Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge nini nakoki kozwa mwa mbongo?

Ndenge nini nakoki kozwa mwa mbongo?

Mokapo 18

Ndenge nini nakoki kozwa mwa mbongo?

“Nazali na mposa ya mbongo mpo nasomba motuka.”​—Serge.

“Nalingaka kosombasomba biloko.”​—Laurianne.

“Biloko mosusu ezali mpenza kitoko, mpe nakosepela nazala na yango; kasi baboti na ngai bazali na mbongo te ya kosomba yango.”​—.Michaël.

MBALA mosusu mpo na bantina lokola oyo wana, yo mpe olingi kosimba mwa mbongo. To mpe olingi kozwa mwa mbongo mpo na kosalisa libota. Ata soki opesaka mbongo na ndako te, komisombela bilamba to biloko mosusu ekoki kolongolela baboti na yo mwa mitungisi na ntina etali mbongo.

Ezala ndenge nini, kozwa biloko mpo na yo moko to mpo na libota na yo esɛngaka mbongo. Atako Yesu alakaki ete Nzambe akokokisa bamposa ya baoyo ‘bazali koluka liboso bokonzi ya Nzambe,’ mokristo asengeli kosala mosala mpo na kokokisa bamposa na ye. (Matai 6:33; Misala 18:1-3; 2 Batesaloniki 3:10) Na yango, ndenge nini okoki kozwa mwa mbongo? Mpe likambo oyo eleki ntina, ndenge nini okoki kozala na bokatikati na oyo etali mbongo?

Ndenge ya kosala mpo na kozwa mosala

Soki ozali mpenza na mposa ya eloko moko boye oyo baboti na yo bazali na makoki te ya kosomba yango, okoki kosala mosala mpo na kozwa mbongo ya kosomba eloko yango. Yebisá baboti na yo likanisi yango. Ntango mosusu bakosepela na yango. Soki bandimi mpe soki mibeko epesi yo ndingisa ya kosala mosala, talá makanisi minei oyo ekosalisa yo ozwa mosala.

Yebisá bato. Yebisá baninga na yo, ezala ya mboka to kartye, balakisi, mpe bandeko ya libota ete ozali koluka mosala. Soki oyoki nsɔni kotuna bango na mbala moko, okoki kaka kotuna soki basalaki mosala nini ntango bazalaki na mbula oyo ozali na yango. Soki bato mingi bayebi ete ozali koluka mosala, okozala na mabaku mingi ya koyoka nsango ya bisika oyo bazali koluka bato na mosala.

Kende bisika nyonso oyo basengeli na bato ya mosala. Komá mpo na kosɛnga mosala na bisika nyonso oyo bapesi piblisite na zulunalo to Internet, na bitanda oyo ezali na bamagazini, na eteyelo na yo, to na bisika mosusu. Elenge mobali moko na nkombo David alobi boye: “Ndenge wana nde nazwaki mosala. Natalaki na zulunalo, natindelaki bango C.V. na Fax mpe nabengaki bango na telefone.” Soki esimbi te, okoki mbala mosusu kopesa patrɔ makanisi mpo ayeba ete oyebi makambo mosusu oyo okoki kosala epai na ye.

Komá mpe kabolá ba-C.V. Mpo na kosalisa ndenge bakoki kobenga to kokutana na yo, komá na papye adrɛsi, nimero na yo ya telefone mpe salá liste ya makambo oyo oyebi mpe misala oyo osalá. Okanisi ete ozali na eloko moko te ya kokoma? Kanisá lisusu. Osilá kobatela leki na yo ntango baboti na yo bazalaki te, to kobatela mwana ya bato mosusu? Yango emonisi ete ozali moto oyo bakoki kotyela motema. Osilá kosalisa tata na yo na mpo na kobongisa motuka? Mbala mosusu yango emonisi ete ozali na makoki ya kobongisa biloko. Oyebi kobɛta masini to kosalela ordinatɛrɛ? To ozwaki bapwɛ mingi na kelasi mpo osalaki eloko moko ya sika? Makambo wana ekoki kosepelisa bapatrɔ mosusu mpo bázwa yo na mosala. Komá yango na C.V. na yo. Pesá yango epai ya bapatrɔ oyo oyebi, mpe pesá baninga mpe bandeko na yo bakopi mosusu mpo bápesa yango na moto nyonso oyo bayebi ete azali koluka basali.

Bimisá mwa mosala na yo moko. Talá ndenge makambo ezali na esika oyo ofandi. Bato bazali na mposa ya biloko to misala mosusu oyo moto moko te azali kosala yango? Na ndakisa soki olingaka banyama, okoki kosɛnga bato oyo bofandi na bango pembeni osukolaka banyama na bango to okataka yango nsuki mpo báfutaka yo mwa mbongo. To mbala mosusu oyebi kobɛta miziki. Okoki koteya bato mosusu kobɛta miziki? To mbala mosusu ekoki kozala na misala mosusu oyo bato mingi balingaka te, na ndakisa kosukola bavitre to kotya bopɛto. Mokristo ayokaka nsɔni te kosala misala na mabɔkɔ na ye. (Baefese 4:28) Ya solo, kosala mosala na yo moko ekosɛnga ozala na molende, komipekisa mpe kolinga kolukaluka likambo ya kosala.

Likebisi: Komikɔtisa mbangumbangu te na mosala moko kozanga ete oyeba mbongo boni mpe makambo mosusu oyo mosala yango ekosɛnga. (Luka 14:28-30) Ya liboso, sololá likambo yango ná baboti na yo. Sololá mpe na bato mosusu oyo basalá misala ya ndenge wana. Ekosɛnga ofutaka mpako? Ekosɛnga ozwa mikanda ya Leta? Sololá na bakonzi ya Leta ya mboka na bino mpo báyebisa yo makambo mosusu.​—Baroma 13:1.

Zalá na bokatikati

Kanisá soki olingi kotambwisa velo mpe ozali koluka omema biloko ebele, na ndakisa sakosi na yo ya bakaye, bale, mpe basaki ya biloko ya kolya oyo outi kosomba. Soki oluki komema biloko mingi, ekozala mpasi mingi mpo otambola malamu! Ekozala mpe bongo soki ondimi mosala moko oyo eleki makoki na yo. Soki ozali kopesa ntango, makasi, mpe likebi na yo mingi na mosala oyo ozali kosala nsima ya kelasi, okoki kobɛla mpe mbala mosusu okotánga lisusu malamu te. Likambo ya mabe koleka, kosala mingi ekoki kopesa yo mpasi ya koyangana na makita nyonso, koyekola Biblia, mpe kobima mosala ya kosakola. Elenge moko na nkombo Michèle alobi boye: “Mokolo moko, nsima ya kelasi nasalaki mosala moko boye; kasi mosala yango elɛmbisaki ngai mpe nakokaki lisusu te kokende makita.”

Kotika te mposa ya mbongo ekóma na esika ya liboso na bomoi na yo! Yesu alobaki ete “baoyo bayebi bobola na bango ya elimo” bazalaka na esengo ya solosolo. (Matai 5:3) Alobaki mpe ete: “Ata soki moto azali na biloko mingi, biloko na ye ekopesa ye bomoi te.” (Luka 12:15) Elenge mokristo moko na nkombo Maureen ayokaki toli yango. Alobi boye: “Nalingi te komikɔtisa mobimba kaka na koluka biloko ya mokili. Nayebi ete boyokani na ngai na Nzambe ekobeba soki namipesi kaka na koluka mbongo.”

Ya solo, na mikili mosusu, bilenge basengeli kaka kosala mosala ntango molai mpo na kosunga mabota na bango. Kasi, soki ozali na mikili ya ndenge wana te, mpo na nini komipesa mobimba kaka na koluka mbongo? Bato mingi ya mayele balobaka ete kosala mosala ngonga koleka 20 na pɔsɔ ntango ozali naino kokende kelasi eleki mingi mpe ekoki kobebisa moto. Bamosusu balobi ete esengeli te kosala mosala ngonga koleka mwambe to zomi na pɔsɔ. Salomo, mokonzi ya bwanya alobaki boye: “Mwa kopema moke eleki ebele ya mosala makasi mpe kolanda mopɛpɛ.”​—Mosakoli 4:6.

Kobosana te, “nguya ya bokosi ya bomɛngo” ekoki mokemoke kolongola likebi na yo na makambo ya elimo. (Marko 4:19) Soki ozwi mosala ya kosala nsima ya kelasi mpo na kozwa mwa mbongo, salá programɛ ya malamu mpo na kotya makambo ya elimo na esika ya liboso. Bondelá Yehova mpo na likambo yango. Akoki kopesa yo makasi ya kolonga mitungisi ya mosala yango mpe kosalisa yo obatela bokatikati na makambo ya elimo.

MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU OYO ETALI LISOLO OYO, TÁNGÁ MOKAPO 21, NA VOLIMI 1

NA MOKAPO OYO ELANDI

Ozali na bokonzi likoló na mbongo to yango nde etambwisaka yo? Okoyeba ndenge okoki kozala na bokonzi likoló na yango.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

Moto ya goigoi alulaka eloko azali na yango posa, kasi azwaka yango té; nzokande moto ya molende azwaka eloko nyonso oyo azalaka na yango posa.”​—Masese 13:4, Bible na lingala ya lelo.

TOLI

Tindá C.V. na yo na bakompanyi; kozela kaka te ete bakompanyi yango esala piblisite ete bazali koluka bato na mosala.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Na bisika mosusu, basalaka piblisite mingi te mpo na kolakisa bisika oyo misala ezali.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Mpo nazwa mosala noki, nako ․․․․․

Nakobanda kosala kaka ngonga ․․․․․ na pɔsɔ.

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Mpo na nini osengeli kozwa mwa mbongo?

● Mikakatano nini okozala na yango soki ozwi mosala?

● Ndenge nini okoki kozala na makanisi ebongi na likambo etali mbongo?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 153]

‘Soki esengo na yo esengeli kouta kaka na kozwa biloko, okozala na esengo ata moke te. Biloko ya sika ekobanda kaka kobima oyo okosepela na yango. Osengeli koyekola ndenge ya kosepela na oyo ozali na yango.’’​—Jonathan

[Etanda na lokasa 155]

Mbongo ezali na ntina, kasi kolinga yango mingi te

Molambi oyo ayebi mosala malamu, akoki kosalela mbeli oyo epeli na mayele. Kasi, soki moto oyo amesaná te to oyo atyaka likebi te asaleli mbeli yango, ekoki kosala ye mabe mpenza. Mbongo ezali lokola mbeli wana oyo epeli. Soki oyebi mpenza kosalela yango, ekozala eloko moko ya ntina mingi. Kasi soki osaleli yango malamu te, ekoki komemela yo mindɔndɔ! Na ndakisa, ntoma Paulo akebisaki bakristo na likambo etali ezaleli ya kolinga mbongo mingi. Bato mosusu babebisaka boyokani ná baninga mpe mabota na bango, ata mpe boyokani na bango ná Nzambe kaka mpo balingaka kokóma bazwi. Mpo na yango, “bamitɔbɔlitɔbɔli na ebele ya bampasi.” (1 Timote 6:9, 10) Liteya nini tokoki kozwa? Yebá kosalela mbongo na yo na ndenge ebongi. Mbongo ezali na ntina, kasi kolinga yango mingi te!

[Elilingi na lokasa 153]

Kozwa mikumba mingi koleka ekoki kopesa yo mpasi mpo obatela bokatikati