Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bandakisa ya kolanda​—Davidi

Bandakisa ya kolanda​—Davidi

Bandakisa ya kolanda​—Davidi

Davidi azalaki kolinga miziki. Azalaki mobɛti-miziki monene mpe mokomi ya nzembo. Asalaki kutu bibɛtɛli na ye ya miziki. (2 Ntango 7:6) Lokola Davidi ayebaki kobɛta miziki malamu, mokonzi ya Yisraele abengaki ye aya kobɛtaka miziki na ndako ya mokonzi. (1 Samwele 16:15-23) Davidi andimaki. Kasi akómaki lolendo te mpe atikaki te ete miziki ekómisa ye moombo. Nzokande, asalelaki makoki na ye mpo na kokumisa Yehova.

Olingaka miziki? Mbala mosusu okozala moyembi monene te, kasi okoki mpe kolanda ndakisa ya Davidi. Na ndenge nini? Soki otiki te ete miziki ekómisa yo moombo to etinda yo okanisa mpe osala makambo oyo ekokumisa Nzambe te. Kasi, kosalela miziki ekosala ete osepela lisusu mingi na bomoi. Likoki ya kobɛta mpe kosepela na miziki ezali likabo ya Nzambe. (Yakobo 1:17) Davidi asalelaki likabo yango na ndenge oyo esepelisaki Yehova. Yo mpe okosala ndenge wana?