Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

APƐNDISI

Mikaele anzelu-mokonzi nde nani?

Mikaele anzelu-mokonzi nde nani?

BIBLIA elobeli ekelamu ya elimo na nkombo Mikaele mbala mingi te. Kasi, na bavɛrsɛ oyo elobeli ye, azali kosala likambo moko. Na buku ya Danyele, Mikaele azali kobunda na baanzelu mabe; na mokanda ya Yuda, azali kowelana na Satana; mpe na Emoniseli, azali kobunda na Zabolo ná bademo na ye. Lokola Mikaele azali kokɔtela boyangeli ya Yehova mpe kobunda na banguna ya Nzambe, yango emonisi ete azali kosala makambo oyo eyokani na ndimbola ya nkombo na ye​—“Nani akokani na Nzambe?” Kasi Mikaele yango nde nani?

Ntango mosusu moto moko ayebanaka na bankombo mingi. Na ndakisa, Yakobo ayebani mpe na nkombo Yisalaele; ntoma Petelo ayebani mpe na nkombo Simona. (Genese 49:1, 2; Matai 10:2) Se ndenge moko, Biblia emonisi ete Mikaele ezali nkombo mosusu ya Yesu Klisto, liboso aya awa na mabelé mpe nsima ya kozonga na ye na likoló. Tótala bavɛrsɛ oyo emonisi biso ete ezali mpenza bongo.

Anzelu-mokonzi. Liloba ya Nzambe elobeli Mikaele “anzelu-mokonzi.” (Yuda 9) Na Biblia, liloba “anzelu-mokonzi” ezali kaka na booko (singulier); ata esika moko te okokuta liloba yango na boike (pluriel). Yango emonisi ete anzelu ya ndenge wana azali kaka moko. Longola yango, soki balobeli anzelu-mokonzi, makanisi ekendeke mbala moko epai ya Yesu. Vɛrsɛ ya 1 Batesaloniki 4:16 elobi boye mpo na Nkolo Yesu Klisto nsima ya kosekwa na ye: “Nkolo ye moko akokita uta na likoló na mbela ya komandema, na mongongo ya anzelu-mokonzi.” Awa, balobi ete mongongo ya Yesu ezali mongongo ya anzelu-mokonzi. Na yango, vɛrsɛ oyo emonisi ete Yesu ye moko azali anzelu-mokonzi Mikaele.

Komanda ya limpinga. Biblia elobi ete “Mikaele mpe baanzelu na ye babundaki na dalagona . . . mpe baanzelu na ye.” (Emoniseli 12:7) Yango emonisi ete Mikaele azali Komanda ya limpinga ya baanzelu ya sembo. Mokanda ya Emoniseli elobeli mpe Yesu ete azali Komanda ya limpinga ya baanzelu ya sembo. (Emoniseli 19:14-16) Ntoma Paulo mpe alobeli na ndenge ya polele “Nkolo Yesu” mpe “baanzelu na ye ya nguya.” (2 Batesaloniki 1:7) Tomoni ete Biblia elobeli Mikaele mpe “baanzelu na ye” ná Yesu mpe “baanzelu na ye.” (Matai 13:41; 16:27; 24:31; 1 Petelo 3:22) Lokola Liloba ya Nzambe emonisi na esika moko te ete ezali na mampinga mibale ya baanzelu ya sembo kuna na likoló​—ete limpinga mosusu komanda na yango, Mikaele mpe limpinga mosusu komanda na yango nde Yesu—​ezali komonana polele ete Mikaele ezali Yesu Klisto na ntango oyo azali kosala mosala na ye kuna na likoló. *

^ par. 1 Makambo mosusu oyo emonisi ete nkombo Mikaele elakisi nde Mwana ya Nzambe ezali na buku Étude perspicace des Écritures, Volimi 2, na nkasa 280-281, ebimisami na Batatoli ya Yehova.