Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mwana mwasi ná mwana mobali

Mwana mwasi ná mwana mobali

Eteni 1

Mwana mwasi ná mwana mobali

Soki omoni mwana mobali ná mwana mwasi basimbani na lobɔkɔ mpe bazali kotambola na kati ya eteyelo. Okoyoka ndenge nini?

□ Elobelaka ngai eloko te

□ Nayokaka mwa zuwa

□ Nayokaka mposa makasi ya kosala lokola bango

Okei kotala filme ná baninga mpe omoni ete moto na moto azali ná mwa moto na ye. Kaka yo nde ozangi mwa moto! Okoyoka ndenge nini?

□ Ekolobela ngai eloko te

□ Nakoyoka mwa mabe

□ Nakoyoka zuwa makasi

Moninga na yo moko ya motema akómi kosepela na mwana mobali (to mwana mwasi) moko mpe bakómi kobima. Okoyoka ndenge nini?

□ Nakosepela

□ Nakoyoka mwa zuwa

□ Nakoyoka nkanda

Na kelasi, na nzela, na vile: bipai nyonso oyo okoki kobwaka liso, okomona bana basi ná bana mibali bazali kotambola, basimbani na lobɔkɔ. Soki omoni bongo, mbala mosusu yo mpe oyokaka mposa makasi ya kosala mwa mabala wana ya balabala. Kasi, okoki mpenza mpo na kobanda kobima na mwana mwasi (to mwana mobali)? Soki ezali bongo, nini ekosalisa yo opona moto oyo abongi na yo? Soki mpe omoni moto yango, ndenge nini bokoki komibatela pɛto ntango bozali kokutana? Mikapo 1-5 ekosalisa yo ozwa biyano na mituna yango.

[Elilingi na lokasa mobimba 12, 13]