Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 12

“Bazali koloba na mpiko na lisalisi ya bokonzi oyo euti na Nzambe”

“Bazali koloba na mpiko na lisalisi ya bokonzi oyo euti na Nzambe”

Paulo ná Barnabasi bamonisi komikitisa, molende mpe mpiko

Euti na Misala 14:1-28

1, 2. Makambo nini esalemaki ntango Paulo ná Barnabasi bakómaki na Listra?

 YIKIYIKI ekɔti na Listra. Moto moko oyo abotamá ebɔsɔnɔ azali kopumbwapumbwa na esengo mpo bapaya mibale oyo bayei na engumba yango babikisi ye. Bato bazali kokamwa, mpe nganga-nzambe moko ayei na mitole ya bafololo mpo alatisa mibali yango oyo bato bazali kokanisa ete bazali banzambe. Nganga-nzambe moko ya nzambe Zeusi azali komilɛngɛla mpo na kobomela bango bangɔmbɛ mpe bangɔmbɛ yango ezali kosala makɛlɛlɛ. Paulo ná Barnabasi bazali koloba na mongongo makasi mpo na kopekisa bango. Bapasoli bilamba na bango mpe bakɔti na kati ya ebele ya bato mpo na kosɛnga bango ete básambela bango te. Nsima ya kosala molende makasi, balongi kopekisa bango.

2 Na nsima, Bayuda oyo bazali kotɛmɛla bango bauti na Antiokia ya Pisidia mpe na Ikoniumu mpe bakómi na Listra. Bakoseli bango makambo mpe babebisi makanisi ya bato ya Listra. Kaka bato oyo balingaki kosambela Paulo ná Barnabasi babalukeli bango, bazingi Paulo mpe babandi kobamba ye mabanga tii abungisi makanisi. Lokola nkanda na bango ekiti, babendi Paulo libándá ya engumba mpe batiki ye wana; bakanisi ete akufi.

3. Mituna nini tokotalela na mokapo oyo?

3 Mpo na nini likambo wana ya mabe esalemaki? Liteya nini basakoli ya nsango malamu ya mikolo na biso bakoki kozwa na makambo oyo ekómelaki Barnabasi, Paulo, mpe bafandi ya Listra oyo bazalaki bongolabongola? Ndenge nini bankulutu bakoki kolanda ndakisa ya Barnabasi ná Paulo, mibali ya sembo oyo bayikaki mpiko na mosala na bango, wana “bazalaki koloba na mpiko na lisalisi ya bokonzi oyo euti na Yehova”?​—Mis. 14:3.

“Ebele . . . bakómaki bandimi” (Misala 14:1-7)

4, 5. Mpo na nini Paulo ná Barnabasi bakendaki na Ikoniumu, mpe makambo nini esalemaki kuna?

4 Mwa mikolo liboso, batɛmɛli babimisaki mobulu na Antiokia ya Pisidia mpe yango esalaki ete Paulo ná Barnabasi bálongwa kuna. Kasi, na esika bálɛmba nzoto, bakristo yango ‘bapupolaki putulu ya makolo na bango’ liboso ya bato ya engumba yango oyo baboyaki koyoka nsango malamu. (Mis. 13:50-52; Mat. 10:14) Paulo ná Barnabasi bakendaki na kimya mpe batikaki Nzambe ye moko asambisa batɛmɛli wana. (Mis. 18:5, 6; 20:26) Bamisionɛrɛ yango mibale babungisaki esengo na bango te; bakobaki kosakola na bamboka mosusu. Basalaki mobembo ya kilomɛtrɛ soki 150 na sudi-ɛsti tii na etúká moko ya ngomba patatalu oyo ezali na katikati ya Ngomba Taurus mpe Ngomba Sultan.

5 Paulo ná Barnabasi batɛlɛmaki naino na Ikoniumu, engumba moko oyo bato na yango bazalaki na mimeseno ya Bagrɛki mpe oyo ezalaki moko ya bingumba minene ya etúká ya Galatia. a Na engumba yango, Bayuda mingi bazalaki bato minene mpe baprozelite bazalaki mingi. Ndenge kaka bazalaki kosala, Paulo ná Barnabasi bakɔtaki na sinagoga mpe babandaki koteya. (Mis. 13:5, 14) “Bateyaki malamu mpenza, bongo ebele ya Bayuda mpe ya Bagrɛki bakómaki bandimi.”​—Mis. 14:1.

6. Mpo na nini Paulo ná Barnabasi bazalaki bateyi ya malamu, mpe ndenge nini tokoki komekola bango?

6 Mpo na nini lolenge oyo Paulo ná Barnabasi balobaki ebotaki mpenza mbuma? Paulo ayebaki mpenza Makomami. Ayebaki mpenza koyokanisa masolo ya kala, bisakweli, mpe Mibeko ya Moize mpo na komonisa ete Yesu azali Masiya. (Mis. 13:15-31; 26:22, 23) Barnabasi azalaki mpenza komibanzabanza mpo na bato. (Mis. 4:36, 37; 9:27; 11:23, 24) Moko te kati na bango azalaki komityela motema; kasi, bazalaki koloba “na lisalisi ya bokonzi oyo euti na Yehova.” Ndenge nini okoki komekola bamisionɛrɛ yango na mosala ya kosakola? Soki ozali kosala makambo oyo: Koyekola malamu Liloba ya Nzambe, kopona bavɛrsɛ oyo ekoki mpenza kosepelisa bayoki na yo mpe kokanisa ndenge oyo okoki kobɔndisa bato oyo ozali komemela nsango malamu. Lisusu, mateya na yo esengeli ntango nyonso kouta na Liloba ya Yehova, kasi na bwanya na yo moko te.

7. (a) Nsango malamu ebimisaka makambo nini? (b) Soki bandeko na yo batɛmɛli yo mpo ozali kotosa nsango malamu, likambo nini osengeli kobosana te?

7 Atako bongo, bato nyonso te ya Ikoniumu nde basepelaki koyoka makambo oyo Paulo ná Barnabasi bazalaki kosakola. Luka akomaki lisusu boye: “Bayuda oyo bandimaki te batombokisaki bato ya bikólo mpe basalaki ete báyina bandeko.” Paulo ná Barnabasi bamonaki ete basengeli kotikala wana mpe kolongisa nsango malamu, mpe “balekisaki ntango mingi mpenza kuna, bazalaki koloba na mpiko.” Na bongo, “ebele yango ya bato ya engumba bakabwanaki: ndambo bazalaki na ngámbo ya Bayuda mpe bamosusu na ngámbo ya bantoma.” (Mis. 14:2-4) Lelo oyo, nsango malamu ezali mpe kosala ndenge wana epai ya bato. Ezali kosangisa bato; kasi, ezali mpe kokabola bato mosusu. (Mat. 10:34-36) Soki bandeko na yo bazali kotɛmɛla yo mpo ozali kotosa nsango malamu, kobosana te ete mbala mingi bato batɛmɛlaka biso mpo bayokaka bilobaloba ya bato to makambo ya lokuta oyo balobaka mpo na biso. Bizaleli malamu na yo ekoki kolongola makanisi wana ya lokuta mpe nsukansuka, kolɛmbisa mitema ya baoyo bazali kotɛmɛla yo.​—1 Pe. 2:12; 3:1, 2.

8. Mpo na nini Paulo ná Barnabasi balongwaki na Ikoniumu, mpe ndakisa na bango ekoki koteya biso nini?

8 Nsima ya mwa ntango, na engumba Ikoniumu, banguna basalaki likita mabe mpo na kobamba Paulo ná Barnabasi mabanga. Ntango bamisionɛrɛ yango mibale bayokaki likambo wana, bamonaki malamu bákende kopesa litatoli bipai mosusu. (Mis. 14:5-7) Lelo oyo mpe, basakoli ya Bokonzi basalelaka mayele wana. Soki banguna bazali koloba na biso maloba mabe, tolobaka na mpiko. (Flp. 1:7; 1 Pe. 3:13-15) Kasi, soki tomoni ete balingi kobimisa mobulu, toboyaka kosala makambo oyo ekoki kotya bomoi na biso to ya bandeko na biso na likama.​—Mas. 22:3.

“Bóya epai ya Nzambe ya bomoi” (Misala 14:8-19)

9, 10. Listra ezalaki wapi, mpe makambo nini toyebi mpo na bafandi na yango?

9 Paulo ná Barnabasi bakendaki na Listra, engumba oyo ezalaki na sudi-wɛsti ya Ikoniumu mpe ekabwanaki na yango na ntaka ya kilomɛtrɛ 30. Bato ya Listra bazalaki na boyokani makasi na bato ya Antiokia ya Pisidia, kasi na bokeseni na Antiokia, Bayuda oyo bazalaki bato minene bazalaki te na Listra. Atako ekoki mpenza kozala ete bato ya Listra bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki, monɔkɔ ya mboka na bango ezalaki Licaonien. Paulo ná Barnabasi babandaki kosakola na bisika ya bato mingi, mpo mbala mosusu sinagoga ezalaki te na engumba yango. Ntango Petro azalaki na Yerusaleme, abikisaki mobali moko oyo abotamá ebɔsɔnɔ. Na Listra, Paulo abikisaki mobali moko oyo akufá makolo banda abotamá. (Mis. 14:8-10) Na Yerusaleme, bato mingi bakómaki bandimi ntango bamonaki likamwisi oyo Petro asalaki. (Mis. 3:1-10) Nzokande, likamwisi ya Paulo etindaki bato básala likambo ya ndenge mosusu mpenza.

10 Ndenge tomonaki yango na ebandeli, ntango moto oyo akufá makolo atɛlɛmaki mpe abandaki kotambola, mbala moko ebele ya bato ya bikólo bamikosaki. Bakómaki kobenga Barnabasi, Zeusi, mokonzi ya banzambe, mpe Paulo, Hermesi, mwana ya Zeusi mpe molobeli ya banzambe. (Talá etanda “ Losambo ya Zeusi ná Hermesi na engumba Listra,” na lokasa 97.) Kasi, Barnabasi ná Paulo basalaki makasi mpo bámonisa ebele ya bato wana ete balobaki mpe basalaki makambo na nguya ya banzambe na bango te, kasi na nguya ya Yehova, Nzambe ya solo.​—Mis. 14:11-14.

“Bótika makambo wana ya mpamba mpe bóya epai ya Nzambe ya bomoi, oyo asalaki likoló ná mabele.”​—Misala 14:15

11-13. (a) Paulo ná Barnabasi balobaki nini epai ya bato ya Listra? (b) Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Paulo ná Barnabasi balobaki na bato wana?

11 Atako yikiyiki ezalaki makasi, Paulo ná Barnabasi balukaki kosimba mitema ya bayoki na bango na ndenge ebongi mpenza. Na lisolo oyo nde Luka alobeli mayele moko oyo ebongi mpenza mpo na kosakola nsango malamu epai ya bato ya bikólo. Talá ndenge Paulo ná Barnabasi balobaki mpo na kobenda likebi ya bato: “Mibali, mpo na nini bozali kosala makambo oyo? Biso mpe tozali bato oyo bazali na bolɛmbu ndenge moko na bino, mpe tozali kosakola nsango malamu epai na bino, mpo bótika makambo wana ya mpamba mpe bóya epai ya Nzambe ya bomoi, oyo asalaki likoló ná mabele ná mbu mpe biloko nyonso oyo ezali na kati na yango. Na bileko oyo eleká apesaki nzela ete bikólo nyonso básala oyo balingi, atako bongo apesaki mpenza litatoli mpo na ye moko na ndenge asalaki malamu: apesaki bino bambula uta na likoló mpe bileko ya kobota mbuma. Atondisaki bino na biloko ya kolya mpe atondisaki mitema na bino na nsai.”​—Mis. 14:15-17.

12 Ndenge oyo Paulo ná Barnabasi balobaki na bato wana ekoki koteya biso nini? Ya liboso, bamisionɛrɛ yango bamimonaki te ete baleki bato oyo bango bazalaki koteya. Balukaki te bápesa bango lokumu oyo ebongi na bango te. Kasi, na komikitisa nyonso, bamonisaki ete bazali na bolɛmbu ndenge moko na bato ya bikólo oyo bazalaki koyoka bango. Ya solo, Paulo ná Barnabasi bazwaki elimo santu mpe bazalaki lisusu baombo ya mateya ya lokuta te. Bazalaki mpe na elikya ya koyangela elongo na Kristo. Kasi, bayebaki ete bato ya Listra bakokaki mpe kozwa makabo wana soki batosi Kristo.

13 Bongo biso, ndenge nini totalelaka bato oyo toteyaka nsango malamu? Tomonaka ete bazali ndenge moko na biso? Ntango tozali kosalisa bato báyeba mateya ya solo ya Liloba ya Nzambe, tosalaka lokola Paulo ná Barnabasi, elingi koloba toboyaka ete bákumisa biso? Charles Russell, oyo azalaki moteyi moko monene mpe azalaki kokamba mosala ya kosakola na nsuka ya siɛklɛ ya 19 mpe na ebandeli ya siɛklɛ ya 20, apesaki ndakisa malamu na likambo yango. Ndeko yango akomaki boye: “Tozali na mposa ya lokumu te, ya batitre ya lokumu mpe te, ezala mpo na biso moko to mpo na mikanda oyo tozali kokoma; tolingi mpe te bábengaka biso Tata to Rabi.” Ndeko Russell azalaki na elimo ya komikitisa lokola Paulo ná Barnabasi. Biso mpe, ntango tozali kosakola, mokano na biso ezali te ya koluka lokumu, kasi ya kosalisa bato báya epai ya “Nzambe ya bomoi.”

14-16. Wapi liteya ya mibale mpe ya misato oyo tokoki kozwa na ndenge oyo Paulo ná Barnabasi balobaki epai ya bato ya Listra?

14 Tótalela liteya mosusu oyo tokoki kozwa na ndenge oyo Paulo ná Barnabasi balobaki. Bakristo yango bayebaki komesana na makambo ya sika. Bayuda mpe baprozelite oyo bazalaki na Ikoniumu bakesanaki na bato ya Listra. Bato ya Listra bayebaki Makomami te, bayebaki mpe te boyokani ya Nzambe ná ekólo Yisraele. Nzokande, bato oyo bazalaki koyoka Paulo ná Barnabasi bayebaki makambo ya bilanga. Listra ezalaki na etúká oyo molunge ezalaki makasi te mpe ezalaki na mabele ya malamu. Bato yango bakokaki komona polele bizaleli ya Mozalisi na makambo lokola bileko ya kobota mbuma, mpe bamisionɛrɛ basalelaki makambo yango mpo na kobenda likebi na bango.​—Rom. 1:19, 20.

15 Biso mpe tokoki komesana na makambo ya sika? Atako mosali-bilanga akoki kolona molona kaka moko na bilanga mingi, asalelaka mayele ndenge na ndenge mpo na kobongisa mabele. Mabele mosusu ezalaka pɛtɛpɛtɛ mpe esɛngaka mosala mingi te liboso ya kolona. Mabele mosusu ekoki kosɛnga mosala mingi liboso ya kolona. Ndenge moko mpe, biso tozali kolona molona kaka moko: nsango ya Bokonzi oyo euti na Liloba ya Nzambe. Nzokande, soki tolandi ndakisa ya Paulo ná Barnabasi, tokoluka koyeba na mayele bomoi mpe bindimeli ya bato oyo tolingi koyebisa nsango malamu. Na nsima, tokosalela makambo oyo tomoni epai na bango mpo na koyeba ndenge malamu ya koyebisa bango nsango ya Bokonzi.​—Luka 8:11, 15.

16 Ezali mpe na liteya ya misato oyo tokoki kozwa na lisolo ya Paulo, Barnabasi, mpe bato ya Listra. Ata soki tosali mpenza milende, ntango mosusu milona na biso ekobebisama to ekokwea na mabanga. (Mat. 13:18-21) Soki tokutani na likambo ya ndenge wana, tosengeli kolɛmba nzoto te. Ndenge Paulo ayebisaki yango na nsima epai ya bayekoli oyo bazalaki na Roma, “mokomoko na biso [ata mpe mokomoko na baoyo tozali koyebisa Liloba ya Nzambe] akozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe mpo na ye moko.”​—Rom. 14:12.

“Bapesaki bango na mabɔkɔ ya Yehova” (Misala 14:20-28)

17. Ntango Paulo ná Barnabasi balongwaki na Derbe, bakendaki wapi mpe mpo na nini?

17 Ntango bato ya Listra babimisaki Paulo libándá ya engumba mpe batikaki ye mpo bakanisaki ete akufi, bayekoli bayaki, batɛlɛmaki zingazinga na ye, mpe alamukaki; alalaki na engumba yango butu wana. Mokolo oyo elandaki, Paulo ná Barnabasi babandaki mobembo mpo na kokende na Derbe, engumba oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 100. Lokola babambaki Paulo mabanga mokolo oyo elekaki, tokoki kokanisa mpasi oyo azalaki koyoka ntango bazalaki kosala mobembo wana. Atako bongo, ye ná Barnabasi bayikaki mpiko, mpe ntango bakómaki na Derbe, bakómisaki “bato mingi bayekoli.” Na nsima, na esika bázwa nzela ya mokuse mpo na kokende na Antiokia ya Siri, “bazongaki na Listra, na Ikoniumu mpe na Antiokia [ya Pisidia].” Mpo na nini? Mpo na kopesa “bayekoli makasi, . . . kolendisa bango ete bátikala na kati ya kondima.” (Mis. 14:20-22) Mibali yango mibale bapesaki ndakisa malamu mpenza! Bazalaki koluka naino bolamu ya bandeko na esika ya bolamu na bango moko. Bakɛngɛli ya zongazonga mpe bamisionɛrɛ ya ntango na biso balandaka ndakisa na bango.

18. Makambo nini esɛngamaka mpo moto aponama nkulutu?

18 Longola kolendisa bayekoli na maloba mpe na ndakisa na bango, Paulo ná Barnabasi “batyelaki bango bankulutu na lisangá mokomoko.” Atako Paulo ná Barnabasi “batindamaki na elimo santu” mpo na kosala mobembo wana, babondelaki mpe bakilaki bilei ntango “bapesaki bango [bankulutu] na mabɔkɔ ya Yehova.” (Mis. 13:1-4; 14:23) Lelo oyo mpe makambo esalemaka ndenge wana. Liboso bankulutu bátinda bankombo ya bandeko oyo bakozwa mikumba, babondelaka mpe batalelaka soki bandeko yango bakokisi masɛngami oyo ezali na Biblia. (1 Tim. 3:1-10, 12, 13; Tito 1:5-9; Yak. 3:17, 18; 1 Pet. 5:2,3) Likambo eleki ntina ezalaka te bambula oyo moto aumeli na lisangá. Kasi, maloba na ye, etamboli na ye, mpe lokumu na ye nde emonisaka soki elimo santu ezali mpenza kosala mosala na bomoi na ye. Mokristo akómaka mokɛngɛli mpo na etonga kaka soki akokisi masɛngami ya Biblia. (Gal. 5:22, 23) Mokɛngɛli ya zongazonga nde azali na mokumba ya kotya bankulutu.​—Talá mpe 1 Timote 5: 22.

19. Bankulutu bayebaka ete bakozongisa monɔkɔ mpo na likambo nini, mpe ndenge nini bamekolaka Paulo ná Barnabasi?

19 Bankulutu bayebaka ete bakozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe mpo na lolenge oyo bazali kotambwisa lisangá. (Ebr. 13:17) Lokola Paulo ná Barnabasi, bankulutu bapesaka ndakisa na mosala ya kosakola. Balendisaka bandeko na bango bakristo na maloba na bango. Bandimaka mpe kotya matomba ya bandeko liboso ya bolamu na bango.​—Flp. 2:3, 4.

20. Matomba nini tokoki kozwa soki tozali kotánga masolo ya bandeko oyo basalelaki Nzambe na bosembo?

20 Ntango Paulo ná Barnabasi bazongaki na Antiokia ya Siri na nsuka ya mobembo na bango, bayebisaki “ebele ya makambo oyo Nzambe asalaki na nzela na bango, mpe ndenge afungolelaki bikólo porte ya kondima.” (Mis. 14:27) Soki tozali kotánga masolo ya bandeko oyo basalelaki Nzambe na bosembo mpe tomoni ndenge oyo Yehova apambolaki milende na bango, yango ekolendisa biso mpo tókoba “koloba na mpiko na lisalisi ya bokonzi oyo euti na Yehova.”

a Talá etanda “ Ikoniumu​—Engumba ya bato ya Frigia,” na lokasa 96.