Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

APƐNDISI

Bolei ya Mpokwa ya Nkolo​—Molulu oyo ekumisaka Nzambe

Bolei ya Mpokwa ya Nkolo​—Molulu oyo ekumisaka Nzambe

BAKLISTO bazwi etinda ya kosalaka Ekaniseli ya liwa ya Klisto. Babengaka molulu yango mpe “bolei ya mpokwa ya Nkolo.” (1 Bakolinti 11:20) Molulu yango ezali na ntina nini? Ntango nini mpe ndenge nini esengeli kosalaka yango?

Yesu Klisto abandisaki yango na butu moko ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), na mokolo ya fɛti ya Elekeli ya Bayuda. Fɛti ya Elekeli ezalaki kosalema mbala moko na mbula, na mokolo ya 14 na sanza ya Nisana, na manaka ya Bayuda. Emonani ete, mpo na koyeba dati yango, Bayuda bazalaki kozela mokolo ya liboso ya mbula, oyo, ezala moi to butu, eumelaka ngonga 12. Nsima ya mokolo yango, bazalaki kozela mokolo ya liboso oyo bakomona mpenza sanza ya sika na likoló, yango nde ezalaki komonisa mokolo ya liboso ya sanza ya Nisana. Nsima ya mikolo 13, Elekeli ezalaki kosalema.

Yesu asalaki Elekeli elongo na bantoma na ye. Nsima ya kobimisa Yuda Mokeliota, abandisaki Bolei ya Mpokwa ya Nkolo. Bolei wana nde ezwaki esika ya Elekeli ya Bayuda; yango wana, esengeli kosalemaka kaka mbala moko na mbula.

Evanzile ya Matai elobi ete: “Yesu akamataki limpa mpe, nsima ya kopesa lipamboli, abukaki yango mpe, apesaki yango na bayekoli, alobaki ete: ‘Bókamata, bólya. Oyo elakisi nzoto na ngai.’ Lisusu, akamataki kɔpɔ mpe, kopesáká matɔndi, apesaki bango yango, kolobáká ete: ‘Bómɛla yango, bino nyonso; mpo yango elakisi “makila ya kondimana” na ngai, oyo ekosopama mpo na bato mingi mpo na bolimbisi ya masumu.’”​—Matai 26:26-28.

Bato mosusu bakanisaka ete Yesu akómisaki limpa mosuni na ye mpenza mpe vinyo makila na ye mpenza. Nzokande, ntango Yesu apesaki bango limpa yango, nzoto na ye ezalaki kaka mobimba. Bantoma ya Yesu balyaki nde mosuni na ye mpenza mpe bamɛlaki makila na ye mpenza? Te, mpo soki moto alei mosuni ya moto mpe amɛli makila abuki mobeko ya Nzambe. (Genese 9:3, 4; Levitike 17:10) Na Luka 22:20, Yesu alobaki ete: “Kɔpɔ oyo elakisi kondimana ya sika na nzela ya makila na ngai, oyo ekosopama mpo na bino.” Kɔpɔ wana ekómaki mpenzampenza “kondimana ya sika”? Yango ekokaki kosalema te, mpamba te kondimana ezali eloko te oyo moto akoki kosimba, ezali nde boyokani.

Na yango, limpa ná vinyo ezali kaka bilembo. Limpa ezali elembo ya nzoto ya kokoka ya Klisto. Yesu asalelaki limpa oyo etikalaki ntango balyaki Elekeli. Limpa wana ezalaki na levire te. (Exode 12:8) Mbala mingi, Biblia esalelaka liloba levire lokola elembo ya lisumu to ya kobeba. Na yango, limpa elakisi nzoto ya kokoka oyo Yesu apesaki mbeka. Nzoto wana ezalaki na lisumu te.​—Matai 16:11, 12; 1 Bakolinti 5:6, 7; 1 Petelo 2:22; 1 Yoane 2:1, 2.

Vinyo ya motane elakisi makila ya Yesu. Makila wana nde esali ete kondimana ya sika esala mosala na yango. Yesu alobaki ete makila na ye ekosopama “mpo na bolimbisi ya masumu.” Na ndenge yango, bato bakoki kozala pɛto na miso ya Nzambe mpe kokɔta na kati ya kondimana ya sika elongo na Yehova. (Baebele 9:14; 10:16, 17) Kondimana to boyokani yango nde epesi baklisto ya sembo 144 000 likoki ya kokende na likoló. Kuna, bakozala bakonzi mpe banganga-nzambe mpo na bolamu ya bato nyonso.​—Genese 22:18; Yilimia 31:31-33; 1 Petelo 2:9; Emoniseli 5:9, 10; 14:1-3.

Banani basengeli kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli? Na ntembe te, kaka baoyo bazali na kati ya kondimana ya sika, elingi koloba baoyo bazali na elikya ya kokende na likoló. Elimo santu ya Nzambe endimisaka baklisto yango ete baponami mpo na kozala bakonzi na likoló. (Baloma 8:16) Bazali mpe na kati ya kondimana mpo na Bokonzi elongo na Yesu.​—Luka 22:29.

Bongo baoyo bazali na elikya ya kofanda libela na libela na Paladiso awa na mabelé? Batosaka etinda ya Yesu mpe bayaka na Bolei ya Mpokwa ya Nkolo mpo na kotala molulu yango na limemya mpenza, kasi mpo na kolya limpa mpe komɛla vinyo te. Mbala moko na mbula, Batatoli ya Yehova basalaka Bolei ya Mpokwa ya Nkolo na mokolo ya 14 Nisana, nsima ya kolala ya moi. Atako, na mokili mobimba, kaka mwa bankóto moke ya baklisto nde balobaka ete bazali na elikya ya kokende na likoló, molulu yango ezali na ntina mingi mpo na baklisto nyonso. Ezalaka ntango oyo bango nyonso bakoki kokanisa bolingo monene mpenza oyo Yehova Nzambe ná Yesu Klisto bamoniselaki bato.​—Yoane 3:16.