Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nasala nini soki namiyoki lokola mwana etike?

Nasala nini soki namiyoki lokola mwana etike?

Mokapo 9

Nasala nini soki namiyoki lokola mwana etike?

Ezali mokolo moko kitoko, mpe okani kosala eloko moko te. Kasi, baninga na yo nyonso bazali na makambo ya kosala. Bakei komisepelisa. Mbala oyo mpe, batiki yo! Esalaka mpasi soki babengisi yo te, kasi kokanisa ntina oyo batikaki yo esalaka mpasi koleka. Mbala mosusu okoki koloba na motema ete, ‘Ntango mosusu nasali mabe. Mpo na nini moto moko te alingaka kozala moninga na ngai?’

EKOKI kozala ete mbala mwa mingi okutaná na likambo oyo tolobeli na lokasa oyo ezali na lobɔkɔ ya mwasi. Okoki koyoka lokola ntaka moko monene ekaboli yo ná baninga na yo. Soki kaka omeki kosolola na baninga, obandi likukuma. Ntango kaka ozwi libaku ya kosolola ná baninga, nsɔni ekangi yo. Mpo na nini kosolola mpamba ná baninga ezali mpasi boye?

Na esika ozalaka kaka yo moko, okoki kobanda kosololisa bango mpe koluka kosala boninga. Tótala na ndenge nini.

Mokakatano 1: Komimona moto mpamba. Bilenge mosusu basalaka mpenza makambo oyo ekitisaka bango kilo. Bakanisaka ete moto moko te akoki kolinga bango mpe ete bazali na eloko moko te ya malonga oyo bakoki kobakisa na lisolo. Omiyokaka mpe ndenge wana? Soki ezali bongo, okokóma lisusu mosika mpenza na baninga na yo.

Ndenge ya kolonga: Talá nde makoki na yo. (2 Bakorinti 11:6) Omituna boye: ‘Makoki nini nazalaka na yango?’ Kanisá mwa makoki to bizaleli ya malamu oyo ozali na yango mpe komá yango awa na nse.

․․․․․

Na ntembe te, ozali na mwa mabunga, mpe ezali mabe te oyeba yango. (1 Bakorinti 10:12) Kasi, ozali mpe na mingi ya kopesa. Koyeba makoki na yo ekosalisa yo otika komimona moto mpamba.

Mokakatano 2: Nsɔni. Okoki kozala na mposa ya kobanda lisolo, kasi ntango libaku ezwami, oyebi te eloko nini okoloba. Elizabeth, oyo azali na mbula 19, alobi na mawa nyonso ete: “Nazalaka moto ya nsɔninsɔni. Ezalaka mpasi mpenza mpo na ngai kosolola na bato na makita ya lisangá, mpe nakumisaka bato oyo basalaka yango!” Soki ozali lokola Elizabeth, okoki komona lokola okolonga te mokakatano yango.

Ndenge ya kolonga: Sepeláká na basusu. Komitungisa te​—ekosɛnga te ete okóma moto oyo alingá kosolola na moto nyonso oyo amoni. Bandá naino na kosepela na moto moko. Elenge moko na nkombo Georges alobi boye: “Soki obandi kaka kotuna basusu ndenge nini sante to mosala na yo ezotambola ndenge nini, yango ekosalisa yo oyeba bango malamu.”

Likanisi: Kokangama kaka te na bato ya mbula na yo. Biblia elobeli bato oyo bazalaki na bambula ndenge moko te, kasi basalaki boninga ya makasi mpenza. Tokoki kotánga Ruta ná Naomi, Davidi ná Yonatane, mpe Timote ná Paulo. (Ruta 1:16, 17; 1 Samwele 18:1; 1 Bakorinti 4:17) Lisusu, kobosana te ete kosolola ezali nde kopesana makanisi, kasi te kaka moto moko nde alobaka. Bato basepelaka na baoyo batyaka mpenza likebi ntango moto mosusu azali koloba. Na yango, soki ozalaka nsɔninsɔni, kobosana te—esɛngi te ete olobaka ntango nyonso!

Komá bankombo ya mikóló mibale oyo okosepela koyeba malamu.

․․․․․

Mpo na nini te kokutana na moko na bango mpe kobanda lisolo? Soki ozali koluka mabaku ya kosolola na “lisangá mobimba ya bandeko,” okoyoka mpenza te ete ozali yo moko.​—1 Petro 2:17.

Mokakatano 3: Bizaleli mabe. Moto oyo akanisaka ete ayebi nyonso, aumelaka te kobimisa maloba ya kofinga, ya kotyola mpe kokitisa baninga. Mpe bato mosusu balingaka ntembe mpe bátindaka basusu na makasi bándima makanisi na bango. Moto oyo azali “moyengebene koleka ndelo,” aumelaka te kokweisa moto nyonso oyo alandi te makanisi na ye. (Mosakoli 7:16) Na ntembe te, olingaka te kozala na bato ya ndenge wana! Kasi, mbala mosusu, basusu bazali kokima yo mpo yo nde osalaka bongo? Biblia elobi ete: “Zoba alobaka maloba mingi” mpe ebakisi ete: “Na ebele ya maloba, makambo ya kobuka mibeko ezangaka te.”​—Mosakoli 10:14; Masese 10:19.

Ndenge ya kolonga: Luká ‘komitya na esika ya basusu.’ (1 Petro 3:8) Ata soki ondimi likanisi ya moto te, zalá na motema molai mpe tikelá ye ntango aloba. Luká makambo oyo bozali koyokana mpe bólobela yango. Soki omoni ete ondimi likanisi moko boye te, lobá yango na boboto mpe na mayele.

Lobá na basusu na ndenge oyo okolinga báloba na yo. Biblia epesi toli ete: “Bókoba kosala makambo nyonso na koimaima te mpe na ntembe te.” (Bafilipi 2:14) Bantembe mpambampamba, kosɛka ná kofinga basusu, to mpe komonaka ntango nyonso ete bazali mabe, esalaka ete bato bákóma mosika na biso. Bakolinga yo mingi soki ‘maloba na yo ezali ntango nyonso kitoko.’​—Bakolose. 4:6.

Kokóma na baninga esɛngaka milende

Nsima ya komitalela ndenge wana, mbala mosusu omoni oyo okoki kosala mpo obongisa makambo oyo esalaka ete basusu bázala mosika na yo. Atako bongo, kokanisa te ete moto nyonso nde akolinga yo. Yesu alobaki ete basusu bakoyina ata bato oyo bazali kosala malamu. (Yoane 15:19) Na yango, Koluka ata kosala makambo ya mabe mpo kaka okóma na baninga, ezali na ntina moko te.

Kasi, kozanga kobuka mitinda ya Biblia, okoki kosala milende mpo basusu básepela na yo mpe bándima yo. Samwele oyo Biblia elobeli, azalaki na ekateli makasi ya kosala makambo oyo ekosepelisa Nzambe. Matomba nini emonanaki? Akobaki kokola mpe “kosepelisa mpenza Yehova ná bato.” (1 Samwele 2:26) Soki osali mwa milende, yo mpe okokóma bongo!

MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU OYO ETALI LISOLO OYO, TÁNGÁ MOKAPO 8 MPE 14, NA VOLIMI 1

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá DVD “Les jeunes s’interrogent... Comment se faire de vrais amis?” Ebimá na minɔkɔ koleka 40

NA MOKAPO OYO ELANDI

Na mbala moko boye, moninga na yo ya motema abandi kosala makambo lokola monguna na yo mpenza. Okosala nini?

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Moto oyo amwangiselaka bato mosusu mai mingi, ye mpe bakomwangisela ye mai mingi.”​—Masese 11:25.

TOLI

Kobá na lisolo. Na ndakisa, soki moto atuni yo soki wikende elekaki malamu, kosuka te kaka na koloba elekaki malamu. Limbolá na nini ezalaki malamu. Na nsima tuná ye ayebisa yo ndenge oyo ya ye elekaki.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Biblia emonisi ete ekoki kozala ete Moize, Yirimia, mpe Timote bazalaki nsɔninsɔni.​—Kobima 3:11, 13; 4:1, 10; Yirimia 1:6-8; 1 Timote 4:12; 2 Timote 1:6-8.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Mokakatano oyo nakutanaka na yango mingi ezali ․․․․․

Nakosilisa mokakatano yango soki ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Mpo na nini bakristo mosusu bakoki koyoka ete bazali kaka bango moko?

● Nini ekoki kosalisa yo omitalela na bokatikati, na esika omimona ntango nyonso moto mpamba?

● Ndenge nini okoki kobɔndisa elenge mobali to mwasi oyo azali koyoka ete azali kaka ye moko?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 88]

‘‘Ndeko mwasi moko mokristo azalaki koluka kokóma moninga na ngai, kasi na boumeli ya mwa ntango nazalaki kolinga te. Ntango nandimaki, namonaki ete nasalaki nde bozoba! Nsukansuka, akómaki kutu nde moninga ya motema mpenza, atako azalaki mokóló na ngai ya mbula 25!’’​—Marie

[Elilingi na lokasa 87]

Okoki kobongisa makambo oyo esalaka ete baninga bázala mosika na yo