Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO YA MWAMBE

Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
  • Biblia eyebisi biso makambo nini oyo etali Bokonzi ya Nzambe?

  • Bokonzi ya Nzambe ekosala nini?

  • Ntango nini Bokonzi yango ekosala ete mokano ya Nzambe esalema awa na mabelé?

1. Libondeli nini oyo eyebani mingi tokotalela sikoyo?

EBELE ya bato na mokili mobimba bayebi libondeli oyo bato mingi babengaka Tata wa biso, to Libondeli ya Nkolo. Bankombo yango nyonso mibale ezali kolobela libondeli moko oyo eyebani mingi, oyo Yesu Klisto ye moko apesaki lokola ndakisa. Makambo oyo ezali na libondeli yango ezali na ntina mpenza. Sikoyo tokotalela makambo misato ya liboso ya libondeli yango oyo esengeli kosɛnga mpe yango ekosalisa yo oyeba makambo mosusu oyo Biblia eteyaka mpenza.

2. Wapi makambo misato kati na oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye básɛngaka na mabondeli na bango?

2 Na ebandeli ya libondeli yango ya ndakisa, Yesu ayebisaki bayoki na ye ete: “Na bongo, bosengeli kobondela ndenge oyo: ‘Tata na biso na likoló, tiká nkombo na yo esantisama. Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.’” (Matai 6:9-13) Makambo misato yango oyo esengeli kosɛnga elimboli nini?

3. Makambo nini oyo etali Bokonzi ya Nzambe tosengeli koyeba?

3 Tosili koyeba makambo mingi oyo etali nkombo ya Nzambe, Yehova. Mpe tosili kolobela mwa moke mokano ya Nzambe​—oyo asili kosalela bato mpe oyo akosalela bango. Kasi, Yesu azalaki kolobela nini ntango ayebisaki biso tóbondelaka boye: “Tiká bokonzi na yo eya”? Bokonzi ya Nzambe ezali nini? Na ndenge nini koya na yango ekosantisa nkombo ya Nzambe to ekokómisa yango mosantu? Mpe na nini koya ya Bokonzi yango etali kosalema ya mokano ya Nzambe?

BOKONZI YA NZAMBE EZALI NINI?

4. Bokonzi ya Nzambe ezali nini, mpe nani Mokonzi na yango?

4 Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema oyo Yehova Nzambe atye mpe ye moko moto aponi Mokonzi na yango. Mokonzi yango nani? Yesu Klisto. Mokonzi Yesu aleki bato nyonso oyo bazali bakonzi, yango wana babengi ye “Mokonzi ya baoyo bazali bakonzi mpe Nkolo ya baoyo bazali bankolo.” (1 Timote 6:15) Azali na nguya ya kosala ebele ya makambo ya malamu koleka moto nyonso oyo azali mokonzi, ezala bakonzi oyo bazali na motema malamu koleka.

5. Mboka-mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe ezali wapi, mpe Bokonzi yango ekoyangela nini?

5 Mboka-mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe ezali wapi? Bongo, sikawa Yesu azali wapi? Na ntembe te, ozali koyeba lisusu ete babomaki ye na nzete ya mpasi, mpe na nsima asekwaki. Mwa moke na nsima, amataki na likoló. (Misala 2:33) Na yango, ezali kuna nde Bokonzi ya Nzambe ezali​—na likoló. Yango wana, Biblia ebengi yango ‘bokonzi ya likoló.’ (2 Timote 4:18) Atako Bokonzi ya Nzambe ezali na likoló, ekoyangela mabelé.​—Emoniseli 11:15.

6, 7. Mpo na nini Yesu azali Mokonzi moko monene mpenza?

6 Mpo na nini Yesu azali Mokonzi moko monene mpenza? Ya liboso, ye akokufa te. Ntango Biblia ekokanisi Yesu na bato oyo bazali bakonzi, elobi ete “kaka ye moko nde akoki te kokufa, afandaka na kati ya pole oyo likoki ya kopusana penepene na yango ezali te.” (1 Timote 6:16) Yango elingi koloba ete makambo nyonso ya malamu oyo Yesu akosala ekoumela. Mpe toyebi mpenza ete akosalela bato na ye ebele ya makambo ya malamu mpenza.

7 Yoká ndenge esakweli oyo ya Biblia elobi mpo na Yesu: “Elimo ya Yehova ekofanda likoló na ye, elimo ya bwanya mpe ya mayele, elimo ya toli mpe ya nguya, elimo ya boyebi mpe ya kobanga Yehova; mpe kosepela na ye ekozala na kati ya kobanga Yehova. Mpe akosambisa te na kolandáká oyo miso na ye emoni, akopamela te na kolandáká makambo oyo matoi na ye eyoki. Mpe akosambisa mpenza bato mpamba na boyengebene, mpe akopamela na bosembo mpo na bato ya komikitisa oyo bazali na mabelé.” (Yisaya 11:2-4, NW) Maloba yango emonisi ete Yesu asengeli kozala Mokonzi moko ya boyengebene mpe ya motema mawa oyo akoyangela bato oyo bafandi awa na mabelé. Okosepela kozala na mokonzi ya ndenge wana?

8. Banani bakoyangela elongo na Yesu?

8 Likambo mosusu oyo etali Bokonzi ya Nzambe yango oyo: Yesu akoyangela ye moko te. Bato mosusu bakoyangela elongo na ye. Na ndakisa, ntoma Paulo ayebisaki Timote ete: “Soki tokobi koyika mpiko, tokoyangela mpe elongo.” (2 Timote 2:12) Ɛɛ, Paulo, Timote, mpe baklisto mosusu ya sembo oyo Nzambe aponi, bakoyangela elongo na Yesu na Bokonzi ya likoló. Bato boni bakozwa libaku malamu wana?

9. Bato boni bakoyangela elongo na Yesu, mpe ntango nini Nzambe abandaki kopona bango?

9 Ndenge tomonaki yango na Mokapo 7 ya buku oyo, ntoma Yoane amonaki na emonaneli moko “Mwana-Mpate [Yesu Klisto] atɛlɛmi likoló ya Ngomba Siona [elakisi ete azali mokonzi kuna na likoló], mpe elongo na ye bato nkóto nkama moko na ntuku minei na minei oyo nkombo na ye mpe nkombo ya Tata na ye ekomamá na bilongi na bango.” Bato 144 000 yango ezali banani? Yoane ye moko ayebisi biso: “Bango bazali bato oyo bazali kokoba kolanda Mwana-Mpate epai nyonso oyo azali kokende. Bango basombamaki na kati ya bato lokola bambuma ya liboso mpo na Nzambe mpe mpo na Mwana-Mpate.” (Emoniseli 14:1, 4) Ɛɛ, bazali bayekoli ya sembo ya Yesu Klisto oyo baponami mpenzampenza mpo na koyangela na ye kuna na likoló. Nsima ya kosekwa na bango mpo na bomoi na likoló, “basengeli koyangela mabelé” elongo na Yesu. (Emoniseli 5:10) Kobanda ntango ya bantoma, Nzambe azali kopona baklisto ya sembo mpo bákokisa motángo ya 144 000.

10. Mpo na nini ebongiseli oyo Nzambe asali ya kotya Yesu ná ba 144 000 báyangela bato ezali komonisa ete alingi biso mpenza?

10 Ebongiseli oyo Nzambe asali ya kotya Yesu ná ba 144 000 báyangela bato emonisi ete alingi biso mpenza. Mpo na nini? Mpamba te, Yesu ayebi ndenge bato bazali mpe ndenge mpasi ezalaka. Paulo alobaki ete Yesu ‘azali te moto oyo azangi likoki ya koyeba komitya na esika ya bolɛmbu na biso, kasi azali nde moto oyo asili komekama na makambo nyonso lokola biso, kasi azangi lisumu.’ (Baebele 4:15; 5:8) Baoyo bakoyangela elongo na ye bazalaki mpe bato oyo banyokwamaki mpe bayikaki mpiko. Longola yango, babundanaki na ezaleli ya kozanga kokoka mpe bayikelaki maladi ya ndenge na ndenge mpiko. Ya solo mpenza, bakoyeba malamu mikakatano oyo bato bazali kokutana na yango!

BOKONZI YA NZAMBE EKOSALA NINI?

11. Mpo na nini Yesu alobaki ete bayekoli na ye basengeli kobondela ete mokano ya Nzambe esalema na likoló?

11 Ntango Yesu alobaki ete bayekoli na ye basengeli kobondela ete Bokonzi ya Nzambe eya, alobaki mpe ete basengeli kobondela ete mokano ya Nzambe esalema “lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.” Baanzelu oyo bazali sembo epai ya Nzambe basalaka ntango nyonso mokano na ye kuna na likoló. Nzokande, ndenge tomonaki na Mokapo 3 ya buku oyo, anzelu moko ya mabe atikaki kosala mokano ya Nzambe mpe asalaki ete Adama ná Eva bákwea na lisumu. Na Mokapo 10, tokoyeba makambo mosusu oyo Biblia eteyaka oyo etali anzelu yango, oyo ayebani na nkombo Satana Zabolo. Nzambe atikaki nzela ete Satana ná bikelamu mosusu ya elimo oyo bandimaki kolanda ye​—oyo babengami bademo—​bátikala kuna na likoló mpo na mwa ntango. Na yango, na ntango wana, bikelamu nyonso te ya likoló nde bazalaki kosala mokano ya Nzambe. Likambo yango esengelaki kosuka ntango Bokonzi ya Nzambe ekobanda koyangela. Yesu Klisto, Mokonzi ya sika, asengelaki kobundisa Satana.​—Emoniseli 12:7-9.

12. Wapi makambo mibale ya ntina oyo balobeli na Emoniseli 12:10?

12 Esakweli oyo elandi emonisi likambo oyo esengelaki kosalema: “Nayokaki mongongo moko ya makasi na kati ya likoló elobi ete: ‘Sikoyo lobiko mpe nguya mpe bokonzi ya Nzambe na biso mpe bokonzi ya Klisto na ye eyei, mpamba te mofundi ya bandeko na biso [Satana] abwakami na nse, oyo afundaka bango butu moi liboso ya Nzambe na biso!’” (Emoniseli 12:10) Omoni makambo mibale ya ntina mingi oyo balobeli na vɛrsɛ yango? Ya liboso, Bokonzi ya Nzambe oyo etambwisami na Yesu Klisto ebandi koyangela. Ya mibale, babengani Satana na likoló mpe babwaki ye na mabelé.

13. Lokola babengani Satana kuna na likoló, likambo nini emonani?

13 Makambo mibale yango ebimisaki nini? Mpo na oyo etali likoló, totángi boye: “Yango wana bósepela, bino likoló mpe bino baoyo bozali kofanda na likoló!” (Emoniseli 12:12) Baanzelu kuna na likoló bazali mpenza kosepela, mpamba te, lokola Satana ná bademo na ye bazali lisusu kuna te, bango nyonso sikoyo kuna na likoló bazali sembo epai ya Yehova Nzambe. Kimya mpenza ná boyokani ekɔti kuna mpo na libela. Sikoyo, mokano ya Nzambe ezali kosalema na likoló.

Lokola babenganá Satana ná bademo na ye kuna na likoló, yango ebimiseli mabelé mpasi. Etikali moke mpasi yango esila

14. Nini esalemi lokola Satana abwakami awa na mabelé?

14 Kasi, bongo mabelé? Biblia elobi ete: “Mawa na mabelé mpe na mbu, mpamba te Zabolo akiteli bino, azali na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na eleko moko ya ntango mokuse.” (Emoniseli 12:12) Satana azali na nkanda lokola babengani ye na likoló mpe mpo atikali na ntango moke. Nkanda wana ezali kotinda ye abimisa mpasi, to “mawa,” awa na mabelé. Tokoyeba “mawa” yango malamu na mokapo oyo elandi. Lokola toyebi likambo oyo ekómelaki Satana mpe mpasi oyo azali kobimisa, tokoki komituna boye: Ndenge nini Bokonzi ekosala ete mokano ya Nzambe esalema awa na mabelé?

15. Mokano ya Nzambe mpo na mabelé ezali nini?

15 Kanisá lisusu mokano ya Nzambe mpo na mabelé. Oyekolaki yango na Mokapo 3. Na Edene, Nzambe amonisaki ete mokano na ye ezali ete mabelé oyo ezala paladiso oyo etondi na bato ya sembo oyo bakozala na bomoi seko na seko. Satana atindaki Adama ná Eva básala lisumu, mpe yango eumisaki kokokisama ya mokano ya Nzambe mpo na mabelé kasi ebongolaki yango te. Yehova azali kaka kokana ete ‘bayengebene bakozwa mokili mpe bakofanda wana libela.’ (Nzembo 37:29) Bokonzi ya Nzambe nde ekokokisa likambo yango. Na ndenge nini?

16, 17. Danyele 2:44 eyebisi biso nini mpo na Bokonzi ya Nzambe?

16 Tózwa esakweli oyo ezali na Danyele 2:44. Totángi yango boye: “Na mikolo ya mikonzi yango Nzambe ya lola akotɛlɛmisa bokonzi bokobebisama soki moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.” Makambo nini yango eyebisi biso oyo etali Bokonzi ya Nzambe?

17 Ya liboso, eyebisi biso ete Bokonzi ya Nzambe esengelaki kotyama “na mikolo ya mikonzi yango,” to na ntango oyo makonzi mosusu ezali naino. Ya mibale, eyebisi biso ete Bokonzi yango ekoumela libela na libela. Bakolonga yango te mpe guvɛrnema mosusu ekozwa esika na yango te. Ya misato, tomoni ete etumba ekozala kati na Bokonzi ya Nzambe mpe makonzi ya mokili oyo. Bokonzi ya Nzambe ekolonga. Nsukansuka, kaka yango moko nde ekoyangela bato. Na ntango wana, bato bakotambwisama na bokonzi oyo eleki bokonzi nyonso oyo eyangelá bango.

18. Etumba oyo Bokonzi ya Nzambe ekobunda na baguvɛrnema ya mokili oyo nkombo na yango nini?

18 Biblia elobeli makambo mingi oyo etali etumba wana ya nsuka oyo Bokonzi ya Nzambe ekobunda na baguvɛrnema ya mokili oyo. Na ndakisa, Biblia eteyaka ete wana nsuka ezali kokóma pene, bilimo mabe bakopanza makambo ya lokuta mpo na kokosa ‘bakonzi ya mabelé mobimba epai bato bafandi.’ Bakosala yango mpo na nini? “Mpo na koyanganisa bango [bakonzi] mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.” Bakoyanganisa bakonzi ya mabelé na “esika oyo ebengami na Liebele Hala-Magedona.” (Emoniseli 16:14, 16) Maloba oyo ezali na bavɛrsɛ mibale wana etindi bábenga etumba oyo Bokonzi ya Nzambe ekobunda na baguvɛrnema ya bato ete etumba ya Hala-Magedona, to Armagedona.

19, 20. Nini ezali kosala ete mokano ya Nzambe ekokisama te sikoyo?

19 Etumba ya Armagedona ekopesa Bokonzi ya Nzambe likoki ya kosala makambo nini? Kanisá lisusu mokano ya Nzambe mpo na mabelé. Yehova Nzambe akanaki ete mabelé etonda na bato ya kokoka mpe ya sembo oyo bazali kosalela ye na kati ya Paladiso. Nini ezali kosala ete mokano yango ekokisama sikoyo te? Ya liboso, tozali bato ya masumu, tobɛlaka mpe tokufaka. Kasi, toyekolaki na Mokapo 5 ete Yesu akufelaki biso mpo tókoka kozala na bomoi libela na libela. Na ntembe te, ozali koyeba lisusu maloba oyo, na Evanzile ya Yoane: “Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.”​—Yoane 3:16.

20 Mokakatano mosusu ezali ete bato mingi bazali kosala makambo mabe. Bazali kokosa, koyiba, mpe kosala pite to ekobo. Balingi kosala mokano ya Nzambe te. Bato oyo basalaka makambo mabe bakobomama na Armagedona, etumba ya Nzambe. (Nzembo 37:10) Likambo mosusu oyo ezali kosala ete mokano ya Nzambe esalema te na mabelé ezali ete baguvɛrnema ezali kolendisa bato te ete básala mokano yango. Baguvɛrnema mingi ezangi nguya, enyokoli bato, mpe ezangi bosembo. Biblia elobi polele ete: “Moto moko azali na bokonzi likoló ya mosusu mpo na kopesa ye mpasi.”​—Mosakoli 8:9.

21. Ndenge nini Bokonzi yango ekosala ete mokano ya Nzambe esalema awa na mabelé?

21 Nsima ya Armagedona, bato bakotambwisama na guvɛrnema moko kaka, Bokonzi ya Nzambe. Bokonzi yango ekosala mokano ya Nzambe mpe ekosala makambo ya malamu mpenza. Na ndakisa, ekolongola Satana ná bademo na ye. (Emoniseli 20:1-3) Nzambe akosalela nguya ya mbeka ya Yesu epai ya bato ya sembo, mpe bakobɛla lisusu te mpe bakokufa lisusu te. Bakozala nde na likoki ya kozala na bomoi ya libela ntango Bokonzi ekoyangela bango. (Emoniseli 22:1-3) Mabelé ekokóma paladiso. Na ndenge yango, Bokonzi ekosala ete mokano ya Nzambe esalema awa na mabelé mpe ekosantisa nkombo ya Nzambe. Yango elingi koloba nini? Elingi koloba ete nsukansuka, moto nyonso oyo akozala na bomoi na ntango oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela akopesa nkombo ya Nzambe lokumu.

NTANGO NINI BOKONZI YA NZAMBE EKOSALA MAKAMBO WANA?

22. Mpo na nini toyebi ete Bokonzi ya Nzambe eyaki te ntango Yesu azalaki awa na mabelé to ntango kaka asekwaki?

22 Ezali komonana polele ete ntango Yesu ayebisaki bayekoli na ye bábondelaka “Tiká bokonzi na yo eya,” Bokonzi yango eyaki naino te na ntango wana. Eyaki nde ntango Yesu amataki na likoló? Te, mpo Petelo ná Paulo balobaki ete nsima ya lisekwa ya Yesu, esakweli oyo ezali na Nzembo 110:1 ekokisamaki epai na ye: ‘Yehova alobaki na Nkolo na ngai ete, Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali kino nakotya bayini na yo lokola etɛmɛlo ya makolo na yo.’ (Misala 2:32-35; Baebele 10:12, 13) Yesu asengelaki kozela.

Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela, mokano na Ye ekosalema na mabelé lokola ezali kosalema na likoló

23. (a) Na mobu nini Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela (b) Tokolobela nini na mokapo oyo elandi?

23 Asengelaki kozela ntango boni? Na boumeli ya siɛklɛ ya 19 mpe 20, bayekoli ya solosolo ya Biblia basosolaki mokemoke ete Yesu asengelaki kozela tii na mobu 1914. (Mpo na mobu yango, talá na Apɛndisi, lisolo “1914​—Mobu ya ntina mingi na bisakweli ya Biblia.”.) Makambo oyo esalemi na mokili banda na 1914 emonisi ete ndimbola oyo bayekoli wana ya Biblia bapesaki, ezalaki mpenza solo. Bisakweli ya Biblia oyo ezali kokokisama emonisi ete na 1914 Klisto akómaki Mokonzi mpe Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na mobu yango. Na yango, tozali sikoyo na ‘eleko ya ntango mokuse’ oyo etikali mpo na Satana. (Emoniseli 12:12; Nzembo 110:2) Tokoki mpe koloba na motema moko ete etikali moke Bokonzi ya Nzambe esala ete mokano ya Nzambe ekokisama awa na mabelé. Omoni te ete yango ezali nsango moko ya esengo mpenza? Ondimi ete ezali mpenza bongo? Mokapo oyo elandi ekosalisa yo omona ete Biblia ezali mpenza koteya makambo yango.