Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

APƐNDISI

1914​—Mobu ya ntina mingi na bisakweli ya Biblia

1914​—Mobu ya ntina mingi na bisakweli ya Biblia

MBULA soki 40 liboso ya mobu 1914, bayekoli ya Biblia basakolaki ete makambo minene ekosalema na mobu yango. Makambo nini, mpe nini emonisi ete 1914 ezali mobu moko ya ntina mingi?

Na Luka 21:24, tozali kokuta maloba oyo ya Yesu: “Yelusaleme ekonyatama na bikólo mosusu, tii bantango oyo etyamá ya bikólo mosusu [“eleko ya bapagáno,” Liloba lya Nzambe] ekokoka.” Yelusaleme ezalaki mboka-mokonzi ya ekólo ya Bayuda​—esika oyo bakonzi nyonso oyo bauti na libota ya Mokonzi Davidi bazalaki kofanda. (Nzembo 48:1, 2) Kasi, bakonzi yango bakesanaki na bakonzi ya bikólo mosusu. Bango bafandaki na ‘kiti ya bokonzi ya Yehova,’ elingi koloba bazalaki bamonisi ya Nzambe mpenza. (1 Ntango 29:23) Na ndenge yango, Yelusaleme ezalaki komonisa boyangeli ya Yehova.

Kasi, ndenge nini mpe ntango nini ‘bikólo mosusu ebandaki konyata’ boyangeli ya Nzambe? Ezalaki na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), ntango bato ya Babilone babɔtɔlaki Yelusaleme. Moto afandaki lisusu te na ‘kiti ya bokonzi ya Yehova,’ mpe likambo yango esukisaki kolandana ya bakonzi ya libota ya Davidi na kiti ya bokonzi yango. (2 Mikonzi 25:1-26) ‘Konyatama’ yango esengelaki koumela libela na libela? Te, mpamba te mosakoli Ezekiele alobaki boye mpo na Sidikiya, mokonzi ya nsuka na Yelusaleme: “Longolá elamba ya motó mpe longolá motole. . . . [Ekozala mpenza ya moto mosusu te, NW] kino ekokóma ye oyo abongi na yango, oyo ngai nakopesa yango na ye.” (Ezekiele 21:26, 27) Ye oyo “abongi” na motole ya Davidi ezali Klisto Yesu. (Luka 1:32, 33) Na yango, ‘konyatama’ yango esengelaki kosila ntango Yesu akokóma Mokonzi.

Ntango nini likambo monene wana esengelaki kosalema? Yesu amonisaki ete bato ya bikólo mosusu basengelaki koyangela na boumeli ya ntango oyo basilaki kokatela bango. Lisolo oyo ezali na mokapo 4 ya Danyele ezali na makambo oyo ezali kosalisa biso tóyeba soki ntango yango esengelaki kozala mbula boni. Lisolo yango elobeli ndɔtɔ moko oyo Nebukadanesala alɔtaki. Na ndɔtɔ yango, oyo ezali mpe esakweli, mokonzi yango ya Babilone amonaki nzete moko molai mpenza mpe na nsima, bakataki yango. Ekumu to mwa eteni oyo etikalaki na mabelé ebimisaki nzete ya sika te mpo bazingaki yango na monyɔlɔlɔ ya ebende mpe ya kwivre. Anzelu moko alobaki ete: ‘Tiká ntango nsambo eleka likoló na yango.’​—Danyele 4:10-16.

Na Biblia, basalelaka ntango mosusu banzete lokola elembo ya boyangeli. (Ezekiele 17:22-24; 31:2-5) Na yango, lokola bakataki nzete wana ya elilingi, emonisi ndenge bakosukisa boyangeli ya Nzambe, oyo emonisamaki na bakonzi oyo bazalaki koyangela na Yelusaleme. Kasi, ndɔtɔ yango emonisaki mpe ete ‘konyatama yango ya Yelusaleme’ ekoumela mwa ntango​—“ntango nsambo.” Yango ezali mbula boni?

Emoniseli 12:6, 14 emonisi ete ntango misato na ndambo ekokani na “mikolo nkóto moko na nkama mibale na ntuku motoba (1 260).” Na yango, “ntango nsambo” esengeli koumela mbala mibale koleka, elingi koloba mikolo 2 520. Nzokande, mikolo 2 520 mpamba nsima ya kokwea ya Yelusaleme, bikólo mosusu etikaki te ‘konyata’ boyangeli ya Nzambe. Yango emonisi polele ete esakweli yango ezali kolobela ntango moko ya molai koleka. Soki tolandi likanisi oyo ezali na Mituya 14:34 mpe Ezekiele 4:6, oyo elobeli “mbula moko mpo na mokolo moko,” emonisi ete “ntango nsambo” esengeli kozala mbula 2 520.

Mbula 2 520 yango ebandaki na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 607 L.T.B., ntango Yelusaleme ekweaki na mabɔkɔ ya bato ya Babilone mpe balongolaki mokonzi ya libota ya Davidi na bokonzi. Bambula yango esukaki na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1914. Na ntango wana, “bantango oyo etyamá ya bikólo mosusu” esukaki, mpe Nzambe atyaki Yesu Klisto Mokonzi kuna na likoló. *​—Nzembo 2:1-6; Danyele 7:13, 14.

Se ndenge Yesu asakolaki, makambo ya nsɔmɔ​—bitumba, nzala, koningana ya mabelé, mpe bamaladi mabe—​ezali komonana na mokili mobimba na ntango oyo ya “kozala” na ye Mokonzi kuna na likoló. (Matai 24:3-8; Luka 21:11) Makambo yango ezali komonisa polele mpenza ete ezali na mobu 1914 nde Bokonzi ya Nzambe ebotamaki kuna na likoló mpe “mikolo ya nsuka” ya ebongiseli mabe ya makambo ya ntango oyo ebandaki.​—2 Timote 3:1-5.

^ par. 3 Kobanda na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 607 L.T.B. tii na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ ya mobu 1 L.T.B., esali mbula 606. Lokola mobu zero ezalaka te, kobanda na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ ya mobu 1 L.T.B. tii na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1914 ya ntango na biso (T.B.), esali mbula 1914. Soki tokamati mbula 606 tobakisi na mbula 1914, tokozwa mbula 2 520. Soki olingi koyeba makambo mosusu oyo etali kokwea ya Yelusaleme na mobu 607 L.T.B., tángá Chronologiena buku Étude perspicace des Écritures, ebimisami na Batatoli ya Yehova.