Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bandakisa ya kolanda​—Yozefe

Bandakisa ya kolanda​—Yozefe

Bandakisa ya kolanda​—Yozefe

Yozefe akutani na mokakatano moko monene. Mwasi ya mokonzi na ye azali kosɛnga ye mbala na mbala básangisa nzoto. Atye ye lisusu mbamba! Kasi, Yozefe aboyi. Kutu, amonisi polele ete aboyi. Alobi boye: “Ndenge nini nakoki kosala mabe monene boye mpe kosalela mpenza Nzambe lisumu?” Ntango mwasi yango aboyaki koyoka mpe alukaki kutu kokanga ye na nzoto, Yozefe ayokaki nsɔni te mpo na kokima. Mbala moko Yozefe akimaki mpe abimaki libándá ya ndako! Amonisaki ete abangaka mpenza Nzambe.​Ebandeli 39:7-12.

Yo mpe okoki kokutana na mokakatano ya ndenge wana: moto moko akoki kotya yo mbamba ete bósangisa nzoto. Mpo na kolonga, esɛngaka te kaka komipekisa. Esɛngaka libosoliboso kozala na mposa ya kosepelisa Mozalisi na yo, Yehova Nzambe. Kobosana te ete Yozefe azalaki mpe na bamposa ya nzoto lokola yo. Nzokande, aboyaki kokokisa bamposa yango na ndenge oyo ekokaki koyokisa Mozalisi na ye mawa. Ndenge moko mpe, osengeli mpenza kondima ete pite mpe ekobo ezali mabe na miso ya Nzambe mpe ememaka mawa. Yango wana, salá makasi otikala sembo lokola Yozefe.