Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

APƐNDISI

Nkombo ya Nzambe​—Esengeli kosalela yango? Elimboli nini?

Nkombo ya Nzambe​—Esengeli kosalela yango? Elimboli nini?

NA BIBLIA na yo, ndenge nini babongoli Nzembo 83:18? Na Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu, babongoli yango boye: “Mpo bato báyeba ete yo, oyo ozali na nkombo Yehova, ozali kaka yo moko Oyo-Aleki-Likoló na mabelé mobimba.” Babongoli yango mpe ndenge wana na Babiblia mosusu. Kasi, na Babiblia mingi, batye nkombo Yehova te; na esika na yango, batye batitre lokola “Nkolo” to “Éternel (Oyo-ya-Seko).” Na vɛrsɛ yango, esengeli nde kotya titre to nkombo Yehova?

Nkombo ya Nzambe na ekomeli ya Liebele

Vɛrsɛ yango elobeli nde nkombo. Na Liebele, monɔkɔ oyo bakomaki na yango mikanda mingi ya Biblia na ebandeli, na vɛrsɛ yango, batye nkombo moko oyo ekeseni na bankombo mosusu nyonso. Bakomi yango boye יהוה (YHWH). Na Lingala, babongoli nkombo yango mingi “Yawe” to “Yehova.” Nkombo yango emonani kaka na vɛrsɛ moko ya Biblia? Te. Na Makomami ya Liebele ya libosoliboso, okokuta nkombo yango na bisika pene na 7 000!

Nkombo ya Nzambe ezali mpenza na ntina mingi? Tótala ndenge libondeli oyo Yesu Klisto apesaki lokola ndakisa elobi. Ebandi boye: “Tata na biso na likoló, tiká nkombo na yo esantisama.” (Matai 6:9) Na nsima, Yesu abondelaki Nzambe ete: “Tata, pesá nkombo na yo nkembo.” Uta na likoló, Nzambe ayanolaki boye: “Napesi yango nkembo mpe nakopesa yango nkembo lisusu.” (Yoane 12:28) Yango emonisi polele ete nkombo ya Nzambe ezali na ntina mingi. Bongo, mpo na nini babongoli mosusu batyaki nkombo yango te na Babiblia oyo babongolaki mpe na esika ya nkombo yango batye nde batitre?

Ekoki kozala mpo na ntina mibale ya minene. Ya liboso, babongoli mingi balobaka ete esengeli kosalela nkombo yango te mpo lelo oyo toyebi te ndenge bato ya kala bazalaki kobenga yango. Ntango bazalaki kokoma Liebele ya kala, bazalaki kotya milelisi (voyelles) te. Yango wana, lelo oyo, moto moko te akoki koyeba mpenza ndenge oyo bato ya kala bazalaki kotánga YHWH. Yango nde esengeli kopekisa biso kosalela nkombo ya Nzambe? Na ntango ya kala, mbala mosusu bazalaki kobenga Yesu Yeshua to Yehoshua​—moto moko te ayebi mpenza ndenge bazalaki kobenga nkombo yango. Atako bongo, lelo oyo na mokili mobimba, bato babengaka nkombo Yesu na ndenge mingi, bato na bato babengaka yango ndenge bameseni kobenga yango na monɔkɔ na bango. Babangaka te kosalela nkombo yango ata soki bayebi te ndenge bato ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kobenga yango. Ndenge moko mpe, soki okei na mboka mopaya, okomona ntango mosusu ete bato ya mboka yango bazali kobenga nkombo na yo ndenge mosusu mpenza na monɔkɔ na bango. Yango wana, ata soki toyebi mpenza te ndenge bazalaki kobenga nkombo ya Nzambe na ntango ya kala, yango esengeli kopekisa biso te kosalela yango.

Ntina ya mibale, oyo epesamaka mbala mingi, ezali nde momeseno moko ya kala ya Bayuda. Mingi kati na bango bakanisaka ete esengeli kotánga nkombo ya Nzambe ata moke te. Emonani ete likanisi wana euti na lolenge mabe ya kosalela mobeko ya Biblia oyo elobi ete: “Okotánga nkombo ya [Yehova] Nzambe na yo mpamba te, mpo ete [Yehova] akolongisa te oyo atángi nkombo na ye mpamba.”​—Exode 20:7.

Mobeko wana epekisi nde kosalela nkombo ya Nzambe na ndenge oyo ebongi te, kasi epekisi te kosalela yango na limemya. Bato oyo bakomaki Biblia ya Liebele (“Boyokani ya Kala”) bazalaki bango nyonso bato ya sembo mpe bazalaki kotosa Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisalaele ya kala. Nzokande, basalelaki nkombo ya Nzambe mbala na mbala. Na ndakisa, bakɔtisaki yango na nzembo mingi oyo ebele ya bato oyo bazalaki kosambela bazalaki koyemba na mongongo makasi. Kutu, Yehova asɛngaki basambeli na ye bábelelaka nkombo na ye, mpe bato ya sembo batosaki. (Yoele 2:32; Misala 2:21) Yango wana, lelo oyo baklisto babangaka te kosalela nkombo ya Nzambe na limemya, ndenge Yesu asalaki.​—Yoane 17:26.

Babongoli ya Biblia bazali kosala libunga monene na ndenge bazali kotya batitre na esika ya nkombo ya Nzambe. Bazali komonisa Nzambe lokola nde azali mosika mpenza na bato mpe amibanzabanzaka mpo na moto te, nzokande Biblia ezali kolendisa bato bákóma ‘baninga ya motema ya Yehova.’ (Nzembo 25:14, NW) Na ndakisa, ozali na moninga na yo moko ya motema. Bokokaki mpenza kozala baninga ya motema soki oyebaka nkombo na ye te? Ndenge moko mpe, soki bazali kobombela bato nkombo ya Nzambe, Yehova, ndenge nini bato bakoki mpenza kokóma baninga na ye ya motema? Longola yango, soki bato bazali kosalela nkombo ya Nzambe te, bakoyeba mpe ndimbola monene ya nkombo yango te. Nkombo yango elimboli nini?

Nzambe ye moko ayebisaki Moize, mosaleli na ye ya sembo, ndimbola ya nkombo na ye. Ntango Moize atunaki Yehova nkombo na ye, ayanolaki boye: “Nakozala oyo nakozala.” (Exode 3:14, NW) Biblia ya Rotherham ebongoli vɛrsɛ yango boye: “Nakokóma ndenge nyonso oyo nalingi.” Yango emonisi ete Yehova akoki kokóma ndenge nyonso oyo alingi mpo na kokokisa mikano na ye.

Kanisá ete ozali na likoki ya kokóma ndenge nyonso oyo olingi. Okosala nini mpo na baninga na yo? Soki moko na bango abɛli makasi, okoki kokóma monganga oyo ayebi mosala malamu mpo na kobikisa ye. Soki mosusu azali na mbongo te, okoki kokóma moto ya bomɛngo mpo na kosalisa ye. Nzokande, na kotalela makambo ndenge mpenza ezali, okoki kokóma ndenge nyonso oyo olingi te. Ezali bongo mpo na biso nyonso. Na boyekoli na yo ya Biblia, okokamwa na komona ete Yehova akómaka ndenge nyonso oyo alingi mpo na kokokisa bilaka na ye. Mpe asepelaka kosalela nguya na ye mpo na bolamu ya baoyo balingaka ye. (2 Ntango 16:9) Baoyo bayebi nkombo na ye te bayebaka te bizaleli nyonso wana ya malamu oyo Yehova azali na yango.

Emonani polele ete nkombo Yehova esengeli kozala na Biblia. Koyeba ndimbola na yango mpe kosalela yango mingi na makambo etali losambo na biso, ekosalisa biso mpenza na kopusana penepene na Yehova, Tata na biso ya likoló. *

^ par. 3 Soki olingi koyeba makambo mosusu oyo etali nkombo ya Nzambe, ndimbola na yango, mpe ntina oyo esengeli kosalela yango na makambo ya losambo, talá mwa buku Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko, ebimisami na Batatoli ya Yehova. Talá mpe Mwa buku mpo na koyekola Liloba ya Nzambe, eteni 1