Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Ndeko mosakoli ya Bokonzi:

Kanisá ete ozali moko na bantoma oyo batɛlɛmaki na Ngomba ya Olive. Yesu abimeli bino. Lokola alingi kokende na likoló, alobi na bino boye: “Bokozwa nguya ntango elimo santu ekoya likoló na bino, mpe bokozala batatoli na ngai na Yerusaleme mpe na Yudea mobimba, na Samaria mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mis. 1:8) Olingaki komiyoka ndenge nini?

Ntango mosusu olingaki komona ete mokumba yango eleki monene mpenza. Mbala mosusu okokaki komituna boye: ‘Ndenge nini biso bato moke boye tokopesa litatoli “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele”?’ Mbala mosusu oyebi likambo oyo Yesu alobaki na bayekoli na ye na butu ya mokolo oyo ezalaki liboso ya liwa na ye ete: “Moombo aleki nkolo na ye te. Soki banyokolaki ngai, bakonyokola mpe bino; soki batosaki liloba na ngai, bakotosa mpe oyo ya bino. Kasi bakosala bino makambo nyonso wana mpo na nkombo na ngai, mpo bayebi te Moto oyo atindaki ngai.” (Yoa. 15:20, 21) Maloba wana, ekokaki kotinda yo omituna boye: ‘Liboso ya botɛmɛli mpe minyoko ya ndenge wana, ndenge nini nakoki kopesa litatoli malamumalamu?’

Lelo oyo, biso mpe tomitunaka mituna yango. Lokola tozali Batatoli ya Yehova, tozali mpe na mokumba ya kopesa litatoli malamumalamu epai ya ‘bato ya bikólo nyonso’ “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mat. 28:19, 20) Ndenge nini tokoki kokokisa mokumba wana, mingimingi soki bato batɛmɛli biso, ndenge Yesu asakolaki yango?

Mokanda ya Misala ya Bantoma elobeli ndenge oyo, na lisalisi ya Yehova, bantoma mpe bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso bakokisaki mokumba wana. Buku oyo ekomami mpo esalisa yo oyekola lisolo yango mpe omona ndenge makambo oyo ekomami na Mokanda ya Misala ezalaki kosalema. Okosepela na komona ete makambo mingi ya basaleli ya Nzambe ya ntango na biso ekokani na oyo ya bandeko na biso ya siɛklɛ ya liboso. Okomona ete mosala oyo bango bazalaki kosala ezali yango mpe oyo biso tozali kosala mpe ndenge lisangá ebongisamaki mpo na kosala mosala yango, ezali mpe bongo lelo oyo. Soki otaleli makambo yango na mozindo, yango ekondimisa yo mpenza ete Yehova azali kokoba kotambwisa ebongiseli na ye awa na mabele.

Elikya na biso mpe libondeli na biso ezali ete boyekoli ya mokanda ya Misala ya bantoma ekondimisa yo ete Yehova akosalisa yo mpe ete elimo santu na ye ekopesa yo makasi. Tiká ete boyekoli yango elendisa yo mpo okoba “kopesa litatoli malamumalamu” mpo na Bokonzi ya Nzambe mpe osalisa basusu bázwa lobiko.​—Mis. 28:23; 1 Tim. 4:16.

Bandeko na yo,

Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova