Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge ya kolimbwela basusu ete Nzambe azali

Ndenge ya kolimbwela basusu ete Nzambe azali

Mokapo 36

Ndenge ya kolimbwela basusu ete Nzambe azali

Likambo nini epekisaka yo mbala mingi mpo oyebisa te baninga na yo ya kelasi makambo ya Nzambe oyo ondimaka?

□ Ozali na boyebi ya Biblia mingi te

□ Obangaka ete básɛka yo

□ Oyebaka te ndenge ya kobanda lisolo

Mayele nini okomona ete ezali pɛtɛɛ mpo oyebisa basusu makambo ya Nzambe oyo ondimaka?

□ Kosolola na mwana-kelasi mokomoko

□ Koloba liboso ya bana-kelasi nyonso

□ Kolobela mateya ya Biblia oyo nandimaka soki bapesi devuare na kelasi

Komá nkombo ya mwana-kelasi moko oyo okanisi ete akondima masolo ya Biblia mpe komá soki oyebi ndenge ya kobanda lisolo. ․․․․․

EKOKI kozala ete, bana-kelasi na bino balobelaka te makambo ya Nzambe. Soki olobeli makambo mosusu lokola masano, bilamba to basi mpe mibali, bakoyamba mbala moko lisolo. Kasi soki kaka obandi kolobela makambo etali Nzambe, okomona ndenge bakofanda nyɛɛ.

Yango elingi koloba te ete baninga na yo bandimelaka Nzambe te; mpo mingi bandimaka ete Nzambe azali. Kasi bilenge mosusu bayokaka nsɔni kolobela makambo ya Nzambe. Mbala mosusu bamonaka ete makambo yango etali bango te.

Makanisi na yo ezalaka nini?

Soki okakatanaka mpo na koyebisa bana-kelasi na bino makambo ya Nzambe, yebá ete yango ekómelaka mpe bato mosusu. Moto moko te alingaka ete báboya ye mpe esalaka mpasi koleka soki bazali kosɛka yo! Okanisi ete yango nde ekokómela yo soki oyebisi basusu makambo ya Nzambe oyo ondimaka? Ekoki kosalema bongo. Kasi mbala mosusu okokamwa ete baninga na yo bazali koluka biyano na mituna ya ntina mpenza. Mingi kati na bango bazali balukaka biyano na mituna lokola: Mokili oyo ezali kokende wapi? Mpo na nini etondi na mobulu? Na ntembe te, bilenge mingi bakolinga kosolola makambo yango na moto ya mbula na bango, na esika ya kosolola ná mokóló.

Atako bongo, koyebisa bilenge mosusu makambo ya lingomba ekoki kozala mpasi mpo na yo. Kasi kokanisa te ete baninga na yo bakomona ete ondimelaka lingomba na yo kaka bindimela; osengeli mpe kobanga te ete okokoka te kolimbola makambo na ndenge esengeli mpenza. Kolobela makambo ya Nzambe ezali lokola koyekola kobɛta miziki. Mbala mosusu na ebandeli ekozala mpasi. Kasi soki ozali komekameka mbala na mbala, ekozala lisusu mpasi te, mpe milende na yo ekobota mbuma. Kasi ndenge nini okoki kobanda lisolo?

Mingimingi, ekozala malamu obanda naino na kolobela lisolo moko ya pɛtɛɛ. Na ndakisa, na eteyelo, soki bazali kolobela likambo moko oyo euti kosalema, okoki kopesa likanisi ya Biblia oyo oyebi mpo na likambo yango. To okoki komeka kosolola naino kaka na mwana-kelasi moko. Bilenge bakristo mosusu bamonaka malamu kotya mokanda moko oyo elimbolaka Biblia likoló ya banc mpo na kotala soki ekoki kobenda likebi ya bana-kelasi. Mbala mingi, mayele yango efutaka mpe lisolo ebandaka!

Na kati ya mayele oyo touti kolobela, okoki komeka oyo wapi? ․․․․․

Omoni mayele mosusu oyo okoki kosalela mpo na kosolola na moninga na yo moko ya kelasi makambo ya Nzambe? Soki ezali, komá yango awa na nse.

․․․․․

Na ntango mosusu, devuare moko oyo bapesi na kelasi ekoki kopesa yo libaku ya kopesa litatoli mpo na makambo ya Nzambe. Na ndakisa, okosala nini soki babandi kolobela liteya ya evolisyo na kelasi? Ndenge nini okoki kolimbola ntina oyo ondimaka ete bato mpe biloko bazalisamá?

Ndenge oyo okoki komonisa ete biloko nyonso ezalisamá

Elenge mobali moko na nkombo Ryan alobi boye: “Ntango balobelaki liteya ya evolisyo na kelasi, namonaki ete ekeseni mingi na makambo oyo bateyá ngai. Balobelaki yango lokola likambo ya solo mpenza, mpe yango ebangisaki ngai.” Mwana mwasi mosusu na nkombo Raquel amiyokaki mpe ndenge wana; alobi ete: “Nabangaki mingi ntango profesɛrɛ na biso ya sciences sociales ayebisaki biso ete mbala ya nsima tokomona liteya ya evolisyo. Nayebaki ete ekosɛnga nalimbwela bana-kelasi mateya ya Biblia oyo nayebi na ntina etali liteya wana ya bongolabongola.”

Omiyokaka ndenge nini soki balobeli liteya ya evolisyo na kelasi? Ya solo, ondimaka ete Nzambe ‘azalisaki biloko nyonso.’ (Emoniseli 4:11) Lisusu, biloko mingi oyo ezali zingazinga na yo endimisaka yo ete moto moko ya mayele nde akelaki yango. Kasi babuku oyo bosalelaka na kelasi eteyaka ete bomoi ebimaki kaka pwasa; baprofesɛrɛ na bino bateyaka mpe bongo. Na yango, mbala mosusu omitunaka soki okokoka kokweisa “bato ya mayele” ya liteya ya evolisyo.

Kasi yebá ete ezali mpe na bato mosusu oyo bandimaka liteya ya evolisyo te. Kutu, ata bato mosusu ya siansi, ezala baprofesɛrɛ mpe bana-kelasi mingi bandimaka liteya yango te.

Ata bongo, mpo na komonisa ntina oyo ondimaka ete biloko nyonso ezalisamá, osengeli koyeba mpenza oyo Biblia eteyaka na likambo etali Bozalisi. Ezali na ntina te olobela mingi makambo oyo Biblia elobeli polele te. Talelá mwa bandakisa oyo:

Buku ya siansi oyo tosalelaka na kelasi elobi ete mabele mpe baplanɛti mosusu oyo ezali zingazinga na yango eumeli bamiliare ya bambula. Biblia elobi ete mabele mpe baplanɛti mosusu nyonso ezalisamaki liboso ete mokolo ya liboso ya Bozalisi ebanda. Na yango, ekoki kozala ete mabele, moi ná baplanɛti mosusu oyo ebalukaka zingazinga na yango, eumeli bamiliare ya bambula.​—Ebandeli 1:1.

Profesɛrɛ na biso alobaka ete mabele ekokaki te kozalisama na boumeli ya mikolo motoba mpamba. Biblia elobi te ete mikolo motoba ya bozalisi ezali mikolo ya ngonga 24.

Na kelasi na biso, balobelaki banyama mpe bato ndenge na ndenge oyo babongwanaki na boumeli ya ntango. Biblia elobi ete Nzambe azalisaki bikelamu nyonso ya bomoi “na motindo na yango.” (Ebandeli 1:20, 21) Biblia eteyi te ete bomoi eutá na biloko oyo ezangi bomoi; eteyi mpe te ete Nzambe nde abandisaki evolisyo na nzela ya selile moko kaka. Ata bongo, “motindo” mokomoko ya nyama to nzete, ezali na likoki ya kobimisa mitindo ndenge na ndenge. Na yango, Biblia endimi ete mbongwana ekoki kosalema na kati ya “motindo” mokomoko ya nzete to nyama.

Na kotalela makambo nyonso oyo tolobeli na mokapo oyo, okopesa eyano nini soki profesɛrɛ to mwana-kelasi moko alobi ete:

“Siansi emonisi ete toutá na evolisyo.” ․․․․․

“Nandimaka te ete Nzambe azali mpo namonaka ye te.” ․․․․․

Omindimisa ete mateya ya Biblia ezali solo!

Soki baboti na yo bazali bakristo, mbala mosusu ondimaka ete biloko nyonso ezalisamá kaka mpo bateyá yo bongo. Kasi, sikoyo lokola ozali kokola, osengeli kosalela ‘makoki na yo ya kokanisa’ mpo na kosambela Nzambe, ekosalisa yo ofandisa makambo oyo bateyá yo. (Baroma 12:1) Na yango, omituna boye: ‘Nini endimisaka ngai ete Mozalisi azali?’ Nsima ya kotala malamumalamu ndenge nzoto ya moto ezali, elenge mobali moko na nkombo Sam alobi ete: “Nzoto ya moto ezali na biteni ebele mpe biloko ndenge na ndenge, mpe yango nyonso esalaka mpenza na boyokani. Yango emonisi ete nzoto ya moto ebimaki kaka yango moko te!” Elenge mwasi mosusu na nkombo Holly oyo azali na mbula 16, andimi mpe likanisi wana; alobi boye: “Banda minganga bamoná ete nazali na maladi ya diabɛtɛ, nayekoli makambo mingi oyo esalisi ngai nayeba ndenge nzoto ya moto esalaka. Na ndakisa, ndenge oyo nsɔngi (pancréas), mwa enama oyo ezalaka nsima ya estoma, esalaka mosala monene mpo makila mpe binama mosusu ya nzoto ekoba kosala malamu, mpe likambo yango ekamwisaka ngai mpenza.”

Komá awa na nse makambo misato oyo endimisaka yo ete Mozalisi azali.

1. ․․․․․

2. ․․․․․

3. ․․․․․

Ezali na ntina te obanga to oyoka nsɔni mpo ondimaka ete Nzambe azali mpe ete biloko nyonso ezalisamá. Soki otaleli makambo nyonso, okomona ete ebongi mpenza kondima ete ezali na moto moko ya mayele oyo asalá biso bato.

Nsima ya kotalela makambo nyonso oyo, tomoni ete kondima liteya ya evolisyo nde ezali mpasi koleka, mpamba te yango esɛngaka moto andima ete makamwisi esalemaki kasi aboya kondima ete ezali na moto oyo asalaki likamwisi yango! Soki osaleli makoki na yo ya kokanisa mpo na kotalela likambo yango malamumalamu, okobanga lisusu te mpo na kolimbwela basusu ntina oyo ondimaka ete Nzambe azali.

NA MOKAPO OYO ELANDI

Okomona ete bato ya mbula na yo bazali kozwa batisimo. Yo mpe omibongisi mpo na kozwa batisimo?

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

Nayokelaka nsango malamu nsɔni te; kutu, yango nde nguya oyo Nzambe azali kosalela mpo moto nyonso oyo azali na kondima abika.Baroma 1:16.

TOLI

Kanisá ndenge oyo ozali komonana na miso ya bato ntango ozali koyebisa bango mateya ya Biblia oyo ondimaka. Soki ozali komonana lokola ozali nsɔninsɔni, mbala mosusu yango ekotinda bilenge mosusu básɛka yo. Kasi soki ozali koloba kozanga kokakatana, kaka ndenge bana-kelasi na bino babimisaka makanisi na bango, na ntembe te bakopesa yo limemya.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Ntango mosusu soki batuni balakisi mosusu bámonisa ntina oyo bandimaka liteya ya evolisyo, bamonaka ete bakokaka te kosala yango mpe bayaka komona ete bandimaka liteya yango kaka mpo bateyá bango bongo.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Mpo nabanda lisolo ya Biblia ná mwana-kelasi moko, nako ․․․․․

Soki batuni ngai mpo na nini nandimaka ete Mozalisi azali, nakoloba ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Mpo na nini ezali na ntina oyebisa basusu makambo ya Nzambe?

● Mayele nini mosusu okoki kosalela mpo na kolimbola na eteyelo ntina oyo ondimaka ete biloko nyonso ezalisamá?

● Ndenge nini okoki komonisa botɔndi epai ya Mozalisi ya biloko nyonso?—Misala 17:26, 27.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 299]

‘‘Natalelaka eteyelo lokola teritware oyo kaka biso bana-kelasi nde tokoki kosakola.’’—Iraida

[Elilingi na lokasa 298]

Koyebisa basusu mateya ya Biblia ezali lokola kobɛta miziki; soki ozali komekameka mbala na mbala, okokóma na makoki

[Elilingi na lokasa 300, 301]

Okoki kolongola bobangi ya koyebisa basusu mateya ya Biblia