mbala mingi, ata mokonzi ya sembo mpenza, akokaka te kosilisa mabe oyo bato mabe basalaka. Kasi Nzambe azali na nguya nyonso. Akoki kolongola bampasi nyonso oyo mabe ebimiselá bato mpe akosala yango. Ntango Nzambe akosala yango, akosilisa mabe mpo na libela!​—Nzembo 37:9-11.

NDENGE NINI NZAMBE ATALELAKA MAKAMBO OYO EZALI SEMBO TE OYO BASALELAKA BISO?

11. (a) Ndenge nini Nzambe atalelaka makambo oyo ezali sembo te? (b) Ndenge nini Nzambe atalelaka mpasi oyo ozali komona?

11 Liboso ntango wana ekóma, ndenge nini Nzambe atalelaka makambo oyo ezali koleka na mokili mpe na bomoi na yo? Tóyeba ete Biblia eteyaka ete Nzambe ‘alingi bosembo.’ (Nzembo 37:28) Yango wana, na miso na ye, kokesenisa makambo ya malamu ná ya mabe ezali na ntina mingi. Ayinaka likambo nyonso oyo ezali sembo te. Biblia elobi ete ‘ayokaki bolɔzi na motema’ ntango mabe etondaki na mokili na ntango ya kala. (Genese 6:5, 6) Nzambe abongwani te. (Malaki 3:6) Ata lelo mpe, ayinaka komona mpasi oyo ezali na mokili. Lisusu, ayinaka komona ndenge bato bazali konyokwama. Biblia elobi ete ‘atyelaka yo likebi.’​—1 Petelo 5:7.

Biblia eteyaka ete Yehova akelaki molɔ́ngɔ́ na bolingo mpenza

12, 13. (a) Mpo na nini tozali na bizaleli ya malamu, na ndakisa bolingo; mpe bolingo etindaka biso tótalela mokili ndenge nini? (b) Mpo na nini ondimi ete Nzambe akosilisa bampasi oyo ezali na mokili?

12 Nini endimisi biso ete Nzambe ayinaka komona ndenge bato bazali konyokwama? Likambo mosusu yango oyo: Biblia eteyaka ete moto akelamaki na elilingi ya Nzambe. (Genese 1:26) Yango wana tozali na bizaleli ya malamu, mpamba te Nzambe azali na bizaleli yango. Na ndakisa, oyokaka mpasi na motema ntango omonaka bato oyo basali mabe moko te bazali konyokwama? Soki omitungisaka mpo na makambo ya ndenge wana oyo ezali sembo te, yebá ete Nzambe ayokaka kutu mabe koleka.

13 Likoki oyo biso bato tozalaka na yango ya kolinga bato mosusu ezali moko ya makambo ya malamu mpenza oyo tozali na yango. Likoki yango emonisaka mpe bomoto ya Nzambe. Biblia eteyaka ete “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Lokola ye alingaka, yango wana biso mpe tolingaka. Soki ozalaka na makoki ya kosilisa bampasi mpe makambo oyo ezali sembo te oyo ozali komona na mokili, mbɛlɛ bolingo ekotinda yo osala yango, boye te? Na ntembe te, okosala yango! Ndenge moko mpe, osengeli kondima ete Nzambe akosilisa bampasi mpe makambo oyo ezali sembo te. Bilaka oyo ezali na maloba ya ebandeli ya buku oyo ezali lokola ndɔtɔ te to bilikya ezangá ntina. Bilaka ya Nzambe ekozanga soki moke te kokokisama! Nzokande, mpo ondimela bilaka yango, osengeli naino koyeba malamumalamu Nzambe oyo apesaki yango.

NZAMBE ALINGI OYEBA YE

Soki olingi moto moko ayeba yo, oyebisaka ye nkombo na yo, boye te? Nzambe mpe ayebisi biso nkombo na ye na kati ya Biblia

14. Nkombo ya Nzambe nani, mpe mpo na nini tosengeli kosalelaka yango?

14 Soki olingi moto moko ayeba yo, okosala nini? Okoyebisa ye nkombo na yo, boye te? Nzambe mpe azali na nkombo? Mangomba mingi elobaka ete nkombo na ye “Nzambe” to “Nkolo”; nzokande, yango ezali mpenza bankombo te. Ezali nde batitre, lokola “mokonzi” to “prezida.” Biblia eteyaka ete Nzambe azali na batitre mingi; “Nzambe” to “Nkolo” ezali kaka mwa ndambo ya batitre yango. Kasi, Biblia ezali mpe koteya ete Nzambe azali na nkombo na ye mpenza: Yehova. Nzembo 83:18 elobi ete: “Ezali bobele yo oyo azali na nkombo Yawe [to Yehova] Oyo-Aleki likoló na mokili mobimba.” Soki nkombo yango ezali na Biblia na yo te, okoki kotala na Apɛndisi, lisolo “Nkombo ya Nzambe​—Esengeli kosalela yango? Elimboli nini?,” mpo na koyeba ntina oyo batye nkombo yango te. Kasi yebá ete, na bamaniskri ya kala ya Biblia, okokuta nkombo ya Nzambe mbala nkóto na nkóto. Yango emonisi ete Yehova alingi oyeba nkombo na ye mpe osalelaka yango. Ezali lokola nde azali kosalela Biblia mpo na koyebisa yo nkombo na ye.

15. Nkombo Yehova elakisi nini?

15 Nzambe amipesaki nkombo moko oyo ezali na ndimbola monene. Nkombo na ye, Yehova, elakisi ete akoki kosala likambo nyonso oyo alaki mpe likambo nyonso oyo akani. * Nkombo mosusu te ekokani na nkombo ya Nzambe. Ebongi kaka na ye moko. Na makambo ebele, moto moko te akokani na Yehova. Mpo na nini?

16, 17. Batitre oyo elandi ekoki koteya biso nini na ntina na Yehova: (a) “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso”? (b) “Mokonzi ya seko”? (c) “Mozalisi”?

16 Tomonaki ete Nzembo 83:18 elobi mpo na Yehova ete: ‘Ezali bobele yo . . . Oyo-Aleki likoló.’ Ndenge moko mpe, kaka Yehova nde balobeli ye ete azali “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.” Emoniseli 15:3 elobi ete: “Misala na yo ezali minene mpe ya kokamwa, Yehova Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Banzela na yo ezali ya boyengebene mpe ya solo, Mokonzi ya seko.” Titre “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso” emonisi biso ete Yehova nde aleki na nguya. Nguya na ye eleki nguya mosusu nyonso mpenza. Titre “Mokonzi ya seko” ekundoleli biso likambo mosusu oyo esali ete moto moko te akokana na Yehova. Kaka ye nde azali na ebandeli te. Nzembo 90:2 elobi ete: “Longwa bobele na liboso mpenza mpe lobiko na lobiko [to, libela na libela], yo ozali Nzambe.” Likanisi wana ezali kokamwisa biso te?

17 Lisusu, moto moko te akokani na Yehova mpamba te kaka ye nde azali Mozalisi. Emoniseli 4:11 elobi ete: “Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpamba te yo ozalisaki biloko nyonso, mpe mpo na mokano na yo yango ezalaki mpe ezalisamaki.” Eloko nyonso oyo oyebi​—ezala bikelamu ya elimo oyo bizali na likoló mpe bimonanaka te, minzoto oyo emonanaka na likoló na butu, mbuma ya nzete to mbisi ya mbu mpe ya bibale​—ezali mpo Yehova akelaki yango!

OKOKI KOZALA PENEPENE NA YEHOVA?

18. Mpo na nini bato mosusu bakanisaka ete bakoki ata moke te kopusana penepene na Nzambe, kasi Biblia eteyaka nini na likambo yango?

18 Bato mosusu bakómaka na mwa kobanga nsima ya kotánga ete Yehova azali na bizaleli ya kokamwa. Mpo na bango, Nzambe aleki monene. Yango wana, bakanisaka ete bakoki ata moke te kopusana penepene na ye to mpe kozala mpenza na ntina na miso na ye. Kasi likanisi wana ezali solo? Biblia eteyaka bongo te. Elobi nde: “Ya solo, [Yehova] azali mosika te na mokomoko na biso.” (Misala 17:27) Biblia elendisi kutu biso ete ‘tópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na biso.’​—Yakobo 4:8.

19. (a) Likambo nini ya liboso tokoki kosala mpo na kopusana penepene na Nzambe, mpe bolamu nini tokozwa? (b) Bizaleli nini ya Nzambe esepelisaka yo koleka?

19 Ndenge nini okoki kopusana penepene na Nzambe? Ya liboso, kotika te kosala likambo oyo ozali kosala sikawa​—koyekola makambo ya Nzambe. Yesu alobaki ete: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Ɛɛ, Biblia eteyaka ete koyeba Yehova mpe Yesu ememaka na “bomoi ya seko”! Ndenge tosili komona yango, “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:16) Yehova azali mpe na bizaleli mosusu mingi ya malamu mpenza mpe oyo esepelisaka. Na ndakisa, Biblia elobi ete Yehova azali “Nzambe ya mawa mpe ya ngɔlu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo.” (Exode 34:6) Azali ‘malamu mpe alimbisaka mabe.’ (Nzembo 86:5) Azali na motema molai. (2 Petelo 3:9) Azali sembo. (Emoniseli 15:4) Soki ozali kotánga Biblia mingi, okomona ndenge oyo Yehova amonisi ete azali na bizaleli yango mpe na bizaleli mosusu ebele oyo esepelisaka.

20-22. (a) Lokola tokoki komona Nzambe te, tokoki kopusana penepene na ye te? Limbolá. (b) Bato mosusu oyo bakanisaka ete bazali koluka bolamu na yo bakoki koyebisa yo nini, kasi osengeli kosala nini?

20 Ezali solo ete okoki komona Nzambe te mpo azali elimo. (Yoane 1:18; 4:24; 1 Timote 1:17) Kasi, soki ozali koyekola makambo na ye na Biblia, okoki koyeba ndenge azalaka. Ndenge mokomi ya nzembo alobaki, okoki ‘kotala kitoko ya Yehova.’ (Nzembo 27:4; Baloma 1:20) Soki ozali koyekola makambo ebele oyo etali Yehova, okomona ete azali mpenza moto ya solo; mpe yango ekotinda yo olinga ye lisusu koleka mpe omona ete ozali mpenza penepene na ye.

Ndenge tata ya bolingo alingaka bana na ye mingi emonisi ndenge Tata na biso ya likoló alingaka biso

21 Mokemoke, okoyeba ntina oyo Biblia eteyaka biso tómonaka ete Yehova azali Tata na biso. (Matai 6:9) Ezali kaka te mpo ye moto apesi biso bomoi, kasi mpe mpo alingi tózala na bomoi oyo eleki malamu​—kaka ndenge tata nyonso ya bolingo alingaka bana na ye bázala. (Nzembo 36:9) Biblia ezali mpe koteya biso ete bato bakoki kokóma baninga ya Yehova. (Yakobo 2:23) Kanisá naino​—yo mpenza okoki kokóma moninga ya Mozalisi ya molɔ́ngɔ́!

22 Wana ozali koyeba makambo mingi na Biblia, ekoki kokóma ete bato mosusu oyo bakanisaka ete bazali koluka bolamu na yo báyebisa yo ete otika koyekola yango. Ntango mosusu bakoki kobanga noki okóma kondima mateya mosusu. Kasi, kopesa moto ata moko te nzela apekisa yo kokóma moninga ya Nzambe, Moninga oyo aleki baninga nyonso.

23, 24. (a) Mpo na nini osengeli kotunaka mituna ntango ozali koyekola? (b) Mokapo oyo elandi ekolobela nini?

23 Na ntembe te, ekozala na mateya mosusu oyo okokanga ntina na yango mbala moko te. Esengeli kozala na komikitisa mpo na kosɛnga lisalisi, kasi koyoka nsɔni te mpo na kosɛnga yango. Yesu alobaki ete ezali malamu kozala na komikitisa lokola mwana moke. (Matai 18:2-4) Lokola toyebi, bana mike batunaka mituna mingi. Nzambe alingi ete ozwa biyano. Biblia ekumisi bato mosusu oyo bazalaki na mposa makasi ya koyekola makambo ya Nzambe. Bazalaki kotala Makomami malamumalamu mpo bámona soki makambo oyo bazalaki koyekola ezali solo.​—Misala 17:11.

24 Koyekola Biblia ezali lolenge ya malamu mpenza ya koyeba makambo ya Yehova. Biblia ekeseni na babuku mosusu. Na ndenge nini? Mokapo oyo elandi ekolobela likambo yango.

^ par. 15 Na Apɛndisi, lisolo “Nkombo ya Nzambe​—Esengeli kosalela yango? Elimboli nini?,” okokuta makambo mosusu oyo etali ndimbola ya nkombo ya Nzambe mpe ebengeli na yango.