Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO YA ZOMI NA NSAMBO

Pusaná penepene na Nzambe na libondeli

Pusaná penepene na Nzambe na libondeli
  • Mpo na nini tosengeli kobondela Nzambe?

  • Tosengeli kosala nini mpo Nzambe ayoka mabondeli na biso?

  • Ndenge nini Nzambe apesaka eyano na mabondeli na biso?

“Ye oyo asalaki lola mpe mokili” alingaka koyoka mabondeli na biso

1, 2. Mpo na nini tosengeli kotalela libondeli ete ezali libaku ya malamu mpenza, mpe mpo na nini tosengeli koyeba oyo Biblia elobaka mpo na libondeli?

SOKI tokokanisi mabelé na molɔ́ngɔ́, tokomona ete mabelé ezali moke mpenza. Kutu, mpo na Yehova, “ye oyo asalaki lola mpe mokili,” bikólo nyonso bizali lokola mwa litangá ya mai na kati ya katini. (Nzembo 115:15; Yisaya 40:15) Atako bongo, Biblia elobi ete: ‘Yehova azali penepene na bango nyonso bakobyanga ye, baoyo bakobyanga ye na solo. Akosilisa mposa na bango baoyo bakobanga ye, akoyoka mpe koganga na bango.’ (Nzembo 145:18, 19) Kanisá naino ndimbola ya maloba wana! Mozalisi oyo aleki na nguya azali penepene na biso mpe akoyoka biso soki ‘tobyangi ye na solo.’ Tozali solo na libaku malamu ya kobondela Nzambe!

2 Nzokande, soki tolingi Yehova ayoka mabondeli na biso, tosengeli kobondela ye na ndenge oyo ekosepelisa ye. Ndenge nini tokoki mpenza kobondela ye ndenge wana soki toyebi te makambo oyo Biblia elobaka mpo na libondeli? Ezali na ntina mingi tóyeba oyo Makomami elobaka na makambo yango, mpamba te libondeli esalisaka biso tózala na boyokani ya malamu elongo na Yehova.

MPO NA NINI KOBONDELA YEHOVA?

3. Wapi moko ya bantina oyo tosengeli mpenza kobondela Yehova?

3 Moko ya bantina oyo tosengeli mpenza kobondela Yehova ezali mpo asɛngi biso tóbondelaka. Liloba na ye elendisi biso boye: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na nzela ya libondeli mpe na lilɔmbɔ elongo na matɔndi tiká ete masɛngi na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makoki na bino ya kokanisa na nzela ya Klisto Yesu.” (Bafilipi 4:6, 7) Ya solo, tokolinga te komona likabo yango oyo Moyangeli Monene ya molɔ́ngɔ́ apesi biso na boboto mpenza ete ezali eloko mpamba!

4. Na ndenge nini kobondela Yehova mbala na mbala ekómisaka boyokani na biso na ye makasi?

4 Ntina mosusu ya kobondela yango oyo: Kobondela Yehova mbala na mbala ekómisaka boyokani na biso na ye makasi. Baninga ya solosolo basololaka te kaka ntango moko na bango azali na mposa ya eloko moko. Kasi, moko na moko atalelaka bolamu ya moninga, mpe boninga na bango ekómaka makasi ntango bayebisanaka polele makanisi, mitungisi mpe mayoki na bango. Tokoki mpe koloba ete ezali bongo mpo na boninga na biso na Yehova Nzambe. Buku oyo esalisi yo oyeba makambo oyo Biblia eteyaka mpo na Yehova, bizaleli na ye mpe mikano na ye. Sikawa oyebi ete Yehova azali mpenza moto ya elimo. Libondeli epesi yo libaku ya koyebisa Tata na yo ya likoló makanisi na yo mpe ndenge mpenza ozali koyoka na motema na yo. Soki ozali kosala bongo, okopusana penepene mpenza na Yehova.​—Yakobo 4:8.

MAKAMBO NINI TOSENGELI KOSALA?

5. Nini emonisi ete Yehova ayokaka mabondeli nyonso te?

5 Yehova ayokaka mabondeli nyonso? Tótalela makambo oyo alobaki na Bayisalaele na mikolo ya mosakoli Yisaya wana bazalaki batomboki: “Ata bokobondela mabondeli mingi mpenza nakoyoka te, mabɔkɔ na bino etondi na makila.” (Yisaya 1:15) Na yango, makambo mosusu ekoki kosala ete Nzambe ayoka mabondeli na biso te. Yango wana, mpo Nzambe andima mabondeli na biso, tosengeli liboso kosala mwa makambo mosusu ya ntina oyo azali kosɛnga biso.

6. Likambo nini ya liboso Nzambe asɛngi mpo ayoka mabondeli na biso, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?

6 Likambo ya liboso oyo asɛngi biso ezali ete tómonisa kondima. (Malako 11:24) Ntoma Paulo akomaki ete: “Na kozanga kondima likoki ya kosepelisa [Nzambe] mpenza ezali ata moke te, mpo moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali mpe ete akómaka mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.” (Baebele 11:6) Kondima ya solosolo esuki kaka te na koyeba ete Nzambe azali mpe ete ayokaka mpe apesaka eyano na mabondeli. Kondima emonanaka na misala na biso. Makambo tosalaka mokolo na mokolo esengeli komonisa polele ete tozali na kondima.​—Yakobo 2:26.

7. (a) Mpo na nini tosengeli komonisa limemya ntango tozali koloba na Yehova na libondeli? (b) Ntango tozali kobondela Nzambe, ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na komikitisa mpe ete tozali koloba na motema sembo?

7 Yehova azali mpe kosɛnga ete baoyo balingi kobondela ye bábondela ye na komikitisa mpe na motema sembo. Esengeli mpenza tómikitisa wana tozali koloba na Yehova, boye te? Ntango bato bazwi libaku ya koloba na mokonzi to prezida, mbala mingi balobaka na ye na limemya mpenza, mpo na komonisa ete bandimi kopesa ye lokumu oyo abongi na yango mpo azali mokonzi. Tosengeli mpenza komonisa limemya makasi koleka ntango tozali kobondela Yehova! (Nzembo 138:6) Ye azali “Nzambe na Nguya Nyonso.” (Genese 17:1) Ntango tozali kobondela Nzambe, tosengeli komonisa ete tondimi na komikitisa nyonso ndenge oyo ye atalelaka biso. Komikitisa ya ndenge wana ekotinda mpe biso tóbondelaka na motema mobimba mpe na bosembo, mpe tózongelaka te makambo kaka mokomoko na mabondeli.​—Matai 6:7, 8.

8. Na ndenge nini tokoki kosala makambo oyo eyokani na mabondeli na biso?

8 Likambo mosusu oyo Nzambe asɛngi mpo ayoka biso yango oyo: Tosengeli kosalaka makambo oyo eyokani na mabondeli na biso. Yehova alingi tósala nyonso oyo ekoki mpo na kokokisa makambo oyo tozali kosɛnga na libondeli. Na ndakisa, soki tobondeli, “Pesá biso lelo mampa na biso mpo na mokolo oyo,” tosengeli kosala na molende mosala nyonso oyo ekoki komonana mpe oyo tokoki kosala. (Matai 6:11; 2 Batesaloniki 3:10) Soki tobondeli ye asalisa biso tólonga bolɛmbu moko, tosengeli kokeba na bisika mpe na makambo oyo ekoki komema biso na komekama. (Bakolose 3:5) Longola makambo wana ya ntina mingi oyo tosengeli kosala, ezali mpe na mituna mosusu oyo etali libondeli oyo tosengeli koyeba biyano na yango.

BIYANO NA MITUNA MOSUSU OYO ETALI LIBONDELI

9. Tosengeli kobondela nani, mpe na nkombo ya nani?

9 Tosengeli kobondela nani? Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka “Tata na biso na likoló.” (Matai 6:9) Na yango, tosengeli kobondela kaka Yehova Nzambe. Atako bongo, Yehova azali kosɛnga biso tóndima esika ya Mwana na ye mobotami-se-moko, Yesu Klisto. Ndenge tomonaki na Mokapo 5, Nzambe atindaki Yesu awa na mabelé azala lisiko mpo na kobikisa biso na lisumu mpe na liwa. (Yoane 3:16; Baloma 5:12) Azali Nganga-Nzambe Monene mpe Mosambisi oyo Nzambe aponi. (Yoane 5:22; Baebele 6:20) Yango wana, Makomami elendisi biso tóbondelaka Nzambe na nzela ya Yesu. Yesu ye moko alobaki ete: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.” (Yoane 14:6) Mpo Yehova ayoka mabondeli na biso, tosengeli kobondela kaka ye, kasi na nzela to na nkombo ya Mwana na ye.

10. Mpo na nini esɛngami kaka te kofanda, kogumbama, kofukama, to kotɛlɛma ntango tozali kobondela?

10 Tosengeli nde kofanda, kotɛlɛma, kogumbama, kofukama to kozala na ndenge moko boye ntango tozali kobondela? Te. Yehova asɛngi te ete tótombola to tókitisa mabɔkɔ, tófanda to tótɛlɛma, tógumbama to tófukama. Biblia eteyaka ete ata soki moto afandi, atɛlɛmi, agumbami, to mpe afukami, mpo na kobondela, ezali mabe te. (1 Ntango 17:16; Nehemia 8:6; Danyele 6:10; Malako 11:25) Likambo ya ntina mingi ezali te ete bato bámona ete tofandi to totɛlɛmi, kasi nde ezaleli malamu ya motema. Kutu, ezala na misala oyo tosalaka to soki tokutani na likama moko ya mbalakaka, tokoki kosala libondeli na motema ata soki tozali wapi. Yehova ayokaka mabondeli ya ndenge wana ata soki bato oyo tozali na bango bayebi te ete tobondeli.​—Nehemia 2:1-6.

11. Makambo nini oyo etali biso moko ebongi tóyebisaka na mabondeli na biso?

11 Tokoki kosɛnga nini na mabondeli na biso? Biblia elobi ete: “Ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye, [Yehova] akoyoka biso.” (1 Yoane 5:14) Na bongo, tokoki kosɛnga eloko nyonso oyo eyokani na mokano ya Nzambe. Mokano na ye ezali ete tóbondela ye mpo na makambo oyo ezali kotungisa biso? Ɛɛ! Kobondela Yehova ezali mpenza lokola kosolola na moninga moko ya motema. Tokoki koloba na Nzambe polele, ‘kozipolela ye motema na biso.’ (Nzembo 62:8) Ebongi tósɛnga elimo santu, mpamba te yango ekosalisa biso tósala makambo ya malamu. (Luka 11:13) Tokoki mpe kosɛnga toli mpo na kozwa bikateli ya malamu mpe mpo na kozwa nguya ya koyikela mikakatano mpiko. (Yakobo 1:5) Na ntango tosali lisumu, tosengeli kosɛnga bolimbisi na nzela ya mbeka ya Klisto. (Baefese 1:3, 7) Nzokande, tosengeli kosuka kaka te na kobondela mpo na makambo na biso moko. Tosengeli mpe kobondela mpo na bato mosusu, na ndakisa bato ya libota na biso ná baninga na biso bandimi.​—Misala 12:5; Bakolose 4:12.

12. Ndenge nini tokoki kotya makambo ya Tata na biso ya likoló na esika ya liboso na mabondeli na biso?

12 Tosengeli kotya makambo ya Yehova Nzambe na esika ya liboso na mabondeli na biso. Esengeli mpenza tókumisa ye na motema mobimba mpe tópesa ye matɔndi mpo na malamu na ye. (1 Ntango 29:10-13) Yesu alakisaki libondeli ya ndakisa, oyo ezali na Matai 6:9-13. Na libondeli yango, ateyi biso tósɛngaka ete nkombo ya Nzambe esantisama, elingi koloba, etalelama ete ezali eloko ya bosantu. Na nsima, alobi tósɛngaka ete Bokonzi ya Nzambe eya mpe mokano na ye esalema na mabelé ndenge ezali kosalema na likoló. Ezali bobele nsima ya kolobela makambo wana ya ntina oyo etali Yehova nde Yesu ayei kolobela makambo ya moto ye moko. Biso mpe, ntango topesaka Nzambe esika ya liboso na mabondeli na biso, tomonisaka ete tomibanzabanzaka kaka na bolamu na biso moko te.

13. Makomami elobi nini mpo na mabondeli oyo Nzambe andimaka, esengeli kozala molai to mokuse?

13 Mabondeli na biso esengeli kozala molai to mokuse? Biblia elobi te ete mabondeli oyo moto asali mpo na ye moko to mpo na bato mingi esengeli kozala molai to mokuse. Libondeli ekoki kozala mokuse liboso ya kolya to molai wana moto azali ye moko koyebisa Yehova makambo oyo ezali na motema na ye. (1 Samwele 1:12, 15) Kasi, Yesu akweisaki bato oyo bazalaki komimona bayengebene, baoyo bazalaki kosala mabondeli milaimilai mpo bámonana na miso ya bato. (Luka 20:46, 47) Mabondeli ya ndenge wana ekamwisaka Nzambe te. Likambo ya ntina mingi ezali ete tóbondela na motema na biso mobimba. Na yango, mabondeli oyo Nzambe andimaka ekoki kozala molai to mokuse, ekotalela nde bamposa mpe esika oyo moto azali.

Nzambe akoki koyoka libondeli na yo ntango nyonso mpe esika nyonso

14. Biblia elingi koloba nini wana ezali kolendisa biso na ‘kobondela ntango nyonso,’ mpe mpo na nini yango ezali kokitisa biso motema?

14 Tosengeli kobondela mbala boni? Biblia elendisi biso ‘tóbondelaka ntango nyonso,’ mpe ‘tótingama na mabondeli.’ (Matai 26:41; Baloma 12:12; 1 Batesaloniki 5:17) Maloba wana elingi koloba te ete tosengeli kobondela Yehova mokolo mobimba. Kasi, Biblia ezali nde kolendisa biso tóbondelaka mbala na mbala, tótika te kopesaka Yehova matɔndi mpo na malamu na ye mpe tólukaka ntango nyonso toli, libɔndisi mpe nguya epai na ye. Koyeba ete Yehova alobi te ete mabondeli na biso esengeli kozala molai to mokuse mpe akati te mbala boni tosengeli kobondela ye, ezali kokitisa biso motema, boye te? Soki tomonaka mpenza ete libondeli ezali libaku malamu oyo Nzambe apesi biso, tokozanga te ntango ya kobondelaka Tata na biso ya likoló.

15. Mpo na nini tosengeli kolobaka “Amen” na nsuka ya mabondeli na biso moko mpe oyo moto moko asali liboso ya bato mingi?

15 Mpo na nini tosengeli koloba “Amen” na nsuka ya libondeli? Liloba “amen” elimboli “solo mpenza,” to “ezala bongo.” Makomami ezali na bandakisa oyo emonisi ete ebongi kolobaka “amen” na nsuka ya libondeli na yo moko mpe na mabondeli oyo esalemi liboso na bato mingi. (1 Ntango 16:36; Nzembo 41:13, NW) Wana tolobi “Amen” na nsuka ya libondeli na biso moko, tozali komonisa ete tolobi makambo yango na motema sembo. Ntango tolobi “Amen”​—na motema to na mongongo makasi—​na nsuka ya libondeli oyo moto moko asali liboso ya bato mingi, tozali komonisa ete tondimi makambo oyo alobi.​—1 Bakolinti 14:16.

NDENGE OYO NZAMBE APESAKA EYANO NA MABONDELI NA BISO

16. Likambo nini oyo etali mabondeli tondimi mpenza?

16 Yehova apesaka solo eyano na mabondeli? Ɛɛ, ayanolaka mpenza! Tozali na makambo oyo endimisi biso ete “Moyoki ya Mabondeli” apesaka eyano na mabondeli oyo bamilio ya bato basalaka na motema sembo. (Nzembo 65:2, NW) Yehova apesaka eyano na mabondeli na biso na ndenge mingi.

17. Mpo na nini tokoki koloba ete, mpo na kopesa eyano na mabondeli na biso, Nzambe asalelaka baanzelu mpe basaleli na ye awa na mabelé?

17 Mpo na kopesa eyano na mabondeli, Yehova asalelaka baanzelu mpe basaleli na ye awa na mabelé. (Baebele 1:13, 14) Makambo mingi oyo esalemá emonisi ete bato mosusu babondelaki Nzambe asalisa bango báyeba Biblia mpe mbala moko nsima ya kobondela basaleli ya Yehova bakutanaki na bango. Makambo wana ezali komonisa polele ete baanzelu bazali kotambwisa mosala ya kosakola Bokonzi. (Emoniseli 14:6) Mpo na kopesa eyano na mabondeli na biso oyo tosali epai na ye ntango tosengeli mpenza na eloko moko, Yehova akoki kotinda ndeko moko moklisto asalisa biso.​—Masese 12:25; Yakobo 2:16.

Mpo na kopesa eyano na mabondeli na biso, Yehova akoki kotinda moklisto moko asalisa biso

18. Ndenge nini Yehova asalelaka elimo santu mpe Liloba na ye mpo na kopesa eyano na mabondeli ya basaleli na ye?

18 Yehova Nzambe asalelaka mpe elimo santu mpe Liloba na ye, Biblia, mpo na kopesa eyano na mabondeli ya basaleli na ye. Mpo na kopesa eyano na mabondeli oyo tosalaka mpo na kosɛnga ye asalisa biso tóyikela komekama mpiko, akoki kopesa biso toli mpe nguya na nzela ya elimo santu na ye. (2 Bakolinti 4:7) Mbala mingi eyano na mabondeli oyo tosalaka mpo na kosɛnga Yehova alakisa biso nzela eutaka na Biblia, epai asalisaka biso tózwa bikateli ya malamu. Tokoki komona mikapo ya Makomami oyo ekosalisa biso mingi wana tozali koyekola Biblia biso moko mpe wana tozali kotánga mikanda ya lisangá ya boklisto, lokola oyo. Makambo oyo tokoyoka na makita ya boklisto to maloba oyo nkulutu moko na lisangá akoyebisa biso mpo na bolamu na biso ekoki kobenda likebi na biso na toli ya Makomami oyo tosengeli kotalela.​—Bagalatia 6:1.

19. Likambo nini tosengeli kobosana te soki mbala mosusu emonani lokola nde tozwi eyano te na mabondeli na biso?

19 Soki emonani ete Yehova apesi eyano na mabondeli na biso noki te, yango emonisi ata moke te ete makambo yango eleki mayele na ye. Kasi, tosengeli kobosana te ete Yehova apesaka eyano na mabondeli na ndenge oyo ye alingi mpe na ntango oyo aponi. Ayebi bamposa na biso mpe lolenge ya kokokisa yango malamu koleka biso moko. Mbala mingi, atikaka biso ‘tókoba kosɛnga, koluka mpe kobɛta kɔkɔkɔ.’ (Luka 11:5-10) Molende ya ndenge wana ekomonisa Nzambe ete tozali na mposa makasi ya eloko tozali kosɛnga mpe tozali na kondima ya solosolo. Lisusu, Yehova akoki kopesa eyano na mabondeli na biso na lolenge moko oyo ezali polele te na miso na biso. Na ndakisa, mbala mosusu mpo na kopesa eyano na libondeli oyo tosali mpo na komekama moko boye, akolongola mokakatano yango te, kasi akoki nde kopesa biso nguya ya koyikela yango mpiko.​—Bafilipi 4:13.

20. Lokola libondeli ezali libaku ya motuya mingi, mpo na nini tosengeli kosalaka yango mbala na mbala?

20 Tozali mpenza na botɔndi ndenge Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ azali penepene na baoyo nyonso bazali kobelela ye na mabondeli na ndenge oyo ebongi! (Nzembo 145:18) Tiká tóbondelaka mpenza Yehova mbala na mbala, mpamba te libondeli ezali libaku moko ya motuya mingi oyo apesi biso. Soki tozali kosala bongo, tokozwa libaku malamu ya kopusana ntango nyonso penepene na Yehova, Moyoki ya Mabondeli.