Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

APƐNDISI

Yesu Klisto​—Masiya oyo alakamaki

Yesu Klisto​—Masiya oyo alakamaki

MPO na kosalisa biso tóyeba Masiya, Yehova Nzambe atindaki ebele ya basakoli oyo Biblia elobeli báyebisa kobotama ya Mobikisi yango oyo alakamaki, mosala na ye, mpe liwa na ye. Bisakweli nyonso wana ya Biblia ekokisamaki epai ya Yesu Klisto. Likambo ya kokamwa, bisakweli yango elobeli makambo ya mikemike mingi oyo etali ye mpe makambo yango nyonso esalemaki mpe bongo. Na ndakisa, tótala mwa bisakweli oyo eyebisaki kobotama ya Masiya mpe bomwana na ye.

Mosakoli Yisaya asakolaki ete Masiya akozala mokitani ya Mokonzi Davidi. (Yisaya 9:7) Esalamaki mpe bongo, Yesu abotamaki na libota ya Davidi.​—Matai 1:1, 6-17.

Mika, mosakoli mosusu ya Nzambe, asakolaki ete mwana yango akobotama na “Beteleme Efelata,” mpe akokóma mokonzi. (Mika 5:2) Ntango Yesu abotamaki, bingumba mibale na Yisalaele ezalaki na nkombo Beteleme. Mosusu ezalaki pene na Nazarete, na nɔrdi ya ekólo, mpe mosusu ezalaki pene na Yelusaleme, na Yuda. Kala, bazalaki kobenga Beteleme oyo ezali pene na Yelusaleme Efelata. Yesu abotamaki na engumba yango, se ndenge esakolamaki!​—Matai 2:1.

Esakweli mosusu ya Biblia elobaki ete Mwana ya Nzambe akobengama “longwa na Ezipito.” Ntango Yesu azalaki mwana moke, bakendaki na ye na Ezipito. Nsima ya liwa ya Erode, balongwaki na ye na Ezipito. Na ndenge yango, esakweli wana ekokisamaki.​—Hosea 11:1; Matai 2:15.

Na etanda “ Bisakweli oyo etali Masiya,” bavɛrsɛ oyo etyami na nse ya motó ya likambo “Esakweli” elobeli makambo ya Masiya. Tosɛngi yo otala soki makambo yango ekokani na oyo ezali na bavɛrsɛ oyo ezali na nse ya motó ya likambo “Kokokisama.” Okomona ete Liloba ya Nzambe elobaka solo mpe okondimela yango lisusu koleka.

Ntango ozali kotalela bavɛrsɛ yango, yebá ete bavɛrsɛ ya bisakweli ekomamaki bambula bankama ebele liboso Yesu abotama. Yesu alobaki ete: “Makambo nyonso oyo ekomamá na mibeko ya Moize mpe na Basakoli mpe na Nzembo na ntina etali ngai esengeli kokokisama.” (Luka 24:44) Ndenge yo moko omoni na Biblia na yo, makambo yango ekokisamaki mpenza, ata moko ezangaki te!