Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

APƐNDISI

Tosengeli mpe kosalaka bafɛti oyo bato mingi basalaka?

Tosengeli mpe kosalaka bafɛti oyo bato mingi basalaka?

BAFƐTI oyo bato mingi basalaka lelo oyo na bisika mingi na mokili, ezala ya losambo to te, euti na Biblia te. Bongo euti wapi? Soki ozali na likoki ya kokɔta na bibliotɛkɛ moko, okokamwa ntango okotánga makambo oyo babuku mosusu elobi mpo na bafɛti oyo bato mingi ya mboka na bino basalaka. Tózwa mwa bandakisa.

Pasika. Buku moko (The Encyclopædia Britannica) elobi boye: “Ata esika moko te na Boyokani ya Sika, balobi ete baklisto bazalaki kosala fɛti ya Pasika.” Ndenge nini fɛti yango ebandaki? Fɛti yango euti nde na losambo ya bapakano. Atako balobaka ete fɛti yango ezali mpo na kokanisa lisekwa ya Yesu, kasi makambo mingi oyo esalemaka na fɛti yango ezali ya boklisto te. Na ndakisa, mpo na oyo etali “simbiliki [lapin] ya Pasika” oyo bato mingi basepelaka na yango, buku mosusu (The Catholic Encyclopedia) elobi boye: “Simbiliki ezali elembo moko ya bapakano oyo banda kala emonisaka kobota mingi.”

Fɛti ya Bonane. Mokolo ya fɛti yango mpe makambo oyo esalemaka na fɛti yango ezalaka ndenge moko te na bikólo nyonso. Mpo na ntango oyo fɛti yango ebandaki, buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi boye: “Na mobu 46 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Jules César, mokonzi ya Loma, abimisaki mobeko ete mokolo ya yambo ya sanza ya Yanuali nde ekómi mokolo ya Bonane. Baloma bazalaki kokumisa Janus, nzambe ya baporte mpe ya ebandeli ya makambo, na mokolo yango. Nkombo ya sanza ya Yanuali euti nde na nkombo ya Janus; ye azalaki na bilongi mibale​—mosusu liboso, mosusu nsima.” Na yango, fɛti ya Bonane euti nde na mimeseno ya bapakano.

Halloween. Buku moko (The Encyclopedia Americana) elobi boye: “Emonani ete ndambo ya makambo oyo esalemaka na ntango ya Halloween [mokolo oyo ezalaka liboso ya eyenga ya Basantu Banso na mikili ya bato oyo balobaka Lingelesi] euti na molulu moko oyo Ba-Druide [banganga-nzambe ya ekólo ya Ba-Celte na ntango ya kala] bazalaki kosala kala, liboso Yesu abotama. Ba-Celte bazalaki kosala fɛti mpo na banzambe mibale ya minene​—nzambe ya moi mpe nzambe ya bato oyo bakufá . . . , oyo bazalaki kosalela ye fɛti na mokolo ya yambo ya sanza ya Novɛmbɛ, oyo ezalaki mokolo ya yambo ya mbula mpo na Ba-Celte. Mokemoke, fɛti ya bato oyo bakufá ekɔtaki na milulu ya baklisto.”

Bafɛti mosusu. Likoki ezali te ya kolobela bafɛti nyonso oyo esalemaka na mokili. Kasi, osengeli koyeba ete Yehova asepelaka te na bafɛti oyo ekumisaka bato to bibongiseli oyo bato basali. (Yilimia 17:5-7; Misala 10:25, 26) Osengeli mpe koyeba ete epai oyo fɛti moko ya losambo euti nde ekosala ete Nzambe asepela na fɛti yango to asepela na yango te. (Yisaya 52:11; Emoniseli 18:4) Mitinda ya Biblia oyo ezali na Mokapo 16 ya buku oyo ekosalisa yo oyeba ndenge oyo Nzambe atalelaka likambo ya kokɔta na bafɛti mosusu ya mokili.