Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

APƐNDISI

Ndenge oyo esakweli ya Danyele eyebisi koya ya Masiya

Ndenge oyo esakweli ya Danyele eyebisi koya ya Masiya

MOSAKOLI Danyele azalaki na bomoi mbula koleka 500 liboso Yesu abotama. Atako bongo, Yehova ayebisaki ye makambo oyo ekosalisa bato báyeba ntango oyo Yesu akoponama Masiya to Klisto. Ayebisaki ye boye: “Yebá mpe sosolá ete longwa na kobima ya liloba ya kotɛlɛmisa mpe ya kotonga Yelusaleme kino koya ya mopakolami [“Masiya,” NW], mokonzi, ekozala pɔsɔ nsambo. Na nsima . . . pɔsɔ ntuku motoba na mibale.”​—Danyele 9:25.

Mpo na koyeba ntango oyo Masiya akoya, tosengeli liboso koyeba ntango nini bambula oyo esengelaki koleka tii koya na ye ebandaki. Esakweli elobi ete ezali “longwa na kobima ya liloba ya kotɛlɛmisa mpe ya kotonga Yelusaleme.” ‘Liloba yango ebimaki’ ntango nini? Nehemia, moko ya bato oyo bakomaki Biblia, alobi ete ezali “na [mbula] ya ntuku mibale ya mokonzi [Alatazelezese]” nde liloba ebimaki ete bátonga lisusu lopango ya Yelusaleme. (Nehemia 2:1, 5-8) Bato ya mayele na makambo ya kala balobi ete Alatazelezese abandaki koyangela na mobu 475 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Na yango, mbula ya 20 ya boyangeli na ye ekokaki na mobu 455 L.T.B. Sikoyo tozwi ntango oyo esakweli ya Danyele oyo etali Masiya ebandaki kokokisama, elingi koloba na mobu 455 L.T.B.

Danyele amonisi ntango oyo esengelaki koleka tii ‘Masiya Mokonzi’ akoya. Esakweli na ye elobi ‘pɔsɔ nsambo mpe pɔsɔ ntuku motoba na mibale’​—nyonso epesi pɔsɔ 69. Yango ezali mbula boni? Na Babiblia mingi, bamonisi ete bapɔsɔ wana ezali te bapɔsɔ oyo eumelaka mikolo nsambo, kasi ezali nde bapɔsɔ ya bambula. Elingi koloba, pɔsɔ moko elakisi mbula nsambo. Bayuda ya ntango ya kala bayebaki malamu likanisi yango ya bapɔsɔ ya bambula, to kotánga bambula nsambonsambo. Na ndakisa, epai na bango, mbula nyonso ya nsambo, ezalaki mbula ya Sabata. (Exode 23:10, 11) Na yango, pɔsɔ 69 wana ya esakweli ezali nde pɔsɔ 69 oyo mokomoko na yango ezali na mbula 7, mpe nyonso epesi mbula 483.

Sikoyo, etikali kaka kotánga bambula yango. Soki tobandi na mobu 455 L.T.B. mpe totángi mbula 483, ekosuka na mobu 29 ya ntango na biso (T.B.). Ezali mpenza na mbula wana nde Yesu azwaki batisimo mpe akómaki Masiya! * (Luka 3:1, 2, 21, 22) Ndenge esakweli yango ekokisamaki mobimba bongo ezali mpenza likambo ya kokamwa, boye te?

^ par. 2 Longwa na mobu 455 L.T.B. tii na mobu 1 L.T.B. esali mbula 454. Longwa na mobu 1 L.T.B. tii na mobu 1 T.B. esali mbula moko (mobu zero ezalaki te). Mpe longwa na mobu 1 T.B. tii na mobu 29 T.B. esali mbula 28. Soki tobakisi bambula wana nyonso, tokozwa mbula 483. Yesu ‘abomamaki’ na mobu 33 T.B., na pɔsɔ ya 70. (Danyele 9:24, 26) Talá buku Tyá likebi na esakweli ya Danyele! mokapo 11, mpe buku Étude perspicace des Écritures, Volimi 2, na nkasa 995-997. Babuku yango nyonso mibale ebimisami na Batatoli ya Yehova.